< Amosi 4 >

1 Bino bangombe ya basi ya Bashani, boyoka maloba oyo; bozali lokola ngomba ya Samari, bino bato oyo bonyokolaka babola, bomonisaka bato bakelela pasi mpe bolobaka na mibali na bino: « Bomemela biso masanga mpo tomela. »
Listen to this message, women of Sameria, you well-fed cows of Bashan, who oppress the poor and crush the needy, who say to your husbands, ‘Bring us another drink!’
2 Nkolo Yawe alapi ndayi mpo na bosantu na Ye: « Solo, na mikolo ekoya, bakomema bino mpe bana na bino na bandobo;
The Lord God has sworn by his holiness: The time is coming when you will be carried away in baskets, your children carried away in fish-baskets,
3 bokobimela na madusu kati na mir, moko na moko na lidusu oyo ezali liboso na ye, mpe bakobengana bino kino na ngomba Erimoni, » elobi Yawe.
and through the breaches in the city wall you will go, thrown out on the garbage dump, says the Lord.
4 « Bokende na Beteli mpe bosala masumu, bokende na Giligali mpe bosala lisusu masumu koleka. Bobonza bambeka na bino tongo nyonso, mpe eteni na bino ya zomi sima na mokolo ya misato.
Come to Bethel and transgress, at Gilgald increase your transgression. Bring your sacrifices in the morning, every third day your tithes!
5 Botumba farine oyo batia levire lokola likabo ya kozongisa matondi, mpe bobeta tolo mpo na makabo na bino, oyo bokati kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko. Bino bana ya Isalaele, bolobela yango na mongongo makasi, pamba te bolingaka nde kosala bongo, elobi Nkolo Yawe.
Burn some leavened bread as a thank-offering, proclaim aloud your voluntary offerings, for you love to do this, Israelites! says the Lord God.
6 Nabomaki bino nzala kati na bingumba na bino nyonso, napimelaki bino bilei kati na bamboka na bino nyonso; kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.
But it was I who gave to you empty stomachs in all your cities, and lack of bread in all your towns, yet you have not returned to me, says the Lord.
7 « Napimelaki bino lisusu mvula, basanza misato mobimba liboso ete tango oyo babukaka bambuma ekoma. Natindaki mvula na engumba moko mpe nakangaki yango na engumba mosusu. Elanga moko enokelaki mvula, kasi mosusu ezangelaki yango mpe ekawukaki.
It was I who withheld from you the rain, sending rain on one city, while on another I allowed no rain. One field received rain, while a field without rain withered.
8 Bato bazalaki kotambola-tambola longwa na engumba moko kino na engumba mosusu mpo na koluka mayi, kasi bazwaki mayi oyo ekokelaki baposa na bango te; atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.
People from two or three cities ranged as far as another city for drinking water, and still they did not have enough, yet you did not return to me, says the Lord.
9 « Mbala mingi, nazalaki kobwakela bilanga na bino bokono, banzete na bino ya ble mpe ya vino ekomaki kokawuka; bongo mabanki ekomaki kolia banzete na bino ya figi mpe ya olive. Kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.
I struck you with blight and mildew, I laid waste your gardens and vineyards. The swarming locust devoured your fig and your olive trees, yet you did not return to me, says the Lord.
10 « Natindaki, kati na bino, bokono oyo ebomaka, ndenge nasalaki kati na Ejipito; nabomaki bilenge mibali na bino na mopanga mpe nasalaki ete babotola bampunda na bino; mpe natondisaki bazolo na bino na solo ya bibembe oyo ekufaki na molako na bino. Kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.
I sent plague among you like the plagues of Egypt, I slew your youths with the sword, your horses raided away, I caused the stench of your camps to rise in your nostrils, yet you did not return to me, says the Lord.
11 « Nabebisaki bino ndenge nabebisaki Sodome mpe Gomore; bozalaki lokola koni ya moto oyo babimisi na moto. Kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.
I wrought a destruction among you, as God destroyed Sodom and Gomorrah. You were like a stick snatched from the fire, yet you did not return to me, says the Lord.
12 « Yango wana, Isalaele, tala makambo oyo nakosala yo! Mpe lokola nakosala yo bongo, Isalaele, mibongisa mpo na kokutana na Nzambe na yo. »
Therefore this is what I will do to you, Israel, and because I am about to do this to you, prepare to meet your God, Israel.
13 Pamba te Ye oyo asalaki bangomba, oyo akelaki mipepe, oyo alakisaka makanisi na Ye epai na moto, oyo abongolaka pole molili, oyo atambolaka likolo ya bangomba ya mokili, Kombo na Ye ezali: Yawe, Nzambe Mokonzi ya mampinga.
He is here! He who forms the mountains, creates the wind, declares to his thoughts to mortals, makes dawn and darkness, treads upon the heights of the earth, the Lord, the God of hosts, is his name!

< Amosi 4 >