< Misala ya Bantoma 26 >
1 Agripa alobaki na Polo: — Napesi yo nzela ya koloba. Boye, Polo atombolaki loboko mpe abandaki kosamba:
And Agrippa said to Paul, It is permitted to thee to speak for thyself. Then Paul reaching forth his hand, proceeded with his defence:
2 — Mokonzi Agripa, nazali na esengo mingi ya kosamba lelo liboso na yo, na tina na makambo nyonso oyo Bayuda bafundeli ngai,
O king Agrippa, I consider myself happy, being about this day to make my defence before thee concerning all those things of which I am accused by the Jews:
3 pamba te oyebi malamu bizaleli mpe tembe ya Bayuda. Boye nasengi na yo ete ozala na motema monene mpo na koyoka ngai.
especially as thou art acquainted with all the customs and questions among the Jews: therefore I pray you to hear me patiently.
4 Bayuda nyonso bayebi evandeli na ngai, wuta na bomwana na ngai, kobanda na ebandeli ya bomoi na ngai, kati na ekolo na ngai, mpe ezala kati na Yelusalemi.
Moreover indeed all the Jews know my life from my youth; being from the beginning in my nation and in Jerusalem,
5 Bayebi ngai wuta kala mpe bakoki kotatola, soki balingi, ete natambolisaki bomoi na ngai lokola Mofarizeo, na botosi makasi ya mibeko, ndenge lingomba na biso esengaka.
knowing me originally, if they may be willing to testify, that according to the most rigid sect of our religion I lived a Pharisee.
6 Mpe nazali kosamba lelo mpo na elikya na ngai kati na elaka oyo Nzambe apesaki na bakoko na biso.
And now for the hope of the promise which is from God to our fathers, I stand being judged:
7 Bato ya mabota na biso zomi na mibale basalelaki Nzambe, butu mpe moyi, na kolemba te, mpo ete bazalaki na elikya ete bakomona kokokisama ya elaka yango. Mokonzi Agripa, ezali kaka mpo na elikya yango nde Bayuda bafundi ngai.
unto which our twelve tribes constantly worshiping night and day, hope to attain: concerning which hope I am accused by the Jews, O king.
8 Mpo na nini, kati na bino, bozali kondima te ete Nzambe akoki kosekwisa bakufi?
Why is it judged by you incredible, if God shall raise the dead?
9 Ngai moko mpe nazalaki liboso kokanisa ete esengeli na ngai kosala nyonso oyo ekoki kosalema, mpo na kotelemela Kombo ya Yesu ya Nazareti.
Moreover indeed, I thought to myself that I ought to do many things contrary to the name of Jesus the Nazarene:
10 Ezali mosala yango nde nasalaki kati na Yelusalemi: natiaki basantu ebele na boloko, na ndingisa ya bakonzi ya Banganga-Nzambe; boye, tango bazalaki koboma bango, ngai mpe nazalaki kondima.
which I did also in Jerusalem, and shut up many of the saints in prison; and having received authority from the chief priests, and they being slain, I gave my vote against them;
11 Kati na bandako nyonso ya mayangani, nazalaki mbala mingi kotambola mpo na kopesa bango bitumbu mpe kotinda bango na makasi ete bafinga Yesu-Klisto. Na zuwa na ngai oyo eleka ndelo, nazalaki kolanda bango kino na bingumba ya bapaya mpo na konyokola bango.
and throughout all the synagogues, frequently punishing them, I compelled them to blaspheme; and being exceeding mad against them, I was persecuting them even also unto foreign cities.
12 Ezali mpo na yango nde nakendeki na Damasi, na bokonzi mpe na etinda ya bakonzi ya Banganga-Nzambe.
Meanwhile journeying to Damascus with power and authority of the chief priests, I saw on the way, O king,
13 Mokonzi, na ngonga ya midi, wana nazalaki kokende, namonaki pole moko kowuta na likolo, elekaki kutu ata kongenga ya moyi; pole yango ezipaki ngai mpe bato oyo bazalaki kotambola elongo na ngai.
about midday, a light from heaven above the brightness of the sun, shining around me and those traveling with me;
14 Tokweyaki biso nyonso na mabele, mpe nayokaki mongongo moko koloba na ngai na lokota ya Arami: « Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola Ngai? Ezali pasi mpo na yo komibamba na basende. »
and we all having fallen to the ground, I heard a voice speaking to me in the Hebrew tongue, Saul, Saul, why persecutest thou me? it is hard for thee to kick against goads.
15 Bongo natunaki: « Nkolo, yo nani? » Nkolo azongisaki: « Ngai, nazali Yesu oyo yo ozali konyokola.
And I said, Who art thou, Lord? And the Lord said, I am Jesus whom thou art persecuting.
16 Kasi lamuka mpe telema! Pamba te namimonisi epai na yo mpo na kokomisa yo mosali na Ngai mpe motatoli ya makambo oyo osili komona, mpe ya makambo oyo nakolakisa yo na sima.
But rise up, and stand upon thy feet: for unto this have I appeared unto thee, to make thee a minister and a martyr both of those things which thou hast seen, and of which I will appear unto thee;
17 Nakokangola yo wuta na maboko ya bato ya ekolo na yo mpe na maboko ya bato ya bikolo ya bapaya. Nakotinda yo epai na bango
delivering thee from the people, and from the Gentiles, unto whom now I send thee,
18 mpo ete ofungola bango miso, olongola bango na molili mpe omema bango na pole; mpo ete olongola bango na se ya bokonzi ya Satana mpe omema bango epai ya Nzambe, na tina ete bazwa bolimbisi ya masumu mpe libula kati na bato oyo babulisama na nzela ya kondima kati na Ngai. »
to open their eyes, to turn them from darkness unto light, and from the power of Satan unto God, in order that they may receive remission of sins, and an inheritance among those who are sanctified by faith in me.
19 Boye, mokonzi Agripa, wuta tango wana, nandimaki kotosa emoniseli oyo ewutaki na Likolo.
Therefore, O king, I was not disobedient to the heavenly vision:
20 Nateyaki liboso bavandi ya Damasi; sima, nateyaki bavandi ya Yelusalemi, ya Yuda mobimba mpe ya bikolo ya bapaya: nateyaki bango ete basengeli kobongola mitema, kozonga epai ya Nzambe mpe, na nzela ya misala na bango, kolakisa penza ete babongoli mitema.
but first to those in Damascus, and also in Jerusalem, and throughout all the country of Judea, and to the Gentiles, I was preaching that they should repent and turn to God, doing things worthy of repentance.
21 Ezali kaka mpo na tina oyo nde Bayuda bakangaki ngai kati na Tempelo mpe balukaki koboma ngai.
On account of these things the Jews, taking me while in the temple, endeavored to kill me.
22 Kasi kino lelo, Nzambe azali kobatela ngai; yango wana natelemi awa mpo na kotatola liboso ya bato pamba mpe bato minene. Nazali koteya makambo mosusu te, bobele makambo oyo basakoli mpe Moyize baloba ete ekokokisama solo:
Then having received help from God, I have stood unto this day, witnessing both to small and great, saying nothing but what the prophets and Moses said were about to come to pass:
23 Klisto akomona pasi mpe akozala moto ya liboso ya kosekwa kati na bakufi mpo na kosakola pole ya lobiko epai ya Bayuda mpe epai ya bato ya bikolo ya bapaya.
how that Christ must suffer, how being the first from the resurrection of the dead, he is to proclaim light both to the people, and the Gentiles.
24 Wana Polo azalaki nanu koloba, Festisi akataki ye maloba mpe agangelaki ye: — Ozali na liboma, Polo! Boyebi oyo otondi na yango ekomisi yo liboma!
And he making his defence to these things, Festus says with a loud voice, O Paul, thou art beside thyself; many writings turned thee into insanity.
25 Polo azongisaki: — Tata mokonzi Festisi, nazali na liboma te. Makambo oyo nazali koloba ezali ya solo mpe ezali penza na nzela.
But Paul says, I am not a maniac, most noble Festus; but I speak forth the words of truth and soberness.
26 Mokonzi Agripa kutu ayebi makambo oyo malamu; yango wana nazali koloba na molende nyonso liboso na ye. Nandimisami ete abungi ata likambo moko te kati na makambo yango, pamba te esalemaki na nkuku te.
For the king, to whom I also speak boldly, knows concerning these things: for I am persuaded that nothing of these things is hidden; for this has not been done in a corner.
27 Mokonzi Agripa, boni, ondimaka basakoli? Nayebi malamu ete ondimaka bango.
O king Agrippa, dost thou believe the prophets? I know that thou believest them.
28 Agripa alobaki na Polo: — Okanisi ete okoki kondimisa ngai kokoma Moklisto kaka na mwa tango moke?
And Agrippa said to Paul, With little persuasion thou dost persuade thyself to make me a Christian.
29 Polo azongisaki: — Ezala na tango molayi to na tango moke, nazali kosambela Nzambe ete, yo moko kaka te, kasi elongo na bato nyonso oyo bazali koyoka ngai lelo, bokoma lokola ngai, longola kaka minyololo oyo!
And Paul said, I would to God, that both in little and in much, not only you, but also all of those hearing me this day, were such as I am, except these bonds.
30 Wana azalaki koloba bongo, mokonzi, moyangeli, Berenise mpe bato nyonso oyo bazalaki elongo na bango batelemaki.
And the king, and the governor, and Bernice, and those sitting with them, arose up:
31 Wana bazalaki kobima, balobanaki bango na bango: — Moto oyo asali mabe ata moko te oyo ekoki komemela ye etumbu ya kufa to ya boloko.
and having gone away, they were talking to one another, saying, that This man is doing nothing worthy of death or of bonds.
32 Agripa alobaki na Festisi: — Soki moto oyo asengaki te kosamba liboso ya Sezare, esengelaki kotika ye.
But Agrippa said to Festus, This man was able to have been released, if he had not appealed to Caesar.