< Amosi 7 >

1 Tala makambo oyo Nkolo Yawe alakisaki ngai: Tango matiti ebandaki kobota, ebimisaki mabanki ebele. Esalemaki sima na kobuka milona ya mokonzi.
Ceci est la vision que m'a envoyé le Seigneur Dieu; voilà une nuée de sauterelles qui vient de l'orient, et voilà de grandes sauterelles sur les champs du roi Gog.
2 Tango mabanki yango esilisaki kolia matiti nyonso ya mokili, nagangaki: — Oh Nkolo Yawe, limbisa bato na Yo! Ndenge nini Jakobi oyo azali penza moke akoki solo kobika?
Et quand elles eurent achevé de dévorer l'herbe de la terre, je dis: Seigneur, Seigneur, sois miséricordieux. Qui relèvera Jacob? car il est réduit à rien.
3 Boye, Yawe abongolaki makanisi na Ye mpe alobaki: — Makambo yango ekosalema te.
Seigneur, repens-Toi pour cela. Et cela ne sera point, dit le Seigneur.
4 Tala makambo oyo Nkolo Yawe alakisaki ngai. Nkolo Yawe asalelaki moto mpo na kopesa etumbu, bongo moto yango ekawusaki mayi minene mpe ezikisaki mokili.
Ceci est la vision que m'a envoyé le Seigneur: Voilà que le Seigneur appela le châtiment par la flamme, et le feu dévora une grande part de l'abîme, et il consuma l'héritage du Seigneur. Ceci est la vision que m'a envoyé le Seigneur
5 Boye, nagangaki: — Oh Nkolo Yawe, nabondeli Yo, kosala boye te! Ndenge nini Jakobi oyo azali penza moke akoki solo kobika?
Je dis: Seigneur, cesse donc; qui relèvera Jacob, car il est réduit à rien?
6 Boye Yawe abongolaki makanisi na Ye. Mpe Nkolo Yawe alobaki: — Makambo yango ekosalema lisusu te.
Seigneur, repens-Toi pour cela. Et cela ne sera point, dit le Seigneur.
7 Tala makambo oyo alakisaki ngai: Nkolo azalaki ya kotelema na likolo ya mir moko batonga na mbodi mpe, na loboko na Ye, asimbaki nivo oyo batongi ndako basalelaka.
Ceci est la vision que m'a envoyé le Seigneur: Voilà que le Seigneur Se tient debout sur un mur de diamant, et Il avait un diamant à la main.
8 Yawe atunaki ngai: — Amosi, ozali komona nini? Nazongisaki: — Nazali komona nivo oyo batongi ndako basalelaka. Nkolo alobaki na ngai: — Tala, nakotia nivo oyo batongi ndako basalelaka na likolo ya Isalaele, bato na Ngai. Nakolimbisa bango lisusu te.
Et le Seigneur me dit: Que vois-tu, Amos? et je dis; Un diamant; et le Seigneur me dit: Voilà que Je mets un diamant sur un diamant entre Moi et Mon peuple d'Israël; Je ne continuerai plus de Me montrer à lui.
9 Tango nakotelemela libota ya Jeroboami na nzela ya mopanga na Ngai, nakobebisa bisambelo ya likolo ya bangomba ya Izaki mpe bisika ya bule ya Isalaele.
Mais les autels de la division seront effacés; et les fêtes d'Israël seront délaissées; et Je Me lèverai avec le glaive contre la maison de Jéroboam.
10 Amatsia, Nganga-Nzambe ya Beteli, atindelaki Jeroboami, mokonzi ya Isalaele, maloba oyo: « Amosi azali kosalela yo likita mpo na kosala yo mabe kati na mokili ya Isalaele. Mokili ekoki te kondima koyokaka tango nyonso maloba na ye.
Or Amasias, prêtre de Béthel, envoya au roi d'Israël Jéroboam, disant: Amos fait des complots contre toi, au milieu de la maison d'Israël; la terre ne pourrait pas souffrir toutes ses paroles.
11 Pamba te, tala maloba oyo Amosi azali koloba: ‹ Jeroboami akokufa na mopanga, mpe Isalaele akokende na bowumbu, mosika ya mabele na ye. › »
Car voilà ce que dit Amos: Jéroboam périra par le glaive, et Israël sera emmené captif hors de sa terre.
12 Amatsia alobaki na Amosi: — Yo, momoni makambo, bima na mokili na biso! Zonga na mokili ya Yuda. Kuna, okosala mbongo na masakoli na yo.
Et Amasias dit à Amos: Ô Voyant, pars, retire-toi dans la terre de Juda; c'est là que tu vivras, et là que tu prophétiseras.
13 Kosakola lisusu na Beteli te, pamba te Beteli ezali Esika ya bule ya mokonzi mpe tempelo ya bokonzi.
Tu ne continueras plus de prophétiser en Béthel; c'est la ville sainte du roi, et la demeure royale.
14 Amosi azongiselaki Amatsia: — Nazalaki mosakoli te to mwana ya mosakoli te, kasi nazalaki nde mobateli bibwele mpe moloni ya basikomori.
Et Amos répondit, et dit à Amasias: Je n'étais point prophète, ni fils de prophète, mais chevrier; et je cueillais des mûres.
15 Kasi Yawe alongolaki ngai na mosala ya kobatela bibwele mpe alobaki na ngai: « Kende kosakola epai ya bato na Ngai, Isalaele. »
Et le Seigneur m'a pris au milieu de mon troupeau, et le Seigneur m'a dit: Pars et prophétise à Mon peuple Israël.
16 Yoka sik’oyo Liloba na Yawe, yo oyo ozali koloba na ngai: « Tika kosakola mpo na kotelemela libota ya Isalaele mpe tika koloba mabe mpo na ndako ya Izaki! »
Et maintenant écoute la parole du Seigneur: Tu dis: Ne prophétise point sur Israël, et n'ameute pas la foule contre la maison de Jacob.
17 Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi: « Mwasi na yo akosala kindumba kati na engumba, bana na yo ya mibali mpe ya basi bakokufa na mopanga, bakokabola mabele na yo na biteni. Yo moko, okokufa na mabele ya mbindo, mpe Isalaele akokende solo na bowumbu, mosika ya mokili na ye ya mbotama. »
À cause de cela, voici ce que dit le Seigneur: Ta femme se prostituera dans la ville, et tes fils et tes filles périront par le glaive, et tes champs seront partagés au cordeau, et tu mourras en une terre impure, et Israël sera emmené captif hors de sa terre.

< Amosi 7 >