< Bakolose 3 >
1 Lokola bosekwaki mpe elongo na Klisto, bolukaka biloko ya Likolo epai wapi Klisto avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe,
If then ye are risen with Christ, seek those things which are above, where Christ is, sitting on the right hand of God;
2 bokanisaka biloko ya Likolo kasi biloko ya mokili te.
think about those things above, and not things upon the earth.
3 Pamba te bokufaki penza, mpe bomoi na bino ezali sik’oyo ya kobombama elongo na Klisto kati na Nzambe.
For ye are dead, and your life is hidden with Christ in God:
4 Tango Klisto oyo azali bomoi na bino akomonana, bino mpe bokomonana elongo na Ye kati na nkembo.
when Christ, your life, may appear, then will you also appear with him in glory.
5 Boye, boboma nyonso oyo, kati na bomoi na bino, ezali ya mokili: pite, bosoto, baposa ya mabe, bilulela mpe lokoso ya mbongo, pamba te lokoso ya mbongo ezali ndenge moko na kosambela bikeko.
Therefore kill your members which are upon the earth; fornication, uncleanness, passion, evil desire, and covetousness, which is idolatry;
6 Ezali makambo yango nde ebendaka kanda ya Nzambe.
through which the wrath of God comes.
7 Bino mpe na kala, bozalaki komipesa na makambo yango tango bomoi na bino ezalaki na se ya bokonzi ya makambo yango.
In which you indeed at one time did walk about, when you lived in them:
8 Kasi sik’oyo, bosengeli kolimwisa makambo yango nyonso: kanda, koyinana, misala mabe, mafinga mpe maloba mabe oyo ekoki kobima na minoko na bino.
but you also lay aside all these; anger, wrath, malice, blasphemy, disgraceful talk out of your mouths:
9 Bokosanaka te, pamba te bobwakaki bomoto na bino ya kala elongo na misala na yango
lie not to one another, having laid aside the old man with his habits,
10 mpe bolataki bomoto ya sika oyo emikomisaka ya sika mpo ete bokoma na boyebi ya kokoka kolanda elilingi ya Mokeli ya bomoto yango.
and having put on the new man, who is renewed into perfect knowledge according to the image of him who created him:
11 Boye, biso nyonso tozali ndenge moko: bokeseni ezali lisusu te kati na Mogreki mpe Moyuda, moto oyo akatama ngenga mpe moto oyo akatama ngenga te, mopaya mpe mwana mboka, mowumbu mpe monsomi. Bobele Klisto nde azali na tina: azali nyonso kati na bato nyonso.
where there is not Greek and Jew, circumcision and uncircumcision, barbarian, Scythian, bond, free: but Christ is all things, and in all.
12 Yango wana, lokola bozali baponami ya Nzambe, basantu mpe balingami na Ye, boyokelaka mingi bato mawa, bozalaka na bolingo, na boboto, na komikitisa mpe na motema molayi.
Therefore, as elect of God, holy and beloved, put on affections of mercy, kindness, humility, meekness, longsuffering;
13 Boyikanaka mpiko; mpe soki moko azali na likambo ya kopamela moninga na tina na yango, bolimbisanaka. Bolimbisaka ndenge Nkolo alimbisaki bino.
forbearing one another and forgiving one another, if any one may have a quarrel against any one; as Christ also forgave you, so indeed do you likewise:
14 Na likolo ya makambo oyo nyonso, bolataka bolingo oyo ekangisaka nyonso kati na bomoko ya kokoka.
and in all these things put on divine love, which is the bond of perfection.
15 Tika ete kimia ya Klisto ekonzaka kati na mitema na bino, pamba te bozali biteni ya nzoto moko mpe Nzambe abenga bino mpo ete bozala na kimia yango; mpe bozongisaka matondi.
And let the peace of Christ reign in your hearts, in which you are called in one body; and be ye thankful.
16 Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na bino; boteyanaka mpe bokebisanaka na bwanya nyonso, na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo. Mpe boyembelaka Nzambe na kozongisa matondi kati na mitema na bino.
Let the word of God dwell in you richly, teaching and admonishing one another, in all wisdom, in psalms, hymns, spiritual songs, with grace making melody in your hearts to God;
17 Mpe nyonso oyo bokosala, ezala na maloba to na misala, bosalaka yango na Kombo ya Nkolo Yesu, na kozongisa matondi epai ya Nzambe Tata na nzela ya Yesu-Klisto.
and every thing whatsoever you may do, in word or in work, do all things in the name of the Lord Jesus, giving thanks to God the Father through him.
18 Basi, botosaka mibali na bino ndenge ebongi kati na Nkolo.
Ye wives, submit to your husbands as is becoming in the Lord.
19 Mibali, bolingaka basi na bino mpe bozalaka na makambo ya makasi te epai na bango.
Ye husbands, love your wives with divine love, and be not harsh towards them.
20 Bana, botosaka baboti na bino na makambo nyonso, pamba te ezali ndenge wana nde bokosepelisa Nkolo.
Children, obey your parents in all things, for this is well-pleasing in the Lord.
21 Batata, boyokisaka bana na bino kanda te, noki te mitema na bango ekolemba.
Ye fathers, provoke not your children to wrath, in order that they may not be discouraged.
22 Bawumbu, botosaka bankolo na bino na makambo nyonso; na miso na bango kaka te, lokola nde bozali kosepelisa bato, kasi na mitema ya bosembo mpe kati na kotosa Nkolo.
Ye servants, obey your masters according to the flesh in all things; not with eye-service, pleasing men, but of purity of heart, fearing the Lord.
23 Mosala nyonso oyo bosalaka, bosalaka yango na mitema na bino mobimba, lokola nde bozali kosala yango mpo na Nkolo, kasi mpo na bato te,
Whatsoever you may do, work from your soul, as for the Lord, and not for men;
24 pamba te boyebi malamu ete bokozwa, lokola lifuti, libula oyo Nkolo abongisa mpo na bato ya Nzambe. Ezali Klisto nde azali Nkolo oyo bosalelaka.
knowing that you will receive the recompense of the inheritance from the Lord. Serve the Lord Christ;
25 Moto oyo asalaka na ndenge ya mabe akozwa lifuti oyo ebongi mpo na misala na ye ya mabe, pamba te Nzambe aponaka bilongi te.
for the one doing wrong receives that for which he did the injustice: and there is no respect of persons.