< Misala ya Bantoma 7 >
1 Bongo, mokonzi ya Banganga-Nzambe atunaki ye: — Boni, makambo oyo bafundeli yo ezali ya solo?
The high priest said, "Are these things so?"
2 Etieni azongisaki: — Batata mpe bandeko, boyoka ngai! Nzambe ya nkembo abimelaki koko na biso Abrayami tango azalaki na Mezopotami, liboso ete akende kovanda na Sharani.
He said, "Brothers and fathers, listen. The God of glory appeared to our father Abraham, when he was in Mesopotamia, before he lived in Haran,
3 Boye, Nzambe alobaki na ye: « Longwa na mokili na yo mpe na libota na yo, mpe kende na mokili oyo nakolakisa yo! »
and said to him, 'Go out from your land and from your relatives, and come into a land which I will show you.'
4 Boye, alongwaki na mokili ya Chalide mpe akendeki kovanda na mokili ya Sharani. Sima na kufa ya tata na ye, Nzambe atindaki ye na mokili oyo, mokili oyo bino bozali kovanda sik’oyo.
Then he came out of the land of the Kasdim, and lived in Haran. From there, after his father died, he moved him into this land, where you are now living.
5 Apesaki ye mabele moko te awa, ezala ata mwa eteni. Kasi Nzambe apesaki ye elaka, ye elongo na bakitani na ye sima na ye, ete bakozwa mokili lokola libula, atako, na tango wana, Abrayami azalaki nanu na mwana te.
He gave him no inheritance in it, no, not so much as to set his foot on. He promised that he would give it to him for a possession, and to his descendants after him, when he still had no child.
6 Tala makambo oyo Nzambe alobaki: « Bakitani na ye bakozala bapaya kati na mokili ya bapaya; bakokomisa bango bawumbu mpe bakonyokola bango mibu nkama minei. »
But God spoke in this way, 'His descendants will live as strangers in a foreign land, and that they will be slaves and mistreated, for four hundred years.
7 Kasi Nzambe alobaki lisusu: « Nakopesa etumbu na ekolo oyo ekokomisa bango bawumbu. Mpe na sima, bakobima longwa na mokili yango mpe bakosambela Ngai na esika oyo. »
But I will judge the nation to which they will be in bondage,' said God, 'and after that will they come out, and serve me in this place.'
8 Bongo Nzambe asalaki boyokani elongo na Abrayami, mpe elembo ya boyokani yango ezalaki: kokatama ngenga. Abrayami abotaki Izaki mpe akataki ye ngenga na mokolo ya mwambe ya mbotama na ye; Izaki abotaki Jakobi mpe akataki ye ngenga, bongo Jakobi mpe abotaki bakoko na biso zomi na mibale mpe akataki bango ngenga.
He gave him the covenant of circumcision. So Abraham became the father of Isaac, and circumcised him the eighth day. Isaac became the father of Jacob, and Jacob became the father of the twelve patriarchs.
9 Lokola bakoko na biso bayokelaki Jozefi likunya, batekaki ye mpo ete azala mowumbu na Ejipito. Kasi Nzambe azalaki na ye elongo
"The patriarchs, moved with jealousy against Joseph, sold him into Egypt; and God was with him,
10 mpe akangolaki ye na minyoko na ye nyonso; Apesaki ye bwanya mpe asalelaki ye ngolu na miso ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, oyo akomisaki ye moyangeli ya Ejipito mpe ya ndako na ye mobimba.
and delivered him out of all his afflictions, and gave him favor and wisdom before Pharaoh, king of Egypt. He made him governor over Egypt and all his house.
11 Nzokande, nzala moko ya makasi ekotaki na Ejipito mobimba mpe na Kanana, ememaki pasi penza, bongo bakoko na biso bazalaki lisusu na eloko ya kolia te.
Now a famine came over all the land of Egypt and Canaan, and great affliction, and our fathers found no food.
12 Tango Jakobi ayokaki ete ble ezali na Ejipito, atindaki bakoko na biso mbala ya liboso.
But when Jacob heard that there was grain in Egypt, he sent out our fathers the first time.
13 Na mbala ya mibale, Jozefi amilakisaki epai ya bandeko na ye, bongo Faraon ayaki koyeba libota ya Jozefi.
On the second time Joseph was made known to his brothers, and Joseph's family became known to Pharaoh.
14 Bongo, Jozefi atindaki ete bakende kozwa tata na ye Jakobi elongo na bandeko na ye nyonso. Bango nyonso bazalaki bato tuku sambo na mitano.
Then Joseph sent, and summoned Jacob, his father, and all his relatives, seventy-five souls.
15 Boye, Jakobi akendeki kovanda na Ejipito epai wapi ye elongo na bakoko na biso bakufaki.
Jacob went down into Egypt, and he died, himself and our fathers,
16 Bamemaki banzoto na bango na engumba ya Sishemi mpe bakundaki yango kati na kunda oyo Abrayami asombaki na mbongo epai ya bana ya Amori, tata ya Sishemi.
and they were brought back to Shechem, and placed in the tomb that Abraham bought for a price in silver from the children of Hamor in Shechem.
17 Wana tango oyo Nzambe alingaki kokokisa elaka oyo apesaki na Abrayami ekomaki pene, motango ya bato na biso, kati na Ejipito, ekomaki ebele penza,
"But as the time of the promise came close which God had made to Abraham, the people grew and multiplied in Egypt,
18 kino mokonzi mosusu, oyo ayebaki Jozefi te, azwaki bokonzi na Ejipito.
until 'there arose a different king over Egypt, who did not know Joseph.'
19 Na mayele mabe, mokonzi yango anyokolaki bakoko na biso kino kotinda bango na makasi ete babwaka bana na bango oyo babotami sika mpo ete bakufa.
The same took advantage of our race, and mistreated our fathers, and forced them to throw out their babies, so that they would not stay alive.
20 Ezalaki na tango wana nde Moyize abotamaki. Nzambe asalaki ye kitoko mingi. Babatelaki ye sanza misato na ndako ya tata na ye.
At that time Moses was born, and was exceedingly handsome. He was nourished three months in his father's house.
21 Wana baboti na ye batiaki ye libanda, mwana mwasi ya Faraon azwaki ye mpe abokolaki ye lokola mwana na ye penza.
When he was thrown out, Pharaoh's daughter took him up, and reared him as her own son.
22 Bayekolisaki Moyize na bwanya nyonso ya bato ya Ejipito, mpe akomaki moto na nguya na maloba mpe na misala.
Moses was instructed in all the wisdom of the Egyptians. He was mighty in his words and works.
23 Tango Moyize akokisaki mibu tuku minei, azwaki mokano ya kokende kotala bandeko na ye, bana ya Isalaele.
But when he was forty years old, it came into his heart to visit his brothers, the children of Israel.
24 Awa amonaki moto moko ya Ejipito kobeta moto ya ekolo na ye, akotelaki moto ya Isalaele, azongisaki mabe na mabe epai ya moto ya Ejipito mpe abomaki ye.
Seeing one of them suffer wrong, he defended him, and avenged him who was oppressed, striking the Egyptian.
25 Moyize akanisaki ete bandeko na ye bakososola ete Nzambe azali kosalela ye mpo na kopesa bango lobiko, kasi basosolaki yango te.
He supposed that his brothers understood that God, by his hand, was giving them deliverance; but they did not understand.
26 Mokolo oyo elandaki, Moyize akutaki bana ya Isalaele mibale kobunda. Bongo amekaki kozongisa boyokani kati na bango; alobaki na bango: « Ah baninga na ngai, bozali bandeko; mpo na nini bozali kosalana mabe? »
"The day following, he appeared to them as they fought, and urged them to be at peace again, saying, 'Men, you are brothers. Why do you wrong one another?'
27 Kasi moto oyo azalaki konyokola ndeko na ye atindikaki Moyize mpe alobaki: « Nani atie yo mokonzi mpe mosambisi kati na biso?
But he who did his neighbor wrong pushed him away, saying, 'Who made you a ruler and a judge over us?
28 Olingi koboma ngai ndenge obomaki moto ya Ejipito lobi? »
Do you want to kill me, as you killed the Egyptian yesterday?'
29 Tango Moyize ayokaki bongo, akimaki na mokili ya Madiani epai wapi avandaki lokola mopaya mpe abotaki bana mibale ya mibali.
Moses fled at this saying, and became a stranger in the land of Midian, where he became the father of two sons.
30 Sima na mibu tuku minei, anjelu moko abimelaki Moyize kati na esobe, pene ya ngomba Sinai, kati na ndemo ya moto oyo ezalaki komata longwa kati na mwa nzete oyo ezalaki kopela.
"When forty years were fulfilled, an angel appeared to him in the wilderness of Mount Sinai, in a flame of fire in a bush.
31 Tango Moyize amonaki yango, akamwaki makasi. Mpe awa azalaki kopusana mpo na kotala yango malamu, ayokaki mongongo ya Nkolo koloba:
When Moses saw it, he wondered at the sight. As he came close to see, a voice of the Lord came,
32 « Nazali Nzambe ya bakoko na yo, Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi. » Moyize alengaki na somo mpe akokaki kutu kotala te.
'I am the God of your fathers, the God of Abraham, and of Isaac, and of Jacob.' Moses trembled, and dared not look.
33 Bongo, Nkolo alobaki na ye: « Longola basandale na yo na makolo na yo, pamba te esika oyo otelemi ezali mabele ya bule.
The Lord said to him, 'Take your sandals off of your feet, for the place where you stand is holy ground.
34 Namoni minyoko ya bato na Ngai kati na Ejipito. Nayoki kolela na bango mpe nakiti mpo na kokangola bango. Mpe yaka sik’oyo, nakotinda yo ete ozonga na Ejipito. »
I have surely seen the affliction of my people that is in Egypt, and have heard their groaning. I have come down to deliver them. Now come, I will send you to Egypt.'
35 Kaka Moyize oyo bandeko na ye baboyaki na koloba na ye: « Nani atie yo mokonzi mpe mosambisi, » ye nde Nzambe atindaki mpo ete azala mokonzi mpe mokangoli na bango, na lisungi ya anjelu oyo abimelaki ye na mwa nzete.
"This Moses, whom they refused, saying, 'Who made you a ruler and a judge?'—God has sent him as both a ruler and a deliverer by the hand of the angel who appeared to him in the bush.
36 Abimisaki bango na mokili ya Ejipito, na nzela ya bikamwa mpe ya bilembo minene oyo asalaki kuna, na ebale monene ya Motane mpe na esobe, mibu tuku minei.
This man led them out, having worked wonders and signs in Egypt, in the Red Sea, and in the wilderness for forty years.
37 Ezalaki kaka Moyize wana oyo alobaki na bana ya Isalaele: « Nzambe akobimisela bino mosakoli moko lokola ngai, oyo akowuta kati na bandeko na bino. »
This is that Moses, who said to the children of Israel, 'God will raise up a prophet for you from among your brothers, like me.'
38 Azalaki kati na mayangani oyo bakoko na biso basanganaki na esobe; ye nde azalaki molobeli, kati na bakoko na biso mpe anjelu oyo asololaki na ye, na ngomba Sinai epai wapi azwaki Maloba ya bomoi mpo na kopesa biso.
This is he who was in the assembly in the wilderness with the angel that spoke to him on Mount Sinai, and with our fathers, who received words of life to give to us,
39 Kasi bakoko na biso baboyaki kotosa ye; batombokelaki ye mpe bazwaki likanisi ya kozonga na Ejipito.
to whom our fathers would not be obedient, but rejected him, and turned back in their hearts to Egypt,
40 Balobaki na Aron: « Salela biso banzambe oyo bakotambola liboso na biso. Pamba te toyebi te soki makambo nini ekomeli Moyize oyo abimisaki biso na mokili ya Ejipito! »
saying to Aaron, 'Make us gods that will go before us, for as for this Moses, who led us out of the land of Egypt, we do not know what has become of him.'
41 Ezalaki na mikolo wana nde basalaki nzambe ya ekeko, na lolenge ya mwana ngombe; babonzelaki nzambe yango ya ekeko mbeka mpe basalaki feti mpo na lokumu ya misala ya maboko na bango.
They made a calf in those days, and brought a sacrifice to the idol, and rejoiced in the works of their hands.
42 Kasi Nzambe apesaki bango mokongo mpe atikaki bango kosambela mampinga ya likolo, ndenge ekomama kati na buku ya basakoli: « Oh bato ya Isalaele, boni, bozalaki kobonzela Ngai mbeka mpe kopesa Ngai makabo na mibu tuku minei oyo bolekisaki na esobe?
But God turned, and gave them over to worship the host of heaven, as it is written in the book of the prophets, 'Did you offer to me sacrifices and offerings forty years in the wilderness, O house of Israel?
43 Bomemaki nde ndako ya kapo ya Moloki mpe monzoto ya nzambe na bino Rofa, banzambe ya bikeko oyo bosalaki mpo na kogumbamela! Yango wana, nakotinda bino na bowumbu, mosika koleka Babiloni! »
You took up the tabernacle of Moloch, and the star of your god Rephan, the images that you made to worship them. Therefore I will exile you beyond Babylon.'
44 Bakoko na biso bazalaki na Ndako ya kapo ya Boyokani kati na esobe, batongaki yango ndenge Nzambe atindaki Moyize, kolanda ndakisa oyo amonaki.
"Our fathers had the tabernacle of the testimony in the wilderness, even as he who spoke to Moses commanded him to make it according to the pattern that he had seen;
45 Sima na kozwa Ndako ya kapo yango, bakoko na biso na bokambami ya Jozue, bamemaki yango tango babotolaki mikili ya Bapagano, mikili oyo Nzambe abenganaki liboso na bango. Mpe Ndako ya kapo yango etikalaki kuna kino na tango ya Davidi;
which also our fathers, in their turn, brought in with Joshua when they entered into the possession of the nations, whom God drove out before the face of our fathers, to the days of David,
46 oyo azwaki ngolu na miso ya Nzambe mpe asengaki ete atongela Nzambe ya Jakobi ndako.
who found favor in the sight of God, and asked to find a habitation for the God of Jacob.
47 Kasi Salomo nde moto atongelaki ye ndako.
But Solomon built him a house.
48 Nzokande, Ye-Oyo-Aleki-Likolo avandaka te kati na bandako oyo bato batonga, ndenge kaka mosakoli aloba:
However, the Most High does not dwell in temples made with hands, as the prophet says,
49 « Likolo ezali Kiti na Ngai ya bokonzi, mpe mabele ezali enyatelo makolo na Ngai. Ndako ya ndenge nini penza bokoki kotongela Ngai, elobi Nkolo, to esika ya bopemi ya ndenge nini penza bokoki kobongisela Ngai?
'Heaven is my throne, and the earth a footstool for my feet. What kind of house will you build me?' says the Lord; 'or what is the place of my rest?
50 Boni, ezali loboko na Ngai te nde esalaki biloko wana nyonso? »
Did not my hand make all these things?'
51 Bato ya mito makasi, ya mitema mabanga mpe bakufa matoyi! Bozali ndenge moko kaka na bakoko na bino: botelemelaka tango nyonso Molimo Mosantu!
"You stiff-necked and uncircumcised in heart and ears, you always resist the Holy Spirit. As your fathers did, so you do.
52 Boni, ezalaki solo ata na mosakoli moko oyo bakoko na bino bazangaki konyokola? Kutu, babomaki ezala basakoli oyo basakolaki koya ya Moyengebene, Ye oyo bosili sik’oyo koteka mpe koboma,
Which of the prophets did not your fathers persecute? They killed those who foretold the coming of the Righteous One, of whom you have now become betrayers and murderers.
53 bino bato oyo bozwaki Mobeko ya Nzambe na nzela ya ba-anjelu, kasi botosaki yango te.
You received the Law as it was ordained by angels, and did not keep it."
54 Tango bato ya Likita-Monene bayokaki bongo, batombokaki makasi mpe bakomaki kolia minu mpo na Etieni.
Now when they heard these things, they were furious, and they ground their teeth at him.
55 Kasi lokola Etieni atondisamaki na Molimo Mosantu, atalaki na Likolo, amonaki nkembo ya Nzambe mpe Yesu atelema na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe.
But he, being full of the Holy Spirit, looked up steadfastly into heaven, and saw the glory of God, and Jesus standing on the right hand of God.
56 Alobaki: — Botala, namoni Likolo efungwami mpe Mwana na moto atelema na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe!
And he said, "Look, I see the heavens opened, and the Son of Man standing at the right hand of God."
57 Bongo, bakangaki matoyi na bango, bagangaki makasi penza, mpe bango nyonso basangelaki ye,
But they shouted out with a loud voice, and stopped their ears, and rushed at him with one accord.
58 bamemaki ye libanda ya engumba mpe babambaki ye mabanga. Na tango wana, batatoli batikaki bilamba na bango epai ya elenge mobali moko na kombo Saulo.
They threw him out of the city, and stoned him. The witnesses placed their garments at the feet of a young man named Saul.
59 Wana bazalaki kobamba ye mabanga, Etieni azalaki kosambela na koloba: — Nkolo Yesu, yamba molimo na ngai!
They stoned Stephen as he called out, saying, "Lord Jesus, receive my spirit."
60 Bongo, afukamaki mpe agangaki makasi: — Nkolo, kotangela bango lisumu oyo te! Tango kaka Etieni alobaki bongo, akufaki.
He kneeled down, and shouted out, "Lord, do not hold this sin against them." When he had said this, he fell asleep.