< Amosi 3 >

1 Oh bana ya Isalaele, boyoka liloba oyo Yawe alobi na tina na bino, na tina na etuka nyonso oyo nabimisaki na Ejipito:
Hear this word that Yahweh has spoken against you, people of Israel, against the whole family that I brought up out of the land of Egypt:
2 « Bozali etuka moko kaka oyo Ngai napona kati na bituka nyonso ya mabele; yango wana nakopesa bino etumbu mpo na mabe nyonso oyo bosali.
“I have chosen only you from all the families of the earth. Therefore I will punish you for all your sins.”
3 Boni, bato mibale bakoki solo kotambola nzela moko soki bayokani te?
Will two walk together unless they have agreed?
4 Nkosi ekoki solo koganga na zamba soki emoni te nyama ya kolia? Mwana nkosi ekoki penza konguluma na esika oyo evandaka soki ekangi nyama te?
Will a lion roar in the forest when he has no victim? Will a young lion growl from his den if he has caught nothing?
5 Ndeke ekoki solo kokangama na motambo oyo ezali na mabele soki ezangi eloko ya kolia? Motambo ekoki solo koningana soki ekangi eloko te?
Can a bird fall in a trap on the ground when no bait is set for him? Will a trap spring up from the ground when it has not caught anything?
6 Boni, kelelo ya bitumba ekoki solo kobeta kati na engumba, bongo bato bazanga kobanga? Pasi ekoki solo koya na engumba soki Yawe atindi yango te?
If a trumpet sounds in a city, will the people not tremble? If disaster overtakes a city, has Yahweh not sent it?
7 Solo, Nkolo Yawe asalaka eloko moko te soki alakisi mabongisi na Ye te epai ya basali na Ye, basakoli.
Surely the Lord Yahweh will do nothing unless he reveals his plan to his servants the prophets.
8 Nkosi egangi; nani akobanga te? Nkolo Yawe alobi; nani akoki koboya kosakola?
The lion has roared; who will not fear? The Lord Yahweh has spoken; who will not prophesy?
9 Bosakola makambo oyo kati na bandako ya Asidodi mpe ya Ejipito: ‹ Bosangana na likolo ya bangomba ya Samari mpe botala ndenge nini mobulu mpe minyoko ezali kosalema kati na yango!
Proclaim this in the fortresses at Ashdod, and in the fortresses in the land of Egypt; say, “Assemble yourselves on the mountains of Samaria and see what great confusion is in her, and what oppression is in her.
10 Bato na Ngai bayebi lisusu te kosala makambo na bosembo, › elobi Yawe, ‹ batondisi bandako na bango na bomengo ya bitumba mpe na biloko oyo babotoli na makasi. › »
For they do not know how to do right —this is Yahweh's declaration— They store up violence and destruction in their fortresses.”
11 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: « Monguna moko akozingela yo, akosukisa yo mpe akobotola na makasi biloko kati na bandako na yo, oyo batonga makasi. »
Therefore, this is what the Lord Yahweh says: “An enemy will surround the land, and pull down your strongholds and plunder your fortresses.”
12 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Ndenge mobateli bibwele alongolaka na monoko ya nkosi makolo mibale to songe ya litoyi ya meme, ndenge wana nde bana ya Isalaele bakobikisama, ba-oyo bavandaka na Samari, na basonge mpe na basuka ya bambeto na bango. »
This is what Yahweh says: “As the shepherd rescues out of the mouth of the lion two legs only, or a piece of an ear; so will the people of Israel who live in Samaria be rescued; they will be left with only the corner of a couch or a piece of a bed.”
13 « Boyoka makambo oyo mpe bokebisa ndako ya Jakobi, » elobi Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga.
Hear and testify against the house of Jacob —this is the declaration of the Lord Yahweh, the God of hosts:
14 « Na mokolo oyo nakopesa Isalaele etumbu mpo na masumu na ye, nakobebisa bitumbelo ya Beteli, nakobuka maseke ya bitumbelo, mpe ekokweya na mabele.
“For in the day that I punish the sins of Israel, I will also punish the altars of Bethel. The horns of the altar will be cut off and fall to the ground.
15 Nakokweyisa ndako ya tango ya malili makasi mpe ya tango ya molunge makasi; mpe bandako oyo batonga kitoko na pembe ya nzoko ekozala lisusu te, » elobi Yawe.
I will destroy the winter house with the summer house. The houses of ivory will perish, and the large houses will vanish, —this is Yahweh's declaration.”

< Amosi 3 >