< Amosi 1 >

1 Maloba ya Amosi, moko kati na babateli bibwele ya mboka Tekoa. Azwaki emoniseli ya maloba oyo na tina na mokili ya Isalaele, mibu mibale liboso ete koningana ya mabele esalema, tango Oziasi azalaki mokonzi ya Yuda, mpe Jeroboami, mwana mobali ya Joasi, azalaki mokonzi ya Isalaele.
Discours d'Amos, qui était parmi les bergers de Thékoa, lesquels lui furent révélés en vision sur Israël, au temps de Hosias, roi de Juda, et au temps de Jéroboam, fils de Joas, roi d'Israël, deux ans avant le tremblement de terre.
2 Alobaki: Yawe azali koganga wuta na Siona, mpe azali koloba wuta na Yelusalemi, na mongongo makasi lokola kake. Matiti ya bitando epai wapi babateli bibwele baleisaka bibwele ekokawuka, mpe songe ya ngomba Karimeli ekokawuka.
Et il dit: L'Éternel de Sion pousse un rugissement, et de Jérusalem fait entendre sa voix, et le deuil est sur les pacages des bergers, et la sécheresse sur la cime du Carmel.
3 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Likolo ya masumu misato to minei ya Damasi, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bakataki-kataki bato ya Galadi na nzela ya bibende oyo etimolaka mabele mpo na kosala bilanga.
Ainsi parle l'Éternel: A cause de trois, de quatre crimes de Damas, je ne m'en rétracte point, parce qu'ils ont foulé Galaad sous des traîneaux de fer:
4 Nakotia moto na ndako ya mokonzi Azaeli, mpe moto yango ekozikisa bandako ya mokonzi Beni-Adadi, oyo batonga makasi.
je lancerai donc un feu dans la maison d'Hazaël, pour qu'il dévore les palais de Benhadad,
5 Nakobuka ekuke ya Damasi, nakobebisa mokonzi ya bavandi ya Lubwaku ya Beti-Aveni, mpe oyo azali kokonza na Beti-Edeni; mpe bato ya Siri bakokende na bowumbu na Kiri, » elobi Yawe.
et je briserai les verrous de Damas, et exterminerai de la vallée des idoles les habitants, et de Beth-Eden celui qui tient le sceptre, et le peuple d'Aram s'en ira captif à Kir, dit l'Éternel.
6 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Likolo ya masumu misato to minei ya Gaza, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bamemaki bikolo ebele na bowumbu mpe batekaki bango na Edomi.
Ainsi parle l'Éternel: A cause de trois, de quatre crimes de Gaza, je ne m'en rétracte point, parce qu'ils ont emmené des captifs en grand nombre pour les livrer à Édom:
7 Nakotia moto na bamir ya Gaza, mpe moto yango ekozikisa bandako na yango, oyo batonga makasi.
Je lancerai donc un feu dans les murs de Gaza, pour qu'il dévore ses palais,
8 Nakoboma mokonzi ya bavandi ya Asidodi mpe oyo azali kokonza na Ashikeloni. Nakobalukela engumba Ekroni kino tango moto ya suka kati na bato ya Filisitia akokufa, » elobi Nkolo Yawe.
et d'Asdod j'exterminerai les habitants, et d'Askalon celui qui tient le sceptre, et je tournerai ma main contre Hécron, afin que périsse le reste des Philistins, dit le Seigneur, l'Éternel.
9 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Likolo ya masumu misato to minei ya Tiri, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bakabaki bato ebele na bowumbu epai ya bato ya Edomi mpe batosaki te boyokani ya bondeko.
Ainsi parle l'Éternel: A cause de trois, de quatre crimes de Tyr, je ne m'en rétracte point, parce qu'ils ont livré des captifs en grand nombre à Édom, et n'ont point pensé à leur alliance avec des frères:
10 Nakotia moto na bamir ya engumba Tiri, mpe moto yango ekozikisa bandako na yango, oyo batonga makasi. »
j'enverrai donc un feu dans les murs de Tyr, afin qu'il dévore ses palais.
11 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Likolo ya masumu misato to minei ya Edomi, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te balandaki bandeko na bango na mopanga, bayokelaki bango mawa te, kanda na bango ezalaki tango nyonso komata, mpe bayina bango wuta kala.
Ainsi parle l'Éternel: A cause de trois, de quatre crimes d'Édom, je ne m'en rétracte point, parce qu'avec l'épée il a poursuivi ses frères et qu'il a étouffé son affection, et que sa fureur est toujours acharnée, et qu'il garde sa colère à jamais:
12 Nakotia moto na engumba Temani, mpe moto yango ekozikisa bandako ya Botsira, oyo batonga makasi. »
je lancerai donc un feu en Théman, afin qu'il dévore les palais de Botsra.
13 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Likolo ya masumu misato to minei ya Amoni, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bapasolaki mabumu ya basi ya zemi ya Galadi mpo na koyeisa mokili na bango monene.
Ainsi parle l'Éternel: A cause de trois, de quatre crimes des enfants d'Ammon, je ne m'en rétracte point, parce qu'ils ont éventré les femmes enceintes de Galaad, pour étendre leurs frontières:
14 Nakotia moto na bamir ya engumba ya Raba, mpe moto yango ekozikisa bandako na yango, oyo batonga makasi, kati na koganga na mokolo ya bitumba, kati na mopepe makasi na mokolo ya ekumbaki.
j'allumerai donc un feu dans les murs de Rabbah, pour qu'il dévore ses palais au milieu des cris de guerre au jour de la bataille, au bruit de l'ouragan, au jour de la tempête;
15 Mokonzi na bango akokende na bowumbu, ye elongo na bakalaka na ye, » elobi Yawe.
et leur roi s'en ira captif, lui et ses grands tous ensemble, dit l'Éternel.

< Amosi 1 >