< Misala ya Bantoma 9 >
1 Nzokande, Saulo azalaki kaka kokanela mpe koluka koboma bayekoli ya Nkolo. Akendeki epai ya mokonzi ya Banganga-Nzambe,
사울이 주의 제자들을 대하여 여전히 위협과 살기가 등등하여 대제사장에게 가서
2 mpe asengaki ye mikanda ya mosala mpo na bandako ya mayangani ya Damasi, mpo ete, soki akuti kuna bato oyo bazali kolanda nzela ya Nkolo, akanga bango mpe amema bango na Yelusalemi, ezala basi to mibali.
다메섹 여러 회당에 갈 공문을 청하니 이는 만일 그 도를 좇는 사람을 만나면 무론 남녀하고 결박하여 예루살렘으로 잡아오려 함이라
3 Wana azalaki kokende na Damasi mpe akomaki pene ya engumba yango, amonaki mbala moko pole moko kowuta na likolo mpe kongengela ye.
사울이 행하여 다메섹에 가까이 가더니 홀연히 하늘로서 빛이 저를 둘러 비추는지라
4 Akweyaki na mabele mpe ayokaki mongongo moko koloba na ye: — Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola Ngai?
땅에 엎드러져 들으매 소리 있어 가라사대 `사울아! 사울아! 네가 어찌하여 나를 핍박하느냐?' 하시거늘
5 Saulo atunaki: — Nkolo, yo nani? Mongongo ezongisaki: — Ngai, nazali Yesu oyo yo ozali konyokola.
대답하되 `주여 뉘시오니이까?' 가라사대 `나는 네가 핍박하는 예수라
6 Kasi sik’oyo, telema, kota kati na engumba, mpe, kuna, bakoyebisa yo makambo oyo osengeli kosala.
네가 일어나 성으로 들어가라 행할 것을 네게 이를 자가 있느니라' 하시니
7 Bato oyo bazalaki kokende mobembo elongo na Saulo batelemaki mpe bazangaki maloba ya koloba; bayokaki mongongo yango, kasi bamonaki moto moko te.
같이 가던 사람들은 소리만 듣고 아무도 보지 못하여 말을 못하고 섰더라
8 Saulo atelemaki wuta na mabele; kasi tango afungolaki miso, amonaki lisusu te. Boye, basimbaki ye na loboko mpe bamemaki ye na Damasi.
사울이 땅에서 일어나 눈은 떴으나 아무 것도 보지 못하고 사람의 손에 끌려 다메섹으로 들어가서
9 Mikolo misato, akokaki komona te, aliaki eloko te mpe amelaki eloko te.
사흘 동안을 보지 못하고 식음을 전폐하니라
10 Kati na Damasi, ezalaki na moyekoli moko oyo kombo na ye ezalaki « Ananiasi. » Nkolo abengaki ye kati na emoniseli: — Ananiasi! Azongisaki: — Nkolo, ngai oyo!
그 때에 다메섹에 아나니아라 하는 제자가 있더니 주께서 환상 중에 불러 가라사대 `아나니아야' 하시거늘 대답하되 `주여, 내가 여기 있나이다' 하니
11 Nkolo alobaki na ye: — Telema, kende na ndako ya Yuda, oyo ezali na balabala oyo babengaka « Alima » mpe tuna moto moko ya mboka Tarse, kombo na ye « Saulo. » Azali kosambela
주께서 가라사대 `일어나 직가라 하는 거리로 가서 유다 집에서 다소 사람 사울이라 하는 자를 찾으라 저가 기도하는 중이다
12 mpe, kati na emoniseli, awuti komona moto moko kokota mpe kotia ye maboko mpo ete amona lisusu; kombo na ye « Ananiasi. »
저가 아나니아라 하는 사람이 들어와서 자기에게 안수하여 다시 보게 하는 것을 보았느니라' 하시거늘
13 Ananiasi azongisaki: — Nkolo, bato ebele bayebisi ngai makambo na tina na moto yango mpe mabe nyonso oyo asali babulami na Yo, na Yelusalemi.
아나니아가 대답하되 `주여, 이 사람에 대하여 내가 여러 사람에게 듣사온즉 그가 예루살렘에서 주의 성도에게 적지 않은 해를 끼쳤다 하더니
14 Mpe ayei awa, na Damasi, mpo ete bakonzi ya Banganga-Nzambe bapesi ye bokonzi ya kokanga bato nyonso oyo babelelaka Kombo na Yo.
여기서도 주의 이름을 부르는 모든 자를 결박할 권세를 대제사장들에게 받았나이다' 하거늘
15 Kasi Nkolo alobaki na Ananiasi: — Kende, pamba te nasila kopona moto wana lokola esalelo na Ngai mpo na kosakola Kombo na Ngai epai ya bikolo ya bapaya, epai ya bakonzi na bango mpe epai ya bana ya Isalaele.
주께서 가라사대 `가라, 이 사람은 내 이름을 이방인과 임금들과 이스라엘 자손들 앞에 전하기 위하여 택한 나의 그릇이라!
16 Nakolakisa ye ndenge nini asengeli konyokwama mpo na Kombo na Ngai.
그가 내 이름을 위하여 해를 얼마나 받아야 할 것을 내가 그에게 보이리라' 하시니
17 Boye, Ananiasi akendeki mpe akotaki kati na ndako; atielaki Saulo maboko na koloba: — Ndeko na ngai, Saulo; Nkolo Yesu oyo abimelaki yo na nzela, wana ozalaki koya awa, atindi ngai mpo ete omona lisusu mpe otonda na Molimo Mosantu.
아나니아가 떠나 그 집에 들어가서 그에게 안수하여 가로되 `형제 사울아! 주 곧 네가 오는 길에서 나타나시던 예수께서 나를 보내어 너로 다시 보게 하시고 성령으로 충만하게 하신다' 하니
18 Kaka na tango yango, biloko moko lokola biteku ekweyaki wuta na miso ya Saulo, mpe akomaki lisusu komona. Atelemaki mpe azwaki libatisi;
즉시 사울의 눈에서 비늘 같은 것이 벗어져 다시 보게 된지라 일어나 세례를 받고
19 mpe, sima na ye kolia, nzoto na ye ezongaki lisusu makasi. Saulo avandaki mwa mikolo elongo na bayekoli oyo bazalaki kati na Damasi.
음식을 먹으매 강건하여지니라 사울이 다메섹에 있는 제자들과 함께 며칠 있을새
20 Kaka na tango yango, abandaki koteya na bandako ya mayangani ete Yesu azali Mwana na Nzambe.
즉시로 각 회당에서 예수의 하나님의 아들이심을 전파하니
21 Bato nyonso oyo bayokaki ye bakamwaki mingi mpe batunaki: — Boni, ezali ye te moto oyo azalaki konyokola makasi, kati na Yelusalemi, bato oyo babelelaka Kombo ya Yesu? Boni, ayei awa te mpo na kokanga mpe komema bango epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe?
듣는 사람이 다 놀라 말하되 `이사람이 예루살렘에서 이 이름 부르는 사람을 잔해하던 자가 아니냐? 여기 온것도 저희를 결박하여 대제사장들에게 끌어 가고자 함이 아니냐?' 하더라
22 Nzokande, kondima ya Saulo ezalaki se kokoba kolendisama mpe azalaki kondimisa Bayuda oyo bavandaka na Damasi ete Yesu azali Klisto.
사울은 힘을 더 얻어 예수를 그리스도라 증명하여 다메섹에 사는 유대인들을 굴복시키니라
23 Sima na mikolo ebele, Bayuda bayokanaki koboma Saulo;
여러 날이 지나매 유대인들이 사울 죽이기를 공모하더니
24 kasi Saulo ayokaki sango na tina na mabongisi na bango. Butu mpe moyi, bazalaki kokengela bikuke ya engumba mpo na koluka koboma ye.
그 계교가 사울에게 알려지니라 저희가 그를 죽이려고 밤낮으로 성문까지 지키거늘
25 Kasi bayekoli ya Saulo bamemaki ye na butu mpe babimisaki ye libanda ya mir, na kokitisa ye kati na kitunga.
그의 제자들이 밤에 광주리에 사울을 담아 성에서 달아 내리니라
26 Tango Saulo akomaki na Yelusalemi, amekaki kosangana na bayekoli, kasi bango nyonso bazalaki kobanga ye, pamba te bazalaki penza kondima te ete akomi penza moyekoli.
사울이 예루살렘에 가서 제자들을 사귀고자 하나 다 두려워하여 그의 제자 됨을 믿지 아니하니
27 Barnabasi azwaki ye mpe amemaki ye epai ya bantoma; ayebisaki bango ndenge nini Saulo, na mobembo na ye, amonaki Nkolo, mpe ete Nkolo alobaki na ye. Ayebisaki bango lisusu ndenge nini, kati na Damasi, ateyaki na mpiko na Kombo na Yesu.
바나바가 데리고 사도들에게 가서 그가 길에서 어떻게 주를 본 것과 주께서 그에게 말씀하신 일과 다메섹에서 그가 어떻게 예수의 이름으로 담대히 말하던 것을 말하니라
28 Boye, wuta na tango wana, Saulo avandaki elongo na bango, azalaki kokende mpe kozonga na bonsomi kati na Yelusalemi, wana azalaki koteya na mpiko, na Kombo ya Nkolo.
사울이 제자들과 함께 있어 예루살렘에 출입하며
29 Saulo azalaki kosolola mpe kotia tembe na Bayuda oyo balobaka lokota ya Greki; nzokande, bango, bazalaki koluka nzela ya koboma ye.
또 주 예수의 이름으로 담대히 말하고 헬라파 유대인들과 함께 말하며 변론하니 그 사람들이 죽이려고 힘쓰거늘
30 Tango bandimi bayokaki likambo yango, bamemaki Saulo na Sezarea, mpe, longwa kuna, batindaki ye na Tarse.
형제들이 알고 가이사랴로 데리고 내려가서 다소로 보내니라
31 Kati na Yuda mobimba, Galile mpe Samari, Lingomba ezalaki na kimia, ezalaki kolenda mpe kotosa Nkolo, mpe motango ya bandimi na yango ezalaki kobakisama na lisungi ya Molimo Mosantu.
그리하여 온 유대와 갈릴리와 사마리아 교회가 평안하여 든든히 서가고 주를 경외함과 성령의 위로로 진행하여 수가 더 많아지니라
32 Lokola Petelo azalaki kosala mibembo kati na mboka mobimba, akendeki mpe kotala basantu oyo bazalaki kovanda kati na Lidi.
때에 베드로가 사방으로 두루 행하다가 룻다에 사는 성도들에게도 내려갔더니
33 Kuna, amonaki moto moko alala na etoko wuta mibu mwambe mpo ete azalaki kobela bokono ya bukabuka; kombo na ye « Ene. »
거기서 애니아라 하는 사람을 만나매 그가 중풍병으로 상 위에 누운지 팔 년이라
34 Petelo alobaki na ye: — Ene, Yesu-Klisto abikisi yo; telema mpe kanga etoko na yo. Mbala moko, Ene atelemaki.
베드로가 가로되 `애니아야, 예수 그리스도께서 너를 낫게 하시니 일어나 네 자리를 정돈하라' 한대 곧 일어나니
35 Tango bavandi nyonso ya Lidi mpe ya esobe ya Saroni bamonaki ye, bandimelaki Nkolo.
룻다와 사론에 사는 사람들이 다 그를 보고 주께로 돌아가니라
36 Kati na Jafa, ezalaki na mwasi moyekoli moko, kombo na ye ezalaki « Tabita. » Na lokota ya Greki, kombo na ye ezalaki Dorkasi (oyo elingi koloba: Mboloko). Azalaki tango nyonso kosala bolamu mpe kosunga babola.
욥바에 다비다라 하는 여제자가 있으니 그 이름을 번역하면 도르가라 선행과 구제하는 일이 심히 많더니
37 Na mikolo wana, akomaki kobela mpe akufaki. Sima na kosukola nzoto na ye, batiaki yango kati na shambre ya likolo.
그 때에 병들어 죽으매 시체를 씻어 다락에 뉘우니라
38 Tango bayekoli bayokaki sango ete Petelo azali kati na Lidi oyo ezali penza pene ya Jafa, batindelaki ye mibali mibale mpo na kosenga na ye: « Tobondeli yo, yaka noki! »
룻다가 욥바에 가까운지라 제자들이 베드로가 거기 있음을 듣고 두 사람을 보내어 지체 말고 오라고 간청하니
39 Mbala moko, Petelo akendeki elongo na bango; mpe tango akomaki, bamemaki ye na shambre ya likolo. Basi nyonso oyo bakufisa mibali bayaki kozingela ye, bazalaki kolela mpe kolakisa ye banzambala mpe bilamba mosusu oyo Dorkasi asalaki, wana azalaki nanu elongo na bango.
베드로가 일어나 저희와 함께 가서 이르매 저희가 데리고 다락에 올라가니 모든 과부가 베드로의 곁에 서서 울며 도르가가 저희와 함께 있을 때에 지은 속옷과 겉옷을 다 내어 보이거늘
40 Petelo abimisaki bato nyonso; bongo afukamaki mpe asambelaki. Wana azalaki kotala epai ebembe ya mama Dorkasi ezalaki, alobaki: — Tabita, telema! Tabita afungolaki miso; mpe wana amonaki Petelo, avandaki.
베드로가 사람을 다 내어 보내고 무릎을 꿇고 기도하고 돌이켜 시체를 향하여 가로되 `다비다야, 일어나라' 하니 그가 눈을 떠 베드로를 보고 일어나 앉는지라
41 Petelo asimbaki ye na loboko na ye mpe atelemisaki ye. Bongo abengaki bandimi, mingi-mingi basi oyo bakufisa mibali, mpe alakisaki bango Dorkasi ya bomoi.
베드로가 손을 내밀어 일으키고 성도들과 과부들을 불러들여 그의 산 것을 보이니
42 Sango yango epanzanaki kati na engumba mobimba ya Jafa, mpe bato mingi bandimelaki Nkolo.
온 욥바 사람이 알고 많이 주를 믿더라
43 Petelo avandaki tango molayi kati na Jafa, epai ya moto moko oyo kombo na ye ezalaki « Simona; » azalaki mobongisi baposo ya banyama.
베드로가 욥바에 여러 날 있어 시몬이라 하는 피장의 집에서 유하니라