< Misala ya Bantoma 27 >

1 Tango bazwaki mokano ya kozwa masuwa mpo na kokende na Itali, bapesaki Polo elongo na ndambo ya bakangami na maboko ya Juliusi oyo azalaki mokonzi ya basoda nkama moko ya Rome, kati na mampinga ya mokonzi monene.
すでに我等をイタリヤに渡らしむること決りたれば、パウロ及びその他 數人の囚人を、近衞 隊の百卒長ユリアスと云ふ人に付せり。
2 Tomataki na masuwa oyo ewutaki na engumba Adramite mpo na kokende na mabongo ya pembeni-pembeni ya mokili ya Azia, mpe tokendeki; Arisitarke, moto ya Masedwane ya Tesalonika, azalaki na biso elongo.
ここに我らアジヤの海邊なる各處に寄せゆくアドラミテオの船の出帆せんとするに乘りて出づ。テサロニケのマケドニヤ人アリスタルコも我らと共にありき。
3 Mokolo oyo elandaki, tosemaki na engumba Sidoni. Lokola Juliusi atalisaki bolingo monene epai ya Polo, apesaki ye nzela ya kokende kotala balingami na ye mpo ete akoka kozwa masungi epai na bango.
次の日シドンに著きたれば、ユリアス懇切にパウロを遇ひ、その友らの許にゆきて歡待を受くることを許せり。
4 Sima na biso kolongwa wana, tozongelaki mobembo na biso mpe tozalaki konana pembeni-pembeni ya esanga ya Shipre, mpo na kokima mipepe oyo ezalaki kobeta biso makasi mpe kopekisa biso kokende liboso.
かくて此處より船出せしが、風の逆ふによりてクプロの風下の方をはせ、
5 Sima na biso kokatisa ebale monene oyo eleka pembeni-pembeni ya Silisi mpe ya Pafili, tosemaki na Mira, kati na mokili ya Lisi.
キリキヤ及びパンフリヤの沖を過ぎてルキヤのミラに著く。
6 Kuna, mokonzi ya basoda nkama moko amonaki masuwa moko ya engumba Alekizandri, oyo ezalaki kokende na Itali, mpe akotisaki biso kati na yango.
彼處にてイタリヤにゆくアレキサンデリヤの船に遇ひたれば、百卒長われらを之に乘らしむ。
7 Masuwa yango ezalaki kotambola malembe penza; boye tosalaki mikolo mwa mingi ya mobembo, mpe tokomaki na Sinide na pasi penza. Lokola mpe mopepe ezalaki kopekisa biso kokende liboso, tolekaki Salimoni mpe tokendeki na ngambo ya sude ya esanga ya Kreti.
多くの日のあひだ船の進み遲く、辛うじてクニドに對へる處に到りしが、風に阻へられてサルモネの沖を過ぎ、クレテの風下の方をはせ、
8 Tozalaki konana pembeni-pembeni ya esanga yango na pasi penza kino tokomaki na esika oyo babengaka « Mabongo kitoko, » pene ya engumba Laseya.
陸に沿ひ辛うじて良き港といふ處につく。その近き處にラサヤの町あり。
9 Lokola tolekisaki bongo tango mingi mpe masuwa ekomaki kotambola na matata, pamba te ezalaki sima na eleko ya kokila bilei, Polo akebisaki bango:
船路 久しきを歴て、斷食の期節も既に過ぎたれば、航海 危きにより、パウロ人々に勸めて言ふ、
10 — Baninga, nazali komona lokola likama moko ya monene kosalema na mobembo na biso, mpe ekobebisa makasi masuwa elongo na biloko, kasi biso mpe tokoki kokufa.
『人々よ、我この航海の害あり損 多くして、ただ積荷と船とのみならず、我らの生命にも及ぶべきを認む』
11 Kasi mokonzi ya basoda nkama moko alandaki toli ya kapitene ya masuwa mpe ya nkolo masuwa, na esika ete ayoka maloba ya Polo.
されど百卒長は、パウロの言ふ所よりも船 長と船 主との言を重んじたり。
12 Lokola mpe libongo ezalaki esika ya malamu te mpo na kolekisa tango ya malili makasi, mingi kati na bato bazwaki mokano ete tolongwa wana mpe toluka kokoma na Fenikisi oyo ezali libongo ya Kreti, oyo etala na ngambo ya sude-weste mpe ya nor-weste, mpo na kolekisa kuna tango yango ya malili makasi.
且この港は冬を過すに不便なるより、多數の者も、なし得んにはピニクスに到り、彼處にて冬を過さんとて、此處を船出するを可しとせり。ピニクスはクレテの港にて東 北と東 南とに向ふ。
13 Wana mwa mopepe moko ya sude ekomaki kopepa, bakanisaki ete posa na bango ezali kokokisama; boye batombolaki longo, mpe masuwa ekomaki kotambola pembeni-pembeni ya esanga ya Kreti.
南 風おもむろに吹きたれば、彼ら志望を得たりとして錨をあげ、クレテの岸邊に沿ひて進みたり。
14 Kasi sima na mwa tango, mopepe moko ya makasi penza, mopepe oyo babengaka « erakiloni, » ekomaki kopepa wuta na esanga;
幾程もなくユーラクロンといふ疾風その島より吹きおろし、
15 ememaki masuwa, mpe masuwa elongaki te nguya ya mopepe. Boye tomitikaki bongo na mopepe, mpe ememaki biso.
之がために船は吹き流され、風に向ひて進むこと能はねば、船は風の追ふに任す。
16 Lokola tolekaki na lombangu, na pembeni-pembeni ya esanga moke oyo babengaka Koda, tolongaki na pasi kokanga mwa bwato oyo ebikisaka bato na tango ya likama.
クラウダといふ小島の風下の方にいたり、辛うじて小艇を收め、
17 Sima na komatisa yango na masuwa, bazwaki basinga mpe bakangisaki yango. Lokola bazalaki kobanga kotutana na zelo ya ngambo ya Silite, babwakaki longo ya libaya likolo ya mayi, mpe mopepe ekobaki komema masuwa.
これを船に引上げてのち、備綱にて船體を卷き縛り、またスルテスの洲に乘りかけんことを恐れ、帆を下して流る。
18 Mokolo oyo elandaki, lokola mopepe ezalaki kaka koningisa masuwa makasi, babwakaki na ebale, biloko oyo ezalaki kati na masuwa.
いたく暴風に惱され、次の日、船の者ども積荷を投げすて、
19 Na mokolo ya misato, na maboko na bango moko, babwakaki na ebale, biloko oyo etambolisaka masuwa.
三日めに手づから船具を棄てたり。
20 Lokola tosalaki mikolo ebele na kozanga komona lisusu moyi mpe minzoto te, mpe mopepe ezalaki kaka kobeta makasi, tobungisaki elikya ya kobika.
數日のあひだ日も星も見えず、暴風はげしく吹き荒びて、我らの救はるべき望ついに絶え果てたり。
21 Sima na bato kosala mikolo ebele oyo baliaki lisusu te, Polo atelemaki liboso na bango mpe alobaki: — Baninga na ngai, bosengelaki koyoka toli na ngai ete tolongwa na Kreti te. Soki boyokelaki ngai, likama oyo elingaki kokomela bino te mpe bolingaki te kobungisa biloko na bino.
人々の食せぬこと久しくなりたる時、パウロその中に立ちて言ふ『人々よ、なんぢら前に我が勸をきき、クレテより船出せずして、この害と損とを受けずあるべき筈なりき。
22 Kasi sik’oyo, nazali kolendisa bino ete boyika mpiko, pamba te moko te kati na bino akokufa, kaka masuwa nde ekobeba.
いま我なんぢらに勸む、心 安かれ、汝 等のうち一人だに生命をうしなふ者なし、ただ船を失はん。
23 Na butu ya lelo, Anjelu na Nzambe na ngai, oyo nasalelaka, ayaki epai na ngai
わが屬するところ我が事ふる所の神の使、昨夜わが傍らに立ちて、
24 mpe alobaki: « Polo, kobanga te. Osengeli kosamba liboso ya Sezare. Mpo na yo, Nzambe abateli na bomoi bato nyonso oyo ozali kosala elongo na bango mobembo kati na masuwa. »
「パウロよ、懼るな、なんぢ必ずカイザルの前に立たん、視よ、神は汝と同船する者をことごとく汝に賜へり」と云ひたればなり。
25 Baninga na ngai, boyika mpiko, pamba te nazali na kondima kati na Nzambe ete akosala ndenge kaka ayebisaki ngai.
この故に人々よ、心 安かれ、我はその我に語り給ひしごとく必ず成るべしと神を信ず。
26 Kasi atako bongo, tosengeli kokangama kaka na esanga moko.
而して我らは或 島に推上げらるべし』
27 Na butu ya zomi na minei, masuwa ezalaki kaka komemama epai na epai kati na ebale monene Adriatiki. Na kati-kati ya butu, basali ya masuwa bakanisaki ete tokomi pene ya mokili;
かくて十 四日めの夜に至りて、アドリヤの海を漂ひゆきたるに、夜半ごろ水夫ら陸に近づきたりと思ひて、
28 babwakaki singa mpo na komeka mozindo ya mayi mpe bamonaki ete mozindo ya mayi ezali na bametele pene tuku misato na sambo. Wana bapusanaki mwa liboso, bamekaki lisusu mpe bamonaki ete mozindo ya mayi ezali na bametele pene tuku mibale na mwambe.
水を測りたれば、二 十 尋なるを知り、少しく進みてまた測りたれば、十 五 尋なるを知り、
29 Lokola bazalaki kobanga ete masuwa etutana na mabanga, babwakaki balongo minei na mayi wuta na sima ya masuwa, na posa makasi ya komona tongo kotana.
岩に乘り上げんことを恐れて、艫より錨を四つ投して夜明を待ちわぶ。
30 Kasi, lokola basali ya masuwa balingaki kokima, babandaki kokitisa kati na ebale monene mwa bwato oyo ebikisaka bato na tango ya likama, mpe basalaki lokola nde balingi kokende kokangisa balongo na liboso ya masuwa.
然るに水夫ら船より逃れ去らんと欲し、舳より錨を曳きゆくに言 寄せて小艇を海に下したれば、
31 Polo alobaki na mokonzi ya basoda nkama moko mpe na basoda: — Tala, soki bato oyo batikali te kati na masuwa, bino mpe bokobika te.
パウロ、百卒長と兵卒らとに言ふ『この者ども若し船に留らずば、汝ら救はるること能はず』
32 Boye, basoda bakataki basinga oyo esimbaki mwa bwato yango mpe batikaki yango kokweya na mayi.
ここに兵卒ら小艇の綱を斷切りて、その流れゆくに任す。
33 Wana bazalaki kozela tongo kotana, Polo alendisaki bato nyonso ete balia; alobaki: — Ekokisi lelo mikolo zomi na minei wuta bozali kozela, mpe bolie ata eloko moko te.
夜の明けんとする頃、パウロ凡ての人に食せんことを勸めて言ふ『なんぢら待ち待ちて食事せぬこと今日にて十 四日なり。
34 Nasengi na bino ete bolia sik’oyo. Bosengeli na yango mpo ete bozala na bomoi. Moko te kati na bino akobungisa ata suki moko ya moto na ye.
されば汝らに食せんことを勸む、これ汝らが救のためなり、汝らの頭髮 一筋だに首より落つる事なし』
35 Sima na ye koloba bongo, akamataki lipa mpe azongisaki matondi epai na Nzambe liboso na bango nyonso; bongo akataki yango mpe abandaki kolia.
斯く言ひて後みづからパンを取り、一同の前にて神に謝し、擘きて食し始めたれば、
36 Bango nyonso balendisamaki mpe bakomaki kolia.
人々もみな心を安んじて食したり。
37 Kati na masuwa, tozalaki bato nkama mibale na tuku sambo na motoba.
船に居る我らは凡て二 百 七 十 六 人なりき。
38 Sima na bango kolia mpe kotonda mingi, babwakaki ble na ebale mpo na kokitisa kilo ya masuwa.
人々 食し飽きてのち、穀物を海に投げ棄てて船を輕くせり。
39 Tango tongo etanaki, bamonaki mokili te, kasi bamonaki kaka libongo moko ya zelo na suka, epai ebale ekota. Boye bazwaki mokano, soki bakolonga, ya kosemisa masuwa kuna.
夜明になりて、孰の土地かは知らねど、砂濱の入江を見出し、なし得べくば此處に船を寄せんと相 議り、
40 Babwakaki balongo na ebale; mpe kaka na tango yango, bafungolaki basinga ya yenda, batombolaki bakapo mpo ete mopepe emema masuwa na ngambo ya libongo ya zelo.
錨を斷ちて海に棄つるとともに、舵纜をゆるめ舳の帆を揚げて、風にまかせつつ砂濱さして進む。
41 Kasi masuwa ekendeki kotutana na zelo ya ebale mpe ekangamaki. Wana eteni ya liboso ya masuwa ekangamaki na zelo mpe ezalaki lisusu koningana te, eteni ya sima ya masuwa epanzanaki na nguya ya bambonge.
然るに潮の流れあふ處にいたりて船を淺瀬に乘り上げたれば、舳 膠著きて動かず、艫は浪の激しきに破れたり。
42 Basoda bazwaki likanisi ya koboma bakangami mpo bazalaki kobanga ete bakatisa mayi mpe bakima.
兵卒らは囚人の泳ぎて逃れ去らんことを恐れ、これを殺さんと議りしに、
43 Kasi lokola mokonzi ya basoda nkama moko azalaki na posa ya kobikisa Polo, apekisaki bango kokokisa likanisi na bango. Boye, atindaki bato oyo bayebaki kokata mayi ete bazala bato ya liboso ya kokweya na mayi mpe bakende na mokili.
百卒長パウロを救はんと欲して、その議るところを阻み、泳ぎうる者に命じ、海に跳び入りてまず上陸せしめ、
44 Bamosusu basengeli kolanda bango na kodiembela na mabaya to na biteni ya masuwa. Ezali ndenge wana nde bato nyonso bakomaki malamu na mokili.
その他の者をば或は板あるひは船の碎片に乘らしむ。斯くしてみな上陸して救はるるを得たり。

< Misala ya Bantoma 27 >