< Amosi 9 >

1 Namonaki Yawe atelemi pene ya etumbelo, mpe alobaki: « Buka makonzi ya Tempelo mpo ete ndako mobimba eningana mpe ekweyela bato nyonso na mito. Bato oyo bakotikala, nakoboma bango na mopanga. Moko te akokima, moko te akobika.
Herren saa jeg; han stod ved alteret og sagde: Til Søjlehovedet slaar jeg, saa Dørens Tærskel ryster. Jeg rammer dem alle i Hovedet, de sidste dræber jeg med Sværd; ingen af dem skal undfly, ingen af dem skal reddes.
2 Soki bakimi na se ya mabele, na mboka ya bakufi, loboko na Ngai ekobimisa bango kuna; soki bakimi na Lola, nakokitisa bango na se. (Sheol h7585)
Bryder de ind i Dødsriget, min Haand skal hente dem der; stiger de op til Himlen, jeg styrter dem ned derfra; (Sheol h7585)
3 Soki babombami na songe ya ngomba Karimeli, nakokanga bango mpe nakokitisa bango na se; soki babombami Ngai na se ya ebale monene, nakopesa mitindo na nyoka ete eswa bango kuna.
skjuler de sig paa Karmels Top, jeg finder og henter dem der; gemmer de sig for mig paa Havsens Bund, jeg byder Slangen bide dem der;
4 Ezala banguna na bango bamemi bango na bowumbu, nakopesa mitindo na mopanga ete eboma bango kuna. Miso na Ngai ekozala likolo na bango mpo na kosala bango mabe, kasi bolamu te.
vandrer de som Fanger for deres Fjender, jeg byder Sværdet dræbe dem der. Jeg fæster mit Øje paa dem til Ulykke, ikke til Lykke.
5 Soki Yawe, Mokonzi ya mampinga, asimbi mabele, mabele eninganaka, mpe bavandi na yango nyonso bakomaka na matanga, mokili mobimba etelemaka lokola ebale Nili mpe ekawukaka lokola mayi ya Ejipito.
Herren, Hærskarers HERRE, som rører ved Jorden, saa den skælver, saa alle, som bor paa den, sørger, saa den stiger overalt som Nilen og synker som Ægyptens Flod,
6 Yawe atonga ndako na Ye kati na Lola mpe atia miboko na yango na mabele; abengaka mayi ya ebale monene mpe asopaka yango na etando ya mabele. Kombo na Ye ezali: Yawe.
han, som bygged sin Højsal i Himlen, som fæstned sit Hvælv paa Jorden, kalder ad Havets Vande og gyder dem ud over Jorden, HERREN er hans Navn.
7 Bino bana ya Isalaele, boni, bokokani te na bato ya mokili ya Kushi? » elobi Yawe. « Boni, nabimisaki te Isalaele wuta na Ejipito, bato ya Filisitia wuta na Kreti, bato ya Siri wuta na Kiri?
Er I mig ej som Ætiopiens Børn, Israeliter, lyder det fra HERREN; har jeg ikke ført Israel op fra Ægyptens Land, Filisterne fra Kaftor, Aram fra Kir?
8 Solo, miso ya Nkolo Yawe ezali kotala bokonzi ya masumu; nakobebisa mpe nakolongola yango na mabele. Nzokande, nakobebisa te libota mobimba ya Jakobi, » elobi Yawe.
Se, den Herre HERRENS Øjne er vendt mod det syndige Rige, og jeg udsletter det af Jorden. Dog vil jeg ikke helt udslette Jakobs Hus, lyder det fra HERREN;
9 « Pamba te nakopesa mitindo mpe nakoningisa libota ya Isalaele kati na bikolo nyonso ndenge bayungolaka ble; bongo ata mbuma moko te ya moke ekokweya na se.
thi se, jeg byder, at Israels Hus skal sigtes blandt alle Folkene, som man sigter med Sold, uden at et Korn falder til Jorden.
10 Bato nyonso ya masumu kati na bato na Ngai bakokufa na mopanga, ba-oyo nyonso balobaka: ‹ Pasi ekotikala te kozwa to kokomela biso! ›
For Sværdet skal alle Syndere i mit Folk dø, de, som siger: »Os naar Ulykken ikke; den kommer ikke over os.«
11 Na mokolo wana, nakotonga lisusu ndako ya Davidi oyo ekweya, nakobamba madusu na yango, nakotelemisa lisusu bamir na yango oyo ebukana mpe nakotonga yango lisusu ndenge ezalaka kala,
Paa hin Dag rejser jeg Davids faldne Hytte; jeg tætter dens Revner, opfører, hvad der sank i Grus, og bygger den som i gamle Dage,
12 mpo ete bakoka kozwa ndambo ya mokili ya Edomi oyo etikalaki, mpe ya bikolo nyonso oyo babengamaka na Kombo na Ngai, » elobi Yawe oyo asalaka makambo wana nyonso.
saa de tager Edoms Rest i Eje og alle de Folk, over hvilke mit Navn er nævnt, lyder det fra HERREN, som fuldbyrder dette.
13 « Mikolo ezali koya, » elobi Yawe, « mikolo oyo mosali bilanga akobuka bambuma na yango noki, mpe moloni elanga ya vino akokamola vino noki. Vino ya sika ekobota na bangomba milayi mpe ekosopana na bangomba mikuse nyonso.
Se, Dage skal komme, lyder det fra HERREN, da Plovmand følger Høstmand i Hælene og Drueperser Sædemand, da Bjergene drypper med Most og alle Høje flyder.
14 Nakozongisa Isalaele, bato na Ngai, oyo bakendeki na bowumbu, mpe bakotonga lisusu bingumba oyo ebebisamaki mpe bakovanda kati na yango. Bakolona banzete ya vino mpe bakomela vino na yango, bakolona bilanga mpe bakolia bambuma na yango.
Da vender jeg mit Folk Israels Skæbne, og de skal bygge de ødelagte Byer og bo deri, de skal plante Vingaarde og drikke Vinen, anlægge Haver og spise Frugten.
15 Nakolona bango na mabele na bango moko, mpe bakotikala kopikola bango lisusu te na mabele oyo napesaki bango, » elobi Yawe, Nzambe na yo.
Jeg planter dem i deres Jord, og de skal aldrig mere rykkes op af deres Jord, som jeg gav dem, siger HERREN din Gud.

< Amosi 9 >