< Misala ya Bantoma 6 >
1 Na mikolo wana, motango ya bayekoli ezalaki kaka kobakisama. Bayuda oyo bazalaki koloba lokota ya Greki bakomaki koyimayima mpo na kotelemela Bayuda oyo bazalaki koloba lokota ya Ebre, pamba te basi na bango oyo bakufisa mibali bazalaki kozangela na tango ya kokabola bilei ya mokolo na mokolo.
A w tych dniach, gdy liczba uczniów wzrastała, helleniści zaczęli szemrać przeciwko Żydom, że zaniedbywano w codziennym posługiwaniu ich wdowy.
2 Boye, bantoma zomi na mibale basangisaki bayekoli nyonso mpe balobaki na bango: — Ekozala malamu te mpo na biso kotika mosala ya koteya Liloba na Nzambe mpo na komipesa na mosala ya kokabola bilei.
Wtedy dwunastu, zwoławszy [całe] mnóstwo uczniów, powiedziało: Nie jest rzeczą słuszną, żebyśmy porzucili słowo Boże, a obsługiwali stoły.
3 Yango wana bandeko, bopona mibali sambo kati na bino, oyo bayebana na bizaleli na bango ya malamu, oyo batonda na Molimo Mosantu mpe na bwanya mpo ete topesa bango mokumba yango.
Upatrzcie więc, bracia, spośród siebie siedmiu mężczyzn, mających dobre świadectwo, pełnych Ducha Świętego i mądrości, którym zlecimy tę sprawę.
4 Boye, biso tokomipesa na mabondeli mpe na mosala ya koteya Liloba na Nzambe.
My zaś oddamy się modlitwie i posłudze słowa.
5 Likanisi yango esepelisaki lisanga mobimba. Boye, baponaki Etieni, moto oyo atonda na kondima mpe na Molimo Mosantu; Filipo, Prokore, Nikanori, Timoni, Parimenasi mpe Nikola, moto ya Antioshe, oyo akotaki na lingomba ya Bayuda.
I spodobało się to całej gromadzie [zebranych]. Wybrali więc Szczepana, męża pełnego wiary i Ducha Świętego, Filipa, Prochora, Nikanora, Tymona, Parmenasa i Mikołaja, prozelitę z Antiochii.
6 Balakisaki bango epai ya Bantoma; Bantoma basambelaki mpo na bango mpe batiaki bango maboko.
Przedstawili ich apostołom, którzy modląc się, położyli na nich ręce.
7 Boye, Liloba na Nzambe ezalaki kokoba kopanzana, motango ya bayekoli ezalaki mpe kobakisama makasi na Yelusalemi mpe Banganga-Nzambe ebele bakomaki kondimela Yesu.
I rozszerzało się słowo Boże, i liczba uczniów w Jerozolimie bardzo się pomnażała; także bardzo wielu kapłanów stawało się posłusznych wierze.
8 Nzokande, Etieni, moto oyo atondaki na ngolu mpe na nguya ya Nzambe, azalaki kosala bikamwa mpe bilembo minene kati na bato.
A Szczepan, pełen wiary i mocy, czynił cuda i wielkie znaki wśród ludzi.
9 Bongo bato mosusu ya ndako ya mayangani oyo ebengamaka Ndako ya mayangani ya bansomi: Bayuda ya Sirene, ya Alekizandri, ya bituka ya Silisi mpe ya Azia; bakomaki kotia tembe na miso ya Etieni.
Wtedy niektórzy z synagogi zwanej [synagogą] Libertynów i Cyrenejczyków, i Aleksandryjczyków oraz tych, którzy pochodzili z Cylicji i Azji, wystąpili do rozprawy ze Szczepanem.
10 Kasi bazangaki makoki ya kotelemela bwanya mpe Molimo oyo azalaki kotinda ye koloba.
Lecz nie mogli sprostać mądrości i duchowi, z którym mówił.
11 Bongo, bapesaki kanyaka epai ya bato mpo ete baloba: « Toyokaki Etieni koloba maloba ya kofinga Moyize mpe Nzambe. »
Podstawili więc ludzi, którzy zeznali: Słyszeliśmy, jak mówił bluźnierstwa przeciwko Mojżeszowi i przeciwko Bogu.
12 Batombokisaki bato, bakambi mpe balakisi ya Mobeko. Boye, bayaki kokanga Etieni na mbalakata mpe bamemaki ye na Likita-Monene.
I tak podburzyli lud, starszych i uczonych w Piśmie; a gdy przybiegli do niego, porwali go i przyprowadzili do Rady.
13 Kuna, babimisaki batatoli ya lokuta oyo balobaki: — Moto oyo azali kotika te koloba mabe mpo na kobebisa lokumu ya esika oyo ya bule mpe ya mibeko;
I podstawili fałszywych świadków, którzy zeznali: Ten człowiek nie przestaje mówić bluźnierstw przeciwko temu świętemu miejscu i [przeciwko] prawu.
14 pamba te toyokaki ye koloba ete Yesu ya Nazareti akobuka Tempelo oyo mpe akobongola bizaleli oyo Moyize atikela biso.
Słyszeliśmy bowiem, jak mówił, że ten Jezus z Nazaretu zburzy to miejsce i zmieni zwyczaje, które nam przekazał Mojżesz.
15 Bato nyonso oyo bavandaki na Likita-Monene batalaki Etieni malamu penza, mpe bamonaki ete elongi na ye ekomaki lokola elongi ya anjelu.
A wszyscy, którzy zasiadali w Radzie, przyglądali mu się uważnie i zobaczyli, że jego twarz jest jak oblicze anioła.