< Misala ya Bantoma 25 >
1 Mikolo misato sima na ye koya kati na etuka, Festisi alongwaki na Sezarea mpo na kokende na Yelusalemi
Three days after his arrival in the province, Festus went up from Caesarea to Jerusalem,
2 epai wapi bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya Bayuda bakendeki kokutana na ye mpo na kofunda Polo. Babondelaki mingi Festisi
where the chief priests and Jewish leaders presented their case against Paul. They urged Festus
3 mpo ete asalela bango ngolu ya kotinda Polo na Yelusalemi, pamba te basalaki mabongisi ya kotiela ye motambo na nzela mpo na koboma ye.
to grant them a concession against Paul by summoning him to Jerusalem, because they were preparing an ambush to kill him along the way.
4 Kasi Festisi azongiselaki bango: — Polo azali nanu kati na boloko, na Sezarea; mpe kala mingi te, nakozonga kuna.
But Festus replied, “Paul is being held in Caesarea, and I myself am going there soon.
5 Tika ete tokende nzela moko na ndambo ya bakambi na bino, mpo ete, soki moto yango asalaki mabe, bafundela ye kuna.
So if this man has done anything wrong, let some of your leaders come down with me and accuse him there.”
6 Festisi asalaki mikolo pene mwambe to zomi elongo na bango, mpe azongaki na Sezarea. Mokolo oyo elandaki bozongi na ye, avandaki na esambiselo mpe apesaki mitindo ete bamemela ye Polo.
After spending no more than eight or ten days with them, Festus went down to Caesarea. The next day he sat on the judgment seat and ordered that Paul be brought in.
7 Tango kaka Polo akomaki wana, Bayuda oyo bawutaki na Yelusalemi bazingelaki ye mpe bakomaki kofunda ye na tina na makambo mingi ya mabe makasi, oyo bango moko bazangaki kutu makoki mpo na kotalisa bosolo na yango.
When Paul arrived, the Jews who had come down from Jerusalem stood around him, bringing many serious charges that they could not prove.
8 Polo asambaki boye: — Nasalaki mabe moko te, nabukaki ata mobeko moko te ya Bayuda to ya Tempelo to mpe ya Sezare.
Then Paul made his defense: “I have committed no offense against the law of the Jews or against the temple or against Caesar.”
9 Kasi lokola Festisi alingaki kosepelisa Bayuda, atunaki Polo: — Boni, olingi kozonga na Yelusalemi mpe kosamba kuna liboso na ngai mpo na makambo oyo?
But Festus, wishing to do the Jews a favor, said to Paul, “Are you willing to go up to Jerusalem to stand trial before me on these charges?”
10 Polo azongisaki: — Te, natelemi liboso ya esambiselo ya Sezare; ezali awa nde nasengeli kosamba. Yo moko oyebi malamu ete nasali Bayuda ata likambo moko te ya mabe.
Paul replied, “I am standing before the judgment seat of Caesar, where I ought to be tried. I have done nothing wrong to the Jews, as you yourself know very well.
11 Soki nasali mabe to nasali likambo oyo ekoki komemela ngai etumbu ya kufa, nandimi kokufa. Kasi soki makambo oyo Bayuda bafundeli ngai ezali ya lokuta, moto moko te azali na makoki ya kokaba ngai na maboko na bango. Tika ete Sezare akata likambo na ngai!
If, however, I am guilty of anything worthy of death, I do not refuse to die. But if there is no truth to their accusations against me, no one has the right to hand me over to them. I appeal to Caesar!”
12 Sima na Festisi kokabola makanisi elongo na bapesi toli na ye, alobaki na Polo: — Lokola osengi kokende kosamba liboso ya Sezare, okokende solo kosamba liboso na ye.
Then Festus conferred with his council and replied, “You have appealed to Caesar. To Caesar you will go!”
13 Sima na mwa mikolo, mokonzi Agripa elongo na Berenise bayaki na Sezarea mpo na kopesa Festisi mbote.
After several days had passed, King Agrippa and Bernice came down to Caesarea to pay their respects to Festus.
14 Lokola balekisaki kuna mikolo mingi, Festisi ayebisaki mokonzi likambo ya Polo; alobaki: — Ezali awa na moto moko oyo Felikisi atikaki kati na boloko.
Since they were staying several days, Festus laid out Paul’s case before the king: “There is a certain man whom Felix left in prison.
15 Tango nakendeki na Yelusalemi, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya Bayuda bayaki kofunda ye epai na ngai, mpe basengaki ete nakatela ye etumbu.
While I was in Jerusalem, the chief priests and elders of the Jews presented their case and requested a judgment against him.
16 Kasi nayebisaki bango ete bato ya Rome bazalaka na ezaleli te ya kokatela moto etumbu soki asambi nanu te na bato oyo bafundi ye, mpe soki azwi nanu nzela te ya kozongisa biyano na makambo oyo bafundeli ye.
I told them that it is not the Roman custom to hand a man over before he has had an opportunity to face his accusers and defend himself against their charges.
17 Tango bayaki awa, nalekisaki tango te; kasi mokolo oyo elandaki, navandaki na esambiselo mpe napesaki mitindo ete bamemela ngai moto yango.
So when they came here with me, I did not delay. The next day I sat on the judgment seat and ordered that the man be brought in.
18 Tango bato oyo bafundaki ye batelemaki mpo na koloba, balongaki te kotalisa bosolo ya makambo mabe oyo bafundelaki ye, ndenge ngai nazalaki kokanisela.
But when his accusers rose to speak, they did not charge him with any of the crimes I had expected.
19 Batianaki tembe na tina na lolenge na bango ya kosambela, mpe na tina na moto moko oyo asila kokufa, moto oyo Polo azalaki koloba na tina na ye ete azali na bomoi; kombo ya moto yango ezalaki « Yesu. »
They only had some contentions with him regarding their own religion and a certain Jesus who had died, but whom Paul affirmed to be alive.
20 Lokola nayebaki te ndenge nini nakoki kokata likambo ya lolenge oyo, natunaki ye soki alingi kokende na Yelusalemi mpo ete bakata likambo na ye kuna.
Since I was at a loss as to how to investigate these matters, I asked if he was willing to go to Jerusalem and be tried there on these charges.
21 Kasi Polo asengaki ete akende kosamba liboso ya mokonzi monene. Boye, napesaki mitindo ete babatela ye kati na boloko kino tango nakotinda ye epai ya Sezare.
But when Paul appealed to be held over for the decision of the Emperor, I ordered that he be held until I could send him to Caesar.”
22 Agripa alobaki na Festisi: — Nazali na posa ya koyoka moto wana, ngai moko. Festisi azongisaki: — Okoyoka ye lobi.
Then Agrippa said to Festus, “I would like to hear this man myself.” “Tomorrow you will hear him,” Festus declared.
23 Mokolo oyo elandaki, Agripa mpe Berenise bayaki na lokumu nyonso, mpe bakotaki na ndako oyo basambiselaka bato, elongo na bakonzi ya basoda mpe bakambi ya engumba. Na mitindo ya Festisi, bayaki na Polo.
The next day Agrippa and Bernice came with great pomp and entered the auditorium, along with the commanders and leading men of the city. And Festus ordered that Paul be brought in.
24 Festisi alobaki: — Mokonzi Agripa mpe bino nyonso oyo bozali elongo na biso awa, bozali komona moto oyo! Lisanga mobimba ya Bayuda bayaki kokutana na ngai na tina na ye, na Yelusalemi mpe awa kati na Sezarea, bazalaki koganga ete asengeli kokufa.
Then Festus said, “King Agrippa and all who are present with us, you see this man. The whole Jewish community has petitioned me about him, both here and in Jerusalem, crying out that he ought not to live any longer.
25 Nzokande, mpo na ngai, namonaki likambo moko te oyo ekokaki komemela ye etumbu ya kufa. Kasi lokola ye moko asengi ete akende kosamba liboso ya mokonzi monene, ngai mpe nazwi mokano ya kotinda ye na Rome.
But I found he had done nothing worthy of death, and since he has now appealed to the Emperor, I decided to send him.
26 Lokola nazali na likambo moko te ya malonga ya kokomela mokonzi monene na tina na ye, nayei na ye mpo ete asamba liboso na bino nyonso, mpe mingi-mingi liboso na yo, mokonzi Agripa, mpo ete nakoka kozwa likambo ya kokomela mokonzi monene, sima na biso kotuna ye mituna.
I have nothing definite to write to our sovereign one about him. Therefore I have brought him before all of you, and especially before you, King Agrippa, so that after this inquiry I may have something to write.
27 Pamba te namoni ete tina ezali te ya kotinda moto ya boloko na Rome, soki nalongi te kolimbola malamu likambo oyo bafundeli ye.
For it seems unreasonable to me to send on a prisoner without specifying the charges against him.”