< Misala ya Bantoma 8 >

1 Saulo mpe azalaki na molongo ya bato oyo bandimaki ete baboma Etieni. Kobanda na mokolo wana, minyoko ya makasi ekweyelaki Lingomba kati na Yelusalemi; mpe bandimi nyonso bapalanganaki na Yuda mpe na Samari, longola kaka bantoma.
And, Saul, was taking pleasure with them in his death. Moreover there arose, in that day, a great persecution against the assembly which was in Jerusalem; [and], all, were scattered abroad throughout the countries of Judaea and Samaria, except the apostles.
2 Bato oyo batosaka mibeko ya Nzambe bakundaki Etieni mpe balelaki ye mingi.
Howbeit reverent men assisted at the burial of Stephen, and made great lamentation over him.
3 Kasi Saulo akomaki koluka kopanza Lingomba; azalaki kokota na bandako nyonso mpo na kokanga mibali mpe basi, mpe kobwaka bango na boloko.
But, Saul, went on to lay waste the assembly, along the houses, going in, and, dragging off both men and women, was
4 Bandimi oyo bapalanganaki bazalaki koteya Liloba na Nzambe bisika nyonso bazalaki kokende.
They, indeed, therefore, who were scattered abroad, passed through, telling the good-news of the word;
5 Filipo akendeki na engumba moko ya Samari mpe, kuna, ateyaki Klisto.
And, Philip, going down unto the city of Samaria, proclaimed unto them the Christ.
6 Bongo tango ebele ya bato bayokaki mpe bamonaki bikamwa oyo asalaki, bakangamaki na makambo oyo Filipo azalaki koloba.
And the multitudes began to give heed unto the things that were being spoken by Philip, with one accord, when they heard him, and saw the signs which he was working.
7 Pamba te milimo ya mbindo ezalaki kobima kati na bato mingi na koganga makasi, mpe bato mingi oyo bakufa makolo mpe oyo batambolaka tengu-tengu babikaki.
For, from many who had impure spirits, shouting with a loud voice, they were going out, and, many that were paralysed and lame, were cured.
8 Boye, bato ya engumba yango batondisamaki na esengo makasi.
And there came to be great joy in that city.
9 Nzokande, wuta kala, kati na engumba yango, ezalaki na moto moko oyo kombo na ye ezalaki « Simona. » Azalaki kosala misala ya maji. Azalaki kokamwisa bato ya Samari mpe komimona moto monene.
But, a certain man named Simon, was already in the city, practising magical arts, and astonishing the nation of Samaria, —saying that himself was someone great:
10 Bato nyonso, kobanda na bana mike kino na mikolo, bayokaki ye na bokebi mpe balobaki: « Moto oyo, azali penza nguya ya Nzambe, nguya oyo babengaka: Nguya monene. »
Unto whom all were giving heed, from small even to great, saying—This, is the Power of God, which is called Great.
11 Bazalaki kolanda ye mpo ete, wuta kala, azalaki kokamwisa bango na misala na ye ya maji.
And they were giving heed to him, because that, for a considerable time, with his magical arts, he had astonished them.
12 Kasi tango bandimaki Sango Malamu oyo Filipo ateyaki na tina na Bokonzi ya Nzambe mpe na tina na Kombo na Yesu-Klisto, mibali mpe basi bazwaki libatisi.
But, when they believed Philip telling the good news concerning the kingdom of God, and the name of Jesus Christ, they proceeded to be immersed, both men and women.
13 Simona mpe andimaki mpe azwaki libatisi; azalaki kolanda Filipo bisika nyonso oyo azalaki kokende, mpe azalaki kokamwa bilembo minene mpe bikamwa oyo ezalaki kosalema na miso na ye.
And, Simon himself also, believed; and, having been immersed, was in constant attendance on Philip, —and, beholding signs and great works of power coming to pass, was astonished.
14 Tango bantoma, kati na Yelusalemi, bayokaki ete bato ya Samari bayambi Liloba na Nzambe, batindelaki bango Petelo mpe Yoane.
And the Apostles who were in Jerusalem, hearing that Samaria had welcomed the word of God, sent out unto them Peter and John;
15 Tango bakomaki kuna, basambelaki mpo na bandimi ya sika mpo ete bazwa Molimo Mosantu,
Who, indeed, going down, prayed for them, that they might receive Holy Spirit; —
16 pamba te Molimo Mosantu akitelaki nanu ata moto moko te kati na bango; bazwaki kaka libatisi na Kombo ya Nkolo Yesu.
For, not yet, had it, upon any one of them, fallen, but, only, to begin with, they had been immersed into the name of the Lord Jesus.
17 Bongo, Petelo mpe Yoane batielaki bango maboko, mpe bazwaki Molimo Mosantu.
Then, proceeded they to lay their hands upon them, and they were receiving Holy Spirit.
18 Tango Simona amonaki ete bato oyo bandimaki bazwaki Molimo Mosantu, wana bantoma batielaki bango maboko, apesaki Petelo mpe Yoane mbongo;
But Simon, seeing that, through means of the laying on of the hands of the Apostles, the Spirit was being given, offered unto them money,
19 mpe alobaki: — Bopesa ngai mpe nguya oyo, mpo ete moto nyonso oyo nakotiela maboko akoka kozwa Molimo Mosantu.
Saying—Give unto me also this authority, —in order that, on whomsoever may lay my hands, he may receive Holy Spirit.
20 Kasi Petelo azongiselaki ye: — Mpo ete okanisi ete okoki kosomba likabo ya Nzambe na nzela ya mbongo, tika ete yo mpe mbongo na yo bokufa!
And Peter said unto him—Thy silver, with thee, go to destruction! Because, the free-gift of God, thou didst suppose could, with money, be obtained!
21 Solo, ozali na libula te to na makoki te kati na lotomo oyo, pamba te motema na yo ezali sembo te liboso ya Nzambe.
Thou hast neither part nor lot in this matter; for, thy heart, is not upright before God.
22 Boye, bongwana na mabe na yo mpe bondela Nkolo ete alimbisa yo, soki ekoki kosalema, mpo na makanisi oyo ozalaki na yango kati na motema na yo.
Repent, therefore, from this thy baseness, and entreat of the Lord—whether, after all, the purpose of thy heart shall be forgiven thee;
23 Pamba te namoni ete motema na yo etondi na zuwa mpe ozali mowumbu ya masumu.
For see that thou servest as a gall-root of bitterness, and a bond of unrighteousness.
24 Simona azongisaki: — Bobondela Nkolo mpo na ngai mpo ete, kati na oyo bowuti koloba, eloko moko te ekomela ngai.
And Simon, answering, said—Entreat ye, in my behalf, unto the Lord; that, nothing, may come upon me, of the things whereof ye have spoken!
25 Sima na bango kotatola mpe kosakola Liloba na Nkolo, Petelo mpe Yoane bazongaki na Yelusalemi; na nzela, bazalaki koteya Sango Malamu kati na bamboka ebele ya Samari.
They, therefore, having fully borne witness, and spoken the word of the Lord, began their return unto Jerusalem, and, unto many villages of the Samaritans, were they telling the glad tidings.
26 Anjelu ya Nkolo alobaki na Filipo: — Telema, kende na sude, na nzela ya esobe, nzela oyo ewuta na Yelusalemi mpe ekenda kino na Gaza.
And, a messenger of the Lord, spake unto Philip, saying—Arise, and be journeying along southward, unto the way that goeth down from Jerusalem unto Gaza, —the same, is desert.
27 Boye, Filipo atelemaki mpe akendeki; na nzela, akutanaki na soda moko oyo baboma mokongo, moto ya mboka Etiopi; azalaki kalaka moko ya lokumu mpe azalaki na mokumba ya kobatela bomengo nyonso ya Kandase, mwasi mokonzi ya Etiopi. Moto yango ayaki na Yelusalemi mpo na kogumbamela;
And, arising, he journeyed. And lo! a man of Ethiopia, a eunuch, one in power under Candace queen of the Ethiopians, who was over all her treasure [who] had come to worship in Jerusalem;
28 bongo wana azalaki kozonga na mboka na ye, azalaki ya kovanda kati na shar na ye mpe azalaki kotanga mokanda ya mosakoli Ezayi.
And was returning, and, sitting in his chariot, and was reading the prophet Isaiah.
29 Molimo alobaki na Filipo: — Kende mpe pusana pene ya shar wana.
And the Spirit said unto Philip—Go near, and join thyself unto this chariot!
30 Filipo akendeki mbangu pene ya shar yango mpe ayokaki ye kotanga mokanda ya mosakoli Ezayi. Filipo atunaki ye: — Boni, ozali kososola makambo oyo ozali kotanga?
And, running near, Philip heard him reading Isaiah the prophet, and said—Dost thou, then, understand what thou art reading?
31 Azongisaki: — Nakososola ndenge nini soki moto alimboleli ngai yango te? Boye abengaki Filipo ete amata na shar mpe avanda pembeni na ye.
And, he, said—How indeed should be able—unless someone shall guide me? And he called upon Philip, to come up and sit with him.
32 Tala eteni ya Makomi oyo azalaki kotanga: « Lokola mpate oyo bazali komema na esika oyo babomelaka banyama, lokola meme liboso ya moto oyo azali kolongola yango bapwale, afungolaki monoko na ye te.
Now, the passage of Scripture which he was reading, was, this: —As a sheep, unto slaughter, was he led, and, as a lamb, before him that sheareth it, is dumb, so, he openeth not his mouth.
33 Basambwisaki ye mpe baboyaki kolongisa ye. Nani akoyebisa bakitani na ye? Pamba te balongoli bomoi na ye na mokili. »
In his humiliation, his judgment was taken away, —his generation, who shall describe? because, his life, is taken away from the earth.
34 Bongo, soda oyo baboma nzoto ya mibali atunaki Filipo: — Nabondeli yo, yebisa ngai: mosakoli azali koloba makambo oyo na tina na nani? Azali koloba yango na tina na ye moko to na tina na moto mosusu?
And the eunuch, making answer unto Philip, said—I pray thee! Of whom, is the prophet saying this? of himself, or, of some different person?
35 Filipo azwaki maloba mpe, na nzela ya eteni yango ya Makomi, ateyaki ye Sango Malamu ya Yesu.
And Philip, opening his mouth, and beginning from this scripture, told him the glad tidings of Jesus.
36 Wana bazalaki kokoba mobembo na bango, bakomaki na esika moko oyo ezalaki na mayi, mpe soda oyo baboma mokongo alobaki: — Tala mayi, yango oyo. Eloko nini ekoki kopekisa ngai kozwa libatisi? [
And, as they were journeying along the way, they came unto a certain water, —and the eunuch saith—Lo! water! What doth hinder my being immersed?
37 Filipo alobaki: — Soki kaka ondimi wuta na motema na yo mobimba, okoki na yo kozwa libatisi. Moto yango azongisaki: — Nandimi ete Yesu-Klisto azali Mwana na Nzambe!]
38 Mbala moko, apesaki mitindo ete batelemisa shar. Bongo bango mibale, Filipo mpe soda oyo baboma mokongo, bakitaki na mayi, mpe Filipo abatisaki ye.
And he commanded the chariot to stand still; and they went down, both, into the water, both Philip and the eunuch, —and he immersed him.
39 Tango babimaki na mayi, Molimo ya Nkolo alongolaki Filipo, mpe soda oyo baboma mokongo amonaki ye lisusu te, kasi akobaki mobembo na ye na esengo.
But, when they came up out of the water, the Spirit of the Lord caught away Philip, and the eunuch saw him no more; for he was going on his way rejoicing.
40 Nzokande, Filipo amonanaki na Azoti; mpe longwa kuna, akendeki na Sezarea, wana azalaki koteya Sango Malamu kati na bamboka nyonso epai wapi azalaki kolekela.
Now Philip was found at Azotus; and, passing through, he was telling the glad tidings unto all the cities, until he came unto Caesarea.

< Misala ya Bantoma 8 >