< Daniele 11 >
1 Na mobu ya liboso ya bokonzi ya Dariusi, moto ya Medi, nazalaki wana mpo na kosunga mpe kobatela ye.
又說:「當米底亞王大流士元年,我曾起來扶助米迦勒,使他堅強。」
2 Sik’oyo, nakoloba na yo solo ya likambo: « Bakonzi misato bakobima lisusu mpo na Persi; bongo mokonzi ya minei akobima lisusu, kasi akoleka bakonzi nyonso oyo bayaki liboso na ye na bomengo. Tango bomengo na ye ekopesa ye nguya, akosala ete bato nyonso batombokela Grese.
現在我將真事指示你: 「波斯還有三王興起,第四王必富足遠勝諸王。他因富足成為強盛,就必激動大眾攻擊希臘國。
3 Kasi mokonzi moko ya nguya koleka akobima mpe akokamba na nguya nyonso, akosala makambo oyo alingi.
必有一個勇敢的王興起,執掌大權,隨意而行。
4 Sima na kolendisama ya bokonzi na ye, mokili na ye ekobebisama mpe ekopanzana bipai na bipai; bakitani na ye bakozwa lisusu bokonzi te mpe mokili yango ekozala lisusu na nguya te, pamba te bakobotola yango mpe bakokaba yango na bato mosusu.
他興起的時候,他的國必破裂,向天的四方分開,卻不歸他的後裔,治國的權勢也都不及他;因為他的國必被拔出,歸與他後裔之外的人。
5 Mokonzi ya sude akokoma makasi koleka, kasi moko ya bakonzi na ye ya basoda akokoma lisusu makasi koleka ye mpe akotambolisa mokili na nguya makasi koleka.
「南方的王必強盛,他將帥中必有一個比他更強盛,執掌權柄,他的權柄甚大。
6 Sima na mibu ebele, akosala boyokani elongo na bakonzi mosusu. Mwana mwasi ya mokonzi ya sude akokende kosala boyokani elongo na mokonzi ya nor, kasi akobatela bokonzi na ye te, mpe bakitani na ye bakowumela te. Na mikolo wana, akokufa, ye elongo na bato oyo bamemaki ye na bokonzi, tata na ye mpe mosungi na ye.
過些年後,他們必互相連合,南方王的女兒必就了北方王來立約;但這女子幫助之力存立不住,王和他所倚靠之力也不能存立。這女子和引導她來的,並生她的,以及當時扶助她的,都必交與死地。
7 Moko kati na bakitani na ye akobima mpe akozwa esika na ye; akobundisa mampinga ya mokonzi ya nor mpe akokota kati na engumba na ye, oyo batonga makasi; akobundisa bango mpe akolonga bango.
但這女子的本家必另生一子繼續王位,他必率領軍隊進入北方王的保障,攻擊他們,而且得勝;
8 Akozwa banzambe na bango ya bikeko, bikeko na bango oyo basala na bibende, biloko na bango ya motuya oyo basala na wolo mpe na palata mpe akomema yango na Ejipito. Akozala mosika ya mokonzi ya nor na mwa mibu.
並將他們的神像和鑄成的偶像,與金銀的寶器掠到埃及去。數年之內,他不去攻擊北方的王。
9 Mokonzi ya nor akokota na makasi kati na mokili ya mokonzi ya sude, kasi akozonga na mokili na ye.
北方的王必入南方王的國,卻要仍回本地。
10 Bana ya mokonzi ya nor bokobongama mpo na bitumba mpe bakosangisa mampinga ya basoda ebele, bongo bakomema lokola mpela biloko nyonso oyo bakomona na nzela; bakobunda bitumba makasi kino na ndako batonga makasi ya mokonzi ya sude.
「北方王的二子必動干戈,招聚許多軍兵。這軍兵前去,如洪水氾濫,又必再去爭戰,直到南方王的保障。
11 Mokonzi ya sude akobima na kanda, akosangisa mampinga moko monene, akobundisa mokonzi ya mokili ya nor mpe akolonga ye.
南方王必發烈怒,出來與北方王爭戰,擺列大軍;北方王的軍兵必交付他手。
12 Tango bakolonga mampinga ya mokonzi ya nor, mokonzi ya mokili ya sude akotondisama na lolendo mpe akoboma bato ebele, kasi elonga na ye ekowumela te.
他的眾軍高傲,他的心也必自高;他雖使數萬人仆倒,卻不得常勝。
13 Pamba te mokonzi ya mokili ya nor akosangisa mampinga monene ya basoda koleka oyo ya liboso mpe, sima na mibu ebele, akozonga elongo na mampinga ya basoda ebele mpe na bibundeli ebele.
「北方王必回來擺列大軍,比先前的更多。滿了所定的年數,他必率領大軍,帶極多的軍裝來。
14 Na tango wana, bato ebele bakotombokela mokonzi ya mokili ya sude. Bato ya mobulu kati na bato na yo, Daniele, bakotomboka mpo ete emoniseli ekokokisama, kasi bakolonga te.
那時,必有許多人起來攻擊南方王,並且你本國的強暴人必興起,要應驗那異象,他們卻要敗亡。
15 Mokonzi ya mokili ya nor akoya kotonga mwa bangomba ya mabele zingazinga ya engumba oyo batonga makasi mpe akobotola yango. Mampinga ya basoda ya mokonzi ya sude bakokoka kobundisa ye te. Ezala basoda na bango ya mpiko, bakozala ata na makasi ya kobunda te.
北方王必來築壘攻取堅固城;南方的軍兵必站立不住,就是選擇的精兵也無力站住。
16 Mokonzi ya nor akosala makambo nyonso oyo alingi mpe moto moko te akokoka kotelema liboso na ye. Akovanda na mokili oyo eleki kitoko mpe akobebisa yango.
來攻擊他的,必任意而行,無人在北方王面前站立得住。他必站在那榮美之地,用手施行毀滅。
17 Akozwa mokano ya koya elongo na mampinga ya mokili na ye mobimba mpe akosala boyokani elongo na mokonzi ya sude. Mokonzi ya nor akopesa ye mwana na ye ya mwasi na libala mpo ete akoka kobebisa mokili na ye, kasi mabongisi na ye ekolonga te mpe akozwa mokili yango te.
「他必定意用全國之力而來,立公正的約,照約而行,將自己的女兒給南方王為妻,想要敗壞他,這計卻不得成就,與自己毫無益處。
18 Akokitela bisanga mpe akobotola ebele kati na yango. Kasi atako bongo, mokonzi ya mampinga moko ya basoda akosukisa lolendo na ye mpe akozongisela ye mabe mpo na lolendo na ye. Mokonzi ya nor akokoka lisusu kosala eloko moko te.
其後他必轉回奪取了許多海島。但有一大帥,除掉他令人受的羞辱,並且使這羞辱歸他本身。
19 Sima na yango, akozonga na bandako batonga makasi ya mokili na ye, kasi akobeta libaku mpe akokweya; bongo bakotikala komona ye lisusu te.
他就必轉向本地的保障,卻要絆跌仆倒,歸於無有。
20 Mokitani na ye akotinda mofutisi mpako moko na esika oyo eleki lokumu kati na mokili. Sima na mwa mikolo, mokonzi mpe akobebisama, kasi ekozala na botomboki te mpe na bitumba te.
「那時,必有一人興起接續他為王,使橫征暴斂的人通行國中的榮美地。這王不多日就必滅亡,卻不因忿怒,也不因爭戰。」
21 Moto moko azanga ata tina mpe batikala kopesa ata lokumu ya bokonzi te akokitana na ye; akoya na tango ya kimia mpe akozwa bokonzi na nzela ya mayele mabe.
「必有一個卑鄙的人興起接續為王,人未曾將國的尊榮給他,他卻趁人坦然無備的時候,用諂媚的話得國。
22 Mampinga ya banguna bakokweya liboso na ye, mampinga yango mpe mokonzi ya boyokani bakobebisama.
必有無數的軍兵勢如洪水,在他面前沖沒敗壞;同盟的君也必如此。
23 Atako basalaki boyokani elongo na ye, akosalela kaka mayele mabe; akobebisa boyokani oyo basalaki, akobundisa bango mpe akolonga na nzela ya bato moke kaka.
與那君結盟之後,他必行詭詐,因為他必上來以微小的軍成為強盛。
24 Na tango ya kimia, akokota na makasi kati na bituka oyo etonda na bomengo mpe akokokisa makambo oyo ata moko te kati na batata to bakoko na ye batikala kosala: akobotola na makasi biloko mpe bomengo ya mokili, bongo akokabola yango epai na bato na ye; akosala mabongisi ya kobundisa bingumba batonga makasi, kasi nyonso wana kaka ekowumela tango moke.
趁人坦然無備的時候,他必來到國中極肥美之地,行他列祖和他列祖之祖所未曾行的,將擄物、掠物,和財寶散給眾人,又要設計攻打保障,然而這都是暫時的。
25 Akovandisa makanisi na ye mpe akotelema na mpiko, akosangisa mampinga monene mpo na kobundisa mokonzi ya sude. Mpe mokonzi ya sude akosangisa mampinga monene mpe ya nguya mpo na kobundisa ye, kasi akolonga te mpo na likita oyo basalelaki ye.
「他必奮勇向前,率領大軍攻擊南方王;南方王也必以極大極強的軍兵與他爭戰,卻站立不住,因為有人設計謀害南方王。
26 Bato oyo baliaka elongo na mokonzi bakoluka koboma ye, mampinga na ye bakobebisama mpe basoda ebele bakokufa na bitumba.
吃王膳的,必敗壞他;他的軍隊必被沖沒,而且被殺的甚多。
27 Bakonzi oyo mibale, na mitema na bango ya mabe, bakovanda esika moko. Lokola batonda na mayele mabe, bakolobana lokuta kasi ekosimba te, pamba te suka ya makambo ekoya kaka na tango oyo ekatama.
至於這二王,他們心懷惡計,同席說謊,計謀卻不成就;因為到了定期,事就了結。
28 Mokonzi ya nor akozonga na mokili na ye na bomengo ebele, kasi makanisi ya motema na ye ekotelemela boyokani ya bule; mpe akokokisa yango liboso ete azonga na mokili na ye.
北方王必帶許多財寶回往本國,他的心反對聖約,任意而行,回到本地。
29 Na tango oyo ekatama, akokota lisusu na mokili ya sude na makasi; kasi na mbala oyo, makambo ekosalema ndenge moko te na mbala oyo ya liboso.
「到了定期,他必返回,來到南方。後一次卻不如前一次,
30 Bamasuwa oyo ekowuta na ngambo ya weste ya ebale monene Mediterane ekobundisa ye; bongo, akolemba nzoto, akosilika makasi mpe akotombokela boyokani ya bule. Tango akozonga, akotalisa ngolu epai ya bato oyo bakobebisa boyokani ya bule.
因為基提戰船必來攻擊他,他就喪膽而回,又要惱恨聖約,任意而行;他必回來聯絡背棄聖約的人。
31 Mampinga ya basoda na ye bakotelema mpo na kobebisa bosantu ya Tempelo mpe kobuka engumba batonga makasi; bakopekisa kobonza mbeka ya mokolo na mokolo mpe bakotonga etumbelo mpo na nzambe oyo babengaka Zewusi.
他必興兵,這兵必褻瀆聖地,就是保障,除掉常獻的燔祭,設立那行毀壞可憎的。
32 Na mayele na ye ya mabe, akokosa bato oyo babukaki boyokani; kasi bato oyo bayebi Nzambe na bango bakotelemela ye makasi.
作惡違背聖約的人,他必用巧言勾引;惟獨認識上帝的子民必剛強行事。
33 Ba-oyo bakozala na bwanya kati na bato bakoteya bato ebele, atako bakokufa na mopanga na mwa tango moke to bakozika na moto to bakobwakama na boloko to mpe bakobotola bango biloko na makasi.
民間的智慧人必訓誨多人;然而他們多日必倒在刀下,或被火燒,或被擄掠搶奪。
34 Tango bakokweya, bakozwa kaka lisungi moke, mpe bato ebele bakoya kosangana na bango na mitema mibale.
他們仆倒的時候,稍得扶助,卻有許多人用諂媚的話親近他們。
35 Bato mosusu kati na bato ya bwanya bakobeta mabaku, mpo ete bakomisama bato ya kokoka, bapetolama mpe bazangi mbeba, mpo na tango ya suka, pamba te suka ya makambo ekoya kaka na tango oyo ekatama.
智慧人中有些仆倒的,為要熬煉其餘的人,使他們清淨潔白,直到末了;因為到了定期,事就了結。
36 Mokonzi akosala makambo oyo alingi, akokoma lolendo, akotombola mapeka liboso ya banzambe nyonso mpe akoloba makambo ezanga tina mpo na kotiola Nzambe ya banzambe; akolonga kino tango kanda makasi ya Nzambe ekosila, pamba te makambo nyonso oyo ekatama esengeli kokokisama.
「王必任意而行,自高自大,超過所有的神,又用奇異的話攻擊萬神之神。他必行事亨通,直到主的忿怒完畢,因為所定的事必然成就。
37 Akopesa lokumu te, ezala epai ya banzambe ya batata na ye to epai ya nzambe oyo basi balingaka to mpe epai ya banzambe nyonso mosusu; pamba te akomitombola liboso na bango nyonso.
他必不顧他列祖的神,也不顧婦女所羨慕的神,無論何神他都不顧;因為他必自大,高過一切。
38 Na esika ya kosambela banzambe wana, akosambela nzambe ya bandako batonga makasi; akobonza wolo, palata, mabanga ya talo mpe makabo mosusu ya talo epai ya nzambe oyo bakoko na ye batikalaki koyeba te.
他倒要敬拜保障的神,用金、銀、寶石和可愛之物敬奉他列祖所不認識的神。
39 Akobundisa bandako batonga makasi na lisungi ya nzambe moko ya bapaya, mpe akopesa lokumu koleka epai ya bato oyo bakopesa nzambe yango lokumu. Akokomisa bango bakambi ya bato ebele mpe akokabolela bango mokili lokola lifuti.
他必靠外邦神的幫助,攻破最堅固的保障。凡承認他的,他必將榮耀加給他們,使他們管轄許多人,又為賄賂分地與他們。
40 Na tango ya suka, mokonzi ya sude akobundisa mokonzi ya nor, kasi mokonzi ya nor akobimela ye elongo na bashar, bampunda mpe bamasuwa ya bitumba. Akokota na makasi na bikolo ebele mpe akomema lokola mpela eloko nyonso oyo akomona na nzela.
「到末了,南方王要與他交戰。北方王必用戰車、馬兵,和許多戰船,勢如暴風來攻擊他,也必進入列國,如洪水氾濫。
41 Akokota lisusu na makasi na mokili ya kitoko. Bikolo ebele ekokweya, kasi Edomi, Moabi mpe bakonzi ya Amoni bakokima ye.
又必進入那榮美之地,有許多國就被傾覆,但以東人、摩押人,和一大半亞捫人必脫離他的手。
42 Bokonzi na ye ekopanzana na bikolo ebele, ezala mokili ya Ejipito ekobika te.
他必伸手攻擊列國;埃及地也不得脫離。
43 Akobotola wolo, palata mpe bomengo nyonso ya mokili ya Ejipito, bongo bato ya Libi mpe ya Kushi bakosala ndenge moko kaka na ye.
他必把持埃及的金銀財寶和各樣的寶物。利比亞人和古實人都必跟從他。
44 Kasi basango oyo akozwa wuta na este mpe na nor ekotungisa ye, mpe akobima na mokili na kanda makasi mpo na koboma mpe kosilisa bato ebele.
但從東方和北方必有消息擾亂他,他就大發烈怒出去,要將多人殺滅淨盡。
45 Akotelemisa bandako na ye ya kapo ya bokonzi na ngambo moko ya ebale monene, pembeni ya ngomba ya bule. Boye, akokoma na suka mpe moto oyo akosunga ye akozala te.
他必在海和榮美的聖山中間設立他如宮殿的帳幕;然而到了他的結局,必無人能幫助他。」