< Amosi 6 >
1 Mawa na bino oyo bomimonaka ete bokoka kati na Siona, mpe na bino oyo bokanisaka ete bozali na kimia na likolo ya ngomba Samari, bino bato ya lokumu ya ekolo oyo ekenda sango koleka bikolo mosusu epai wapi bana ya Isalaele bayaka!
Nnome nka mo a mogye mo ho die wɔ Sion, ne mo a mo asom adwo mo wɔ Samaria bepɔ so, mo atitire a mowɔ ɔman dikanfoɔ mu, a Israelfoɔ ba mo nkyɛn!
2 Bokende na Kaline mpo na kotala makambo oyo elekaki kuna! Bongo longwa kuna, bokende na Amati, engumba monene, mpe bokende lisusu na Gati kati na Filisitia! Boni, bingumba oyo eleki penza bingumba ya mikili ya bokonzi oyo na malamu? Mpe etando na yango eleki ya bino na monene?
Monkɔ Kalne, nkɔhwɛ hɔ. Na momfiri hɔ nkɔ Hamat kɛseɛ mu, monsiane nkɔ Gat a ɛwɔ Filistia. Wɔyɛ sene mo ahemman mmienu no? Wɔn asase no so sene mo deɛ no anaa?
3 Bozali kozongisa mokolo ya pasi sima mpe komibendela bokonzi ya somo.
Motu ɛda bɔne hyɛ ɛda na motwe Atemmuo da bɛn.
4 Bozali kolala na bambeto oyo batia pembe ya nzoko, bozali komivandisa na bakiti ya divan ya kitoko, bozali kolia misuni ya bameme ya kitoko kati na bibwele mpe ya bana ngombe ya mibali ya mafuta kati na etonga.
Modeda asonse mpa so mogye mo ahome wɔ mo nnaeɛ mu, na mowe nnwammaa ne anantwie mma a wɔadɔre sradeɛ nam.
5 Bozali kobeta mandanda na bino lokola Davidi mpe kokotisa bibetelo mindule kati na banzembo na bino.
Mode mo sankuten to ahuhudwom, na mobɔ mo tirim yɛ nnwom wɔ mo nnwontodeɛ so te sɛ Dawid.
6 Bozali komela bakopo etonda na masanga ya vino mpe bozali kopakola mafuta ya talo na banzoto na bino, kasi kobebisama ya ndako ya Jozefi ezali kosala bino pasi na mitema te.
Monom nsã nkorama mu na mode sradehwam papa yɛ mo ho, na monni awerɛhoɔ wɔ Yosef sɛeɛ ho.
7 Yango wana bokozala bato ya liboso mpo na kokende na bowumbu, mpe bafeti ya bato oyo bamivandisaka na bakiti ya kitoko ekosila.
Ɛno enti, mobɛka atukɔfoɔ a wɔdi ɛkan no ho; na mo apontoɔ ne mo ahomegyeɛ to bɛtwa.
8 Nkolo Yawe alapi ndayi na Kombo na Ye moko; Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Nazali na somo ya lolendo ya Jakobi, nayini bandako na ye, oyo batonga makasi; nakokaba engumba elongo na biloko na yango nyonso. »
Otumfoɔ Awurade aka ne ho ntam na deɛ Asafo Awurade Onyankopɔn seɛ nie: “Mekyiri Yakob ahomasoɔ na memmpɛ nʼaban; mede kuropɔn no bɛma ɛne deɛ ɛwɔ mu nyinaa.”
9 Soki bato zomi batikali na bomoi kati na ndako moko, bango mpe bakokufa.
Sɛ wogya nnipa edu wɔ efie baako mu a, wɔn nso bɛwuwu.
10 Soki noko moko oyo asengeli kotumba bibembe ayei kobimisa yango na ndako mpe atuni na moto nyonso oyo abombami kuna: — Boni, ozali elongo na moto mosusu kuna? Akozongisa: — Te, moto mosusu azali te! Bongo akoloba lisusu: — Esili! Bakolobela lisusu Kombo ya Yawe te.
Na sɛ obusuani a ɔrebɛhye awufoɔ no ba sɛ ɔrebɛfa wɔn afiri efie hɔ na ɔbisa obi a wakɔtɛ sɛ, “Obi ka wo ho anaa?” Na ɔbuaa sɛ, “Dabi” a, afei ɔbɛka sɛ, “Mua wʼano!” Ɛnsɛ sɛ wɔbɔ Awurade din.
11 Pamba te Yawe apesi mitindo, boye akobuka-buka na biteni ndako monene mpe akobuka-buka na biteni ya mike-mike ndako moke.
Na Awurade ahyɛ mmara na ɔbɛbubu afie akɛseɛ no mu asinasini ne afie nketewa no nso mu nketenkete.
12 Boni, bampunda ekimaka penza mbangu na nzela oyo etonda na mabanga? Ngombe ebalolaka penza mabele na bisika ya ndenge wana? Kasi bino bokomisi bosembo ngenge, mpe mbuma ya bosembo bololo.
Apɔnkɔ tu mmirika wɔ abotan a apaapae so anaa? Na obi de nantwie funtum hɔ anaa? Nanso, moadane atɛntenenee ayɛ no awuduro. Na tenenee nso ayɛ nwononwono.
13 Bozali kosepela mpo ete bozwi Lo-Debari mpe bozali komikumisa na koloba: « Boni, tobotoli engumba Karinayimi na makasi na biso moko te? »
Mo a moani gye Lo-debar nkoguo ho, na mobisa sɛ, “Ɛnyɛ yɛn ahoɔden na yɛde dii Karnaim so anaa?”
14 Mpo na yango, Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Oh libota ya Isalaele, nakobimisa ekolo moko oyo ekobundisa mpe ekonyokola yo tango nyonso wuta na Lebo-Amati kino na lubwaku ya Araba. »
Deɛ Asafo Awurade Onyankopɔn seɛ nie: “Mɛhwanyan ɔman bi abɛtia mo, Ao Israelfoɔ, deɛ ɔbɛhyɛ mo so firi Lebo Hamat akɔsi Araba bɔnhwa mu.”