< Daniele 10 >

1 Na mobu ya misato ya bokonzi ya Sirisi, mokonzi ya Persi, Nzambe alakisaki makambo epai ya Daniele oyo bazalaki kobenga Belitsatsari. Makambo yango ezalaki ya solo: etalisaki pasi makasi oyo ekoya. Daniele azwaki mayele ya kososola yango kati na emoniseli.
In the third year of Koresh king of Persia a word was revealed to Daniel, whose name was called Belteshazzar; and the word was true: a great war. And he understood the word, and had understanding of the vision.
2 Na tango wana, ngai Daniele, nasalaki matanga oyo esalaki baposo misato.
In those days I, Daniel, was mourning for three whole weeks.
3 Nazalaki kolia lisusu bilei ya kitoko te; ezala misuni to vino, eloko moko te ekotaki lisusu na monoko na ngai. Mpe, na baposo misato wana, nazalaki kopakola lisusu mafuta ya solo kitoko te.
I had no pleasing food, neither meat nor wine came into my mouth, neither did I anoint myself at all, until three whole weeks were fulfilled.
4 Na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya liboso, tango nazalaki pembeni ya ebale monene Tigre,
In the four and twentieth day of the first month, as I was by the side of the great river, which is the Tigris,
5 natombolaki miso na ngai na likolo mpe namonaki moto moko alata bilamba ya lino mpe mokaba moko ya wolo ya Ufazi na loketo na ye.
I lifted up my eyes and looked, and look, a man clothed in linen, around his waist a belt made of pure gold from Uphaz.
6 Nzoto na ye ezalaki kongenga lokola topaze, elongi na ye ezalaki kongala lokola mokalikali, miso na ye ezalaki kopela lokola moto, maboko mpe makolo na ye ezalaki kongenga lokola ebende ya bronze oyo balekisa na moto, mpe mongongo na ye ezalaki koyokana lokola makelele ya bato ebele.
His body was like beryl, and his face like the appearance of lightning, and his eyes like flaming torches, and his arms and his feet like burnished bronze, and the sound of his words like the sound of a multitude.
7 Ngai, Daniele, ngai moko kaka nde namonaki emoniseli yango. Bato oyo bazalaki elongo na ngai bamonaki yango te, kasi somo makasi ekweyelaki bango, bakimaki mpe babombamaki.
I, Daniel, alone saw the vision; for the men who were with me did not see the vision; but a great trembling fell on them, and they fled to hide themselves.
8 Boye, natikalaki kaka ngai moko mpe nakomaki kotala emoniseli monene yango; makasi esilaki ngai, elongi na ngai ebebaki makasi mpe nalembaki nzoto.
So I was left alone, and saw this great vision, and there remained no strength in me; for my natural appearance grew deathly pale, and I retained no strength.
9 Nayokaki moto yango koloba; bongo wana nazalaki koyoka mongongo na ye, nakweyaki makalikali, elongi kino na mabele.
Yet I heard the sound of his words, and when I heard the sound of his words, then I fell into a deep sleep on my face, with my face toward the ground.
10 Loboko moko esimbaki ngai mpe etelemisaki ngai, makolo mpe maboko na ngai ekomaki kolenga.
Look, a hand touched me, which set me on my knees and on the palms of my hands.
11 Bongo moto yango alobaki na ngai: — Daniele, molingami ya Nzambe, yoka malamu maloba oyo nazali koyebisa yo mpe telema na esika oyo ozali, pamba te natindami sik’oyo epai na yo. Wana azalaki nanu koloba na ngai, natelemaki na kolenga.
He said to me, "Daniel, man greatly loved, understand the words that I speak to you, and stand upright; for I have now been sent to you." And when he had spoken this word to me, I stood trembling.
12 Akobaki koloba na ngai: — Daniele, kobanga te! Wuta mokolo ya liboso oyo ozwaki makanisi ya koluka kososola mpe komikitisa liboso ya Nzambe na yo, libondeli na yo eyokamaki, mpe nayaki lokola eyano na libondeli yango.
Then he said to me, "Do not be afraid, Daniel; for from the first day that you did set your heart to understand, and to humble yourself before your God, your words were heard. And I have come because of your words.
13 Kasi mokambi ya mokili ya Persi atelemelaki ngai mikolo tuku mibale na moko. Boye, Misheli, moko kati na bakonzi ya ba-anjelu, ayaki kosunga ngai, pamba te bakonzi ya Persi bakangaki ngai kuna.
But the prince of the kingdom of Persia withstood me twenty-one days; but, look, Michael, one of the chief princes, came to help me, because I was left there with the kings of Persia.
14 Sik’oyo, nayei kolimbolela yo makambo oyo ekokomela bato na yo na mikolo ekoya, pamba te emoniseli oyo ezali kolobela lisusu makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya.
Now I have come to make you understand what shall happen to your people in the latter days; for the vision refers to future days."
15 Wana azalaki koloba na ngai, nakitisaki elongi mpe nakokaki lisusu koloba te.
And when he had spoken to me according to these words, I turned my face toward the ground, and could not speak.
16 Boye, ekelamu oyo ezalaki lokola moto esimbaki bibebu na ngai, mpe nakokaki lisusu kofungola monoko na ngai mpo na koloba. Nalobaki na ekelamu oyo etelemaki liboso na ngai: — Nkolo na ngai, molimo na ngai etungisami likolo ya emoniseli oyo nasili kozwa, mpe, ngai moto, nalembi nzoto!
And look, something like a man's hand touched my lips. Then I opened my mouth and spoke and said to him who stood before me, "My lord, it is because of the vision anguish has come upon me, and I have no strength.
17 Ndenge nini mosali lokola ngai, nakoka solo kosolola na yo, nkolo na ngai, awa makasi esili ngai mpe kopema na ngai ekomi na pasi?
For how can this servant of my lord talk with my lord? As for me, no strength remains, and I am breathless."
18 Ekelamu oyo ezalaki lokola moto esimbaki ngai lisusu mpe epesaki ngai makasi.
Then one like the appearance of a man touched me again and strengthened me.
19 Elobaki na ngai: — Molingami ya Nzambe, kobanga te, zala na kimia! Zala makasi; solo, zala makasi! Wana ezalaki koloba na ngai, nzoto na ngai ezwaki lisusu makasi mpe nalobaki: — Loba, nkolo na ngai, pamba te opesi ngai makasi.
And he said, "Greatly loved man, do not be afraid, peace be to you; be strong, be strong." When he spoke to me, I was strengthened, and said, "Let my lord speak, for you have strengthened me."
20 Boye, elobaki: — Boni, oyebi mpo na nini nayei epai na yo? Sik’oyo, nakomi pene ya kozonga mpo na kobundisa mokambi ya Persi; mpe tango ngai nakokende, mokambi ya Grese akoya;
Then he said, "Do you know why I have come to you? Now I will return to fight with the prince of Persia. When I go forth, look, the prince of Greece shall come.
21 kasi liboso na nyonso, nakoyebisa yo makambo oyo ekomami kati na buku ya solo. Moto moko te asungaka ngai liboso na bango; kaka Misheli, mokambi na bino.
But I will tell you that which is inscribed in the Book of Truth. And there is no one who contends with me against them except Michael, your prince."

< Daniele 10 >