< Misala ya Bantoma 28 >

1 Wana tososolaki ete tosili kobika na likama, toyokaki ete babengaka esanga yango Malite.
Once they had safely reached shore, they found out that the island was called Malta.
2 Bavandi ya esanga yango batalisaki biso bolingo monene mpe basungaki biso mingi. Lokola mvula ezalaki konoka mpe malili ezalaki makasi, bapelisaki moto mpe babengaki biso nyonso ete tokende koyetola.
The native people showed us extraordinary kindness. For they welcomed us all and kindled a fire because of the rain that had set in and because of the cold.
3 Polo alokotaki liboke ya bakoni; mpe tango abwakaki yango na moto, molunge ya moto ebimisaki etupa mpe ekangamaki na loboko na ye.
Paul gathered a bundle of sticks, and when he was putting them on the fire, a viper came out because of the heat and fastened on his hand.
4 Tango bavandi ya esanga bamonaki nyoka ezali kodiembela na loboko ya Polo, balobanaki bango na bango: — Solo, moto oyo azali penza mobomi! Awuti kobika na likama ya ebale, kasi bosembo ya Nzambe elandi ye kaka mpo na koboma ye!
When the native people saw the creature hanging from his hand, they said to one another, “This man is undoubtedly a murderer. Although he has been saved from the sea, the goddess Justice has not allowed him to live.”
5 Kasi Polo aningisaki loboko, mpe nyoka yango ekweyaki na moto, mpe ayokaki ata pasi te.
But Paul shook the creature off into the fire and suffered no harm.
6 Bato nyonso bazalaki kozela ete nzoto na ye evimba to akufa mbala moko; kasi wana bazelaki tango molayi mpe bamonaki ata likambo moko te ya mabe kokomela ye, babongolaki makanisi mpe balobaki: — Moto oyo azali nzambe.
The people were expecting that he would soon swell up or suddenly fall down dead. But after waiting expectantly for a long time and seeing nothing unusual happen to him, they changed their minds and said that he was a god.
7 Zingazinga ya esika oyo tozalaki, ezalaki na mabele ya Pibiliusi, kalaka mokonzi ya esanga. Ayambaki biso malamu epai na ye, mpe tolekisaki kuna mikolo misato.
Now in the region around that place were lands that belonged to the chief man of the island, named Publius, who welcomed us and hospitably took care of us as his guests for three days.
8 Nzokande, tata ya Pibiliusi azalaki ya kolala na mbeto mpo ete azalaki kobela fievele mpe pulupulu ya makila. Polo akendeki kotala ye, akotaki na ndako na ye, asambelaki, atielaki ye maboko mpe abikisaki ye.
Now it so happened that the father of Publius lay sick in bed, suffering from fevers and dysentery. So Paul went in to see him and healed him by praying and laying his hands on him.
9 Sima na yango, babeli mosusu ya esanga bayaki epai na ye mpe babikisamaki.
After this happened, the rest of the people on the island who were sick also came and were healed.
10 Boye, bapesaki biso lokumu ya ndenge na ndenge; mpe tango tokomaki pene ya kozongela mobembo na biso, bapesaki biso biloko nyonso oyo tozalaki na yango posa mpo na mobembo.
So the people bestowed many honors on us, and when we were about to set sail, they provided us with the things we needed.
11 Sima na basanza misato, tozwaki masuwa oyo elekisaki tango na yango ya malili makasi kati na esanga. Ezalaki masuwa ya engumba Alekizandri, oyo batia bilembo ya Kasitori mpe Polikisi.
After three months, we set sail in an Alexandrian ship that had wintered at the island and that had the twin sons of Zeus as its figurehead.
12 Tosemaki na engumba Sirakize, mpe tolekisaki kuna mikolo misato.
Putting in at Syracuse, we stayed there for three days.
13 Kolongwa wana, tonanaki pembeni-pembeni ya mokili mpe tokomaki na engumba Regio. Mokolo oyo elandaki, mopepe ya sude ekomaki kopepa mpe, sima na mikolo mibale, tokomaki na Puzoli.
From there we took a circuitous course and arrived at Rhegium. After one day a south wind sprang up, and on the second day we came to Puteoli.
14 Kati na engumba yango, tokutaki bandeko oyo basengaki biso ete tovanda elongo na bango poso mobimba. Ezali ndenge wana nde tokendeki na Rome.
There we found some brothers and were invited to stay with them for seven days. And so we came to Rome.
15 Tango bandeko ya Rome bayokaki ete tokomi, bayaki kino na zando ya Apiusi mpe na esika oyo babengaka « Bandako misato, » mpo na kokutana na biso. Tango Polo amonaki bango, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe azwaki lisusu molende.
When the brothers from Rome heard the news about us, they came out as far as the Forum of Appius and the Three Taverns to meet us. When Paul saw them, he gave thanks to God and took courage.
16 Tango tokomaki na Rome, bapesaki Polo nzela ya kovanda ye moko na ndako; batielaki ye soda moko mpo na kokengela ye.
When we came into Rome, the centurion transferred the prisoners to the captain of the guard, but Paul was allowed to stay by himself, with the soldier who was guarding him.
17 Sima na mikolo misato, Polo abengisaki bakambi ya Bayuda mpo ete bakutana na ye. Tango basanganaki, alobaki na bango: — Bandeko na ngai, ata nasalaki bato ya ekolo na biso ata mabe moko te, mpe nabukaki ata mobeko moko te ya bakoko na biso, bakangaki ngai na Yelusalemi mpe bakabaki ngai na maboko ya bato ya Rome.
After three days, Paul called together those who were prominent among the Jews. When they had gathered together, he said to them, “Brothers, though I had done nothing against our people or the customs of our fathers, I was delivered as a prisoner from Jerusalem into the hands of the Romans.
18 Sima na bato ya Rome koyekola na mozindo likambo na ngai, bazwaki mokano ya kotika ngai, pamba te bamonaki likambo moko te ya mabe oyo ekokaki kosala ete nazwa etumbu ya kufa.
When they examined me, they were willing to release me because there were no grounds for death in my case.
19 Kasi Bayuda basepelaki te na mokano yango; boye nasengaki ete nakende kosamba liboso ya Sezare; elingi koloba te ete nazalaki na likanisi ya kofunda bato ya ekolo na ngai.
But when the Jews objected, I was forced to appeal to Caesar, not that I had any accusation to make against my own nation.
20 Yango wana nasengaki komona bino mpe kosolola na bino, pamba te ezali mpo na elikya ya Isalaele nde nakangami na minyololo oyo.
That is why I have asked to see you and speak with you, for it is on account of the hope of Israel that I am bound with this chain.”
21 Bayuda bazongiselaki ye: — Biso awa, tozwaki ata mokanda moko te kowuta na Yuda na tina na yo; mpe kati na bandeko oyo bayaki awa, moto ata moko te apesaki biso sango to ayebisaki biso likambo ya mabe na tina na yo.
They said to him, “We have received no letters from Judea about yoʋ, and none of the brothers who have come here have reported or spoken anything bad about yoʋ.
22 Kasi tozali na posa ete yo moko oyebisa biso makanisi na yo, pamba te toyebi malamu ete lingomba na yo ezali kobundisama bisika nyonso.
But we think it would be best to hear what yoʋr views are, for concerning this sect, we know that everywhere it is spoken against.”
23 Bayokanaki kokutana na Polo mokolo mosusu. Bongo tango mokolo yango ekokaki, bayaki ebele na esika oyo Polo azalaki kovanda. Wuta na tongo kino na pokwa, Polo azalaki kolimbolela bango mpe koteya bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe, mpe azalaki kosala nyonso mpo ete bandima makambo oyo azalaki koloba na tina na Yesu, na nzela ya Mobeko ya Moyize mpe makomi ya basakoli.
When they had arranged a day to meet with Paul, many more came to him at his lodging. From morning until evening he explained the matter to them, testifying about the kingdom of God and trying to convince them about Jesus both from the Law of Moses and from the Prophets.
24 Bamoko bandimisamaki na nzela ya makambo oyo azalaki koloba, kasi bamosusu baboyaki kondima.
Some were convinced by what he said, but others refused to believe.
25 Tango bakomaki pene ya kozonga, bango na bango batikalaki kaka koyokana te; bongo Polo abakisaki liloba oyo: — Molimo Mosantu alobaki na bakoko na bino makambo ya solo tango alobaki na nzela ya mosakoli Ezayi:
So they were in disagreement with one another and began to leave after Paul made this one final statement: “The Holy Spirit was right in saying to our fathers through the prophet Isaiah:
26 « Kende koloba na bato oyo: Matoyi na bino ekoyoka na pamba, bokososola te; miso na bino ekotala na pamba, bokomona te.
‘Go to this people and say, “Although you will hear, you will never understand, and although you will see, you will never perceive.”
27 Pamba te mitema ya bato oyo ekomi mabanga; bakangi penza matoyi mpe miso na bango, noki te miso na bango emona, matoyi na bango eyoka, mitema na bango esosola, babongola mitema, mpe nabikisa bango. »
For the heart of this people has become calloused; with their ears they have barely heard, and their eyes they have closed, lest they should see with their eyes, hear with their ears, and understand with their heart and turn back, and I would heal them.’
28 Yango wana, nalingi boyeba ete Nzambe atindi lobiko na Ye epai ya bato ya bikolo ya bapaya, mpe bakoyoka. [
Therefore let it be known to you that the salvation of God has been sent to the Gentiles; they will listen.”
29 Tango Polo asilisaki koloba, Bayuda bakendeki, mpe bazalaki kotiana tembe makasi kati na bango.]
After Paul said these things, the Jews went away and had a great dispute among themselves.
30 Polo awumelaki mibu mibale mobimba kati na ndako ya kofutela. Azalaki koyamba bato nyonso oyo bazalaki koya kotala ye;
For two whole years Paul stayed in his own rented house and welcomed all who came to him,
31 azalaki kosakola sango ya Bokonzi ya Nzambe mpe koteya na tina na Nkolo Yesu-Klisto, na molende nyonso mpe na kozanga bipekiseli.
preaching the kingdom of God and teaching about the Lord Jesus Christ with all boldness and without hindrance.

< Misala ya Bantoma 28 >