< Amosi 5 >
1 Oh libota ya Isalaele, boyoka maloba oyo, eleli oyo nazali koloba na tina na bino:
Listen to the words of the funeral song I am singing for you, Israel:
2 « Isalaele, mboka kitoko, ekweyi na mabele, ezali kokoka kotelema lisusu te! Basundoli yango kaka bongo, mpe moto akotelemisa yango azali te. »
Fallen, no more to rise, is the virgin Israel! Hurled down upon her own soil she lies, with no one to lift her up!
3 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: « Engumba oyo ekotinda basoda nkoto moko mpo na kobundela Isalaele ekotikala kaka na basoda nkama moko, mpe oyo ekotinda basoda nkama moko ekotikala kaka na basoda zomi. »
For the Lord God says this: The city that marches out with a thousand soldiers has only a hundred left, and the one that marches out with a hundred has only ten left.
4 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na libota ya Isalaele: « Bozonga epai na Ngai mpe bokobika!
For the Lord says this to Israel: Seek me and live,
5 Bokende koluka na Beteli te, bokende na Giligali te, bosala mobembo na Beri-Sheba te. Pamba te Giligali ekokende na bowumbu, mpe Beteli ekokoma eloko pamba. »
But do not seek Bethel, do not enter Gilgal, do not go over to Beer-sheba. For Gilgal will enter exile, and Bethel will go to destruction.
6 Boluka Yawe mpe bokobika, soki te akokitela libota ya Jozefi lokola moto oyo ekozikisa yango, mpe moto moko te akozala na Beteli mpo na koboma yango.
Seek the Lord and live, or he will cast fire on the house of Joseph, and it will devour and there will be no one to quench it for Bethel.
7 Bino bato oyo bobongolaka bosembo ngenge mpe bobwakaka bosolo na mabele,
You who turn judgment to bitter wormwood, and cast righteousness into the dirt:
8 boluka Ye oyo akela lisanga ya minzoto, oyo abongolaka molili pole mpe akomisaka moyi butu, oyo abengaka mayi ya ebale monene mpe asopaka yango na etando ya mokili; Kombo na Ye ezali: Yawe.
He who made the Pleiades and Orion, who turns deep darkness into dawn, who darkens day again into night, who summons the waters of the sea, and pours them out on the earth’s surface, the Lord is his name!
9 Akweyisaka bato ya makasi mpe abebisaka engumba ya makasi.
He causes destruction to burst over the strong. He brings devastation on the fortress.
10 Bino bato boyinaka moto oyo akataka makambo na bosembo mpe botiolaka moto oyo alobaka solo,
You who hate the arbiters at the city gate, and abhor anyone who speaks the truth:
11 lokola bozali konyokola babola mpe kobotola bambuma na bango ya ble, bokovanda te na bandako oyo botongaki na mabanga bakata, bokomela te masanga ya vino ya bilanga kitoko ya vino oyo bolonaki.
Because you trample on the weak, and tax their grain, although you have built houses of hewn stone, you will not live in them, although you have planted charming vineyards, you will not drink their wine.
12 Pamba te nayebi ndenge nini mabe na bino ezali ebele mpe ndenge nini masumu na bino ezali minene: bozali konyokola bato ya sembo mpe kozwa kanyaka, mpe lisusu bozali kokata makambo ya babola na bosembo te.
For I know how many are your crimes, and how great are your sins! You persecutors of the righteous, takers of bribes! You deny the poor their justice at the city gate.
13 Boye, moto ya mayele alobaka te na tango ya boye, pamba te mikolo ezali mabe.
It would be wise to keep quiet in such an evil time.
14 Bolukaka kosala bolamu, kasi mabe te, mpo ete bokoka kobika. Boye, Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, akozala elongo na bino, ndenge kaka bozali koloba yango.
Seek good and not evil, that you may live, so the Lord, God of hosts, may be with you, as you have claimed he is.
15 Boyinaka kosala mabe, kasi bolingaka nde kosala bolamu; bolukaka bosembo tango bozali kosambisa. Tango mosusu Yawe, Mokonzi ya mampinga, akoyokela ndambo ya bato oyo bamikomisaki mbindo te mawa kati na libota ya Jozefi.
Hate evil and love good, establish justice at the city gate. Perhaps the Lord, the God of hosts, will be gracious to a surviving remnant of Joseph.
16 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo, Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Kolela ekozala na babalabala nyonso, mpe koganga ya somo ekozala na bisika nyonso oyo bato bakutanaka. Bakobengisa basali bilanga na matanga, mpe bato oyo balelaka bibembe mpo na kolela.
Therefore the Lord, the God of hosts, says: In all the public squares there will be wailing, in every street the sound of mourning. They will summon the farmers to mourning, and professional mourners to wailing.
17 Kolela ekozala na bilanga nyonso ya vino, pamba te nakoleka kati na bino, » elobi Yawe.
In all vineyards there will be lamenting, when I pass through your midst, says the Lord.
18 Mawa na bino oyo bozali na posa ya mokolo ya Yawe! Bozali kozela nini na mokolo ya Yawe? Ekozala mokolo ya molili, kasi ya pole te.
Fools who long for the day of the Lord! What does the day of the Lord mean to you? It is darkness, and not light.
19 Ekozala lokola moto oyo azali kokima nkosi, bongo akutani na ngombolo; lokola moto oyo akoti na ndako na ye mpe atie loboko na ye na mir, bongo nyoka eswi ye.
It is as when one flees from a lion, and is attacked by a bear, as when one reaches home, leans his hand on the wall, and a snake bites him.
20 Boni, mokolo ya Yawe ekozala te mokolo ya molili? Boni, ekozala te mokolo oyo ezanga pole? Ekozala penza mokolo ya molili makasi, ata kongenga moke ekozala te.
Won’t the Lord’s day be darkness and not light, murky darkness without a ray of light in it?
21 Nayini bafeti na bino ya bule, nazali kosepela na yango ata moke te; mayangani na bino ya bule ezali kolumba solo mabe liboso na Ngai.
I hate, I despise your feasts, I will not smell the savor of your festivals,
22 Ata soki bomemeli Ngai bambeka na bino ya kotumba to ya bambuma, nakondima yango te; ata soki bomemeli Ngai bambeka ya boyokani, oyo eleki mafuta, nakotala yango ata moke te.
I will not be pleased with your burnt offerings, your grain offerings, I will not accept the peace offerings of your fattened calves.
23 Bolongola makelele ya banzembo na bino liboso na Ngai! Nakoyoka mindule ya mandanda na bino te.
Spare me the noise of your songs, I will not listen to the melody of your lyres.
24 Kasi tika ete makambo ekatama na bosolo ndenge ebale etiolaka, mpe bosembo etambola lokola ebale oyo ekawukaka te.
But let justice roll on as a flood of waters, and righteousness like an unfailing stream.
25 Oh bato ya Isalaele, boni, bozalaki kobonzela Ngai mbeka mpe kopesa Ngai makabo na mibu tuku minei oyo bolekisaki na esobe?
Was it only sacrifices and grain offerings you brought me during the forty years in the wilderness, Israel?
26 Nzokande, botombolaki ndako ya kapo ya Sikuti, mokonzi na bino, mpe evandelo ya Kevani, nzambe na bino ya ekeko, monzoto ya nzambe na bino oyo bomisalelaki.
But now you will lift up your “king” Sikkuth and “star god” Kiyyun, your idols which you have made for yourselves,
27 Yango wana nakotinda bino na bowumbu, mosika koleka Damasi, elobi Ye oyo Kombo na Ye ezali: Yawe, Nzambe Mokonzi ya mampinga.
as I drive you into exile beyond Damascus, says the Lord, whose name is the God of hosts.