< Bakolose 4 >

1 Bino bankolo, bosungaka bawumbu na bino na nzela ya biloko ya sembo mpe ya solo, pamba te boyebi malamu ete bino mpe bozali na Mokonzi kati na Likolo.
상전들아 의와 공평을 종들에게 베풀지니 너희에게도 하늘에 상전이 계심을 알지어다
2 Bozalaka na molende ya kosambela, bosenzelaka mpe bozongisaka matondi epai ya Nzambe.
기도를 항상 힘쓰고 기도에 감사함으로 깨어 있으라
3 Bobondelaka mpe mpo na biso, na tina ete Nzambe apesa biso mabaku ya koteya Sango Malamu mpo na kosakola mabombami ya Klisto. Mpe ezali mpo na mabombami yango nde ngai nazali mokangami kati na boloko.
또한 우리를 위하여 기도하되 하나님이 전도할 문을 우리에게 열어주사 그리스도의 비밀을 말하게 하시기를 구하라 내가 이것을 인하여 매임을 당하였노라
4 Bobondelaka Nzambe mpo ete nasakola yango na polele nyonso, ndenge nasengeli penza kosala.
그리하면 내가 마땅히 할 말로써 이 비밀을 나타내리라
5 Botambolaka na bwanya liboso ya bato oyo bazali bandimi te mpe bosalelaka tango na bino na ndenge ya malamu.
외인을 향하여서는 지혜로 행하여 세월을 아끼라!
6 Tika ete maloba na bino etondaka tango nyonso na boboto mpe na elengi, mpo ete boyeba ndenge nini koyanola moto nyonso.
너희 말을 항상 은혜 가운데서 소금으로 고루게 함같이 하라 그리하면 각 사람에게 마땅히 대답할 것을 알리라
7 Tishike, ndeko molingami, mosali ya sembo mpe moninga na ngai kati na mosala ya Nkolo, akoyebisa bino makambo nyonso oyo etali ngai.
두기고가 내 사정을 다 너희에게 알게 하리니 그는 사랑을 받는 형제요 신실한 일군이요 주 안에서 함께 된 종이라
8 Ezali na tina yango nde nazali kotinda ye epai na bino, mpo ete apesa bino basango na tina na biso mpe alendisa bino.
내가 저를 특별히 너희에게 보낸 것은 너희로 우리 사정을 알게 하고 너희 마음을 위로하게 하려 함이라
9 Azali koya elongo na Onezime, ndeko molingami na biso ya solo, oyo azali moko kati na bino. Bakoyebisa bino makambo nyonso oyo ezali koleka awa.
신실하고 사랑을 받는 형제 오네시모를 함께 보내노니 그는 너희에게서 온 사람이라 저희가 여기 일을 다 너희에게 알게 하리라
10 Arisitarke, moninga na ngai kati na boloko, atindeli bino mbote. Boyamba mpe mbote ya Malako, ndeko ya Barnabasi, oyo na tina na ye napesaki bino mitindo ete, soki ayei epai na bino, boyamba ye malamu.
11 Yesu oyo babengaka Jistisi atindeli bino mbote. Kati na Bayuda oyo bakomaki Baklisto, kaka bango nde bazali kosala elongo na ngai mpo na Bokonzi ya Nzambe, mpe bazali mpo na ngai kobondisama mobimba.
12 Epafrasi, ye oyo azali mpe moko kati na bino mpe mowumbu ya Yesu-Klisto, atindeli bino mbote. Abundaka tango nyonso etumba mpo na bino kati na mabondeli, mpo ete botelema ngwi lokola bato oyo bakembi kati na kondima mpe baselingwa mpo na kokokisa mokano nyonso ya Nzambe.
13 Nazali kotatola solo mpo na ye ete azali kosala mosala makasi mpo na bino, mpo na bandeko ya Laodise mpe mpo na bandeko ya Iyerapolisi.
14 Monganga Luka, molingami na biso, mpe Demasi batindeli bino mbote.
15 Bopesa mbote epai ya bandeko ya Laodise, epai ya Nefa mpe epai ya Lingomba oyo esanganaka kati na ndako na ye.
16 Soki bosilisi kotanga mokanda oyo, bosala ete etangama mpe kati na Lingomba ya Laodise; bongo bino mpe botanga oyo ekowuta na Laodise.
17 Boloba na Arshipe: « Sala keba na lotomo oyo ozwaki kati na Nkolo mpo ete okokisa yango malamu. »
18 Ngai Polo, napesi bino mbote na kokoma yango na maboko na ngai. Bobosanaka te ete nazali mokangami kati na boloko. Tika ete ngolu ezala na bino!

< Bakolose 4 >