< Misala ya Bantoma 24 >

1 Sima na mikolo mitano, Ananiasi, mokonzi ya Banganga-Nzambe, ayaki na Sezarea, elongo na ndambo ya bakambi mpe molobeli Tertile, mpo na kofunda Polo epai ya moyangeli.
After five days, the high priest, Ananias, came down with certain elders and an orator, one Tertullus. They informed the governor against Paul.
2 Tango babengisaki Polo, Tertile akomaki kofunda ye liboso ya Felikisi na maloba oyo: — Tata moyangeli Felikisi, ezali mpo na yo nde tozali na kimia ya solo, mpe mpo na bwanya na yo nde mbongwana ya solo ekota kati na ekolo oyo.
When he was called, Tertullus began to accuse him, saying, "Seeing that by you we enjoy much peace, and that by your foresight reforms are coming to this nation,
3 Tata moyangeli Felikisi, na bisika nyonso mpe na tango nyonso, tondimaka yango mpe totondaka yo mingi penza.
we accept it in all ways and in all places, most excellent Felix, with all thankfulness.
4 Kasi, tolingi te kozwa yo tango molayi. Nabondeli yo: salela biso ngolu ya koyoka biso na mwa tango moke.
But, that I do not delay you, I entreat you to bear with us and hear a few words.
5 Biso, tomoni ete mosala ya moto oyo ezali: kotia mobulu; azali kobimisa mobulu kati na Bayuda nyonso ya mokili mobimba. Azali mokambi ya lingomba moko ya bato ya Nazareti,
For we have found this man to be a plague, an instigator of insurrections among all the Jews throughout the world, and a ringleader of the sect of the Nazarenes.
6 mpe amekaki kutu kobebisa bosantu ya Tempelo, yango wana tokangaki ye. [Tozalaki na posa ya kosambisa ye kolanda Mobeko na biso,
He even tried to profane the temple, and we arrested him. And we would have judged him according to our law,
7 kasi Lisiasi, mokonzi ya basoda, ayaki mpe abotolaki ye na maboko na biso na makasi.
but the chief captain Lysias came, and with great violence took him away out of our hands,
8 Apesaki bato oyo bafundaki ye mitindo ete baya epai na yo.] Soki yo moko otuni ye mituna, okososola ete makambo oyo tofundeli ye ezali ya solo.
commanding his accusers to come to you. By examining him yourself you may ascertain all these things of which we accuse him."
9 Bayuda babetaki sete na makambo oyo bafundelaki ye.
The Jews also joined in the attack, affirming that these things were so.
10 Tango moyangeli apesaki Polo nzela ya koloba, Polo azongisaki: — Nayebi solo ete ozali mosambisi ya ekolo oyo wuta mibu ebele. Boye, nazali na esengo ya kosamba liboso na yo.
When the governor had beckoned to him to speak, Paul answered, "Because I know that you have been a judge of this nation for many years, I cheerfully make my defense,
11 Yo moko okoki koluka koyeba malamu ete eleki nanu mikolo zomi na mibale te wuta nakendeki na Yelusalemi mpo na kosambela Nzambe.
seeing that you can recognize that it is not more than twelve days since I went up to worship at Jerusalem.
12 Mpe bato oyo bafundi ngai batikala nanu kokuta ngai te nazali kotia tembe na moto to nazali kotindika bato ete batomboka, ezala kati na Tempelo to kati na bandako ya mayangani to mpe kati na engumba.
In the temple they did not find me disputing with anyone or stirring up a crowd, either in the synagogues, or in the city.
13 Bakolonga mpe te kotalisa bosolo ya makambo oyo bafundeli ngai sik’oyo.
Nor can they prove to you the things of which they now accuse me.
14 Nzokande, nandimi ete nasalelaka Nzambe ya bakoko na biso, wana nazali kolanda Nzela oyo bango bazali kobenga « binzambe-nzambe. » Nandimaka nyonso oyo ekomama kati na Mobeko mpe kati na mikanda ya basakoli.
But this I confess to you, that after the Way, which they call a sect, so I serve the God of our fathers, believing all things which are according to the Law, and which are written in the Prophets;
15 Boye ngai, ndenge moko na bango, nazalaka na elikya na Nzambe ete bato nyonso bakosekwa, ezala bato ya sembo to bato mabe.
having hope toward God, which these also themselves look for, that there will be a resurrection, both of the just and unjust.
16 Yango wana, ngai mpe nasalaka tango nyonso makasi mpo na kobatela motema na ngai peto, liboso ya Nzambe mpe liboso ya bato.
This being so, I also do my best to always have a clear conscience toward God and people.
17 Sima na ngai kosala mibu ebele na libanda ya Yelusalemi, nazongaki na mboka na ngai mpo na komemela bato bakelela ya ekolo na ngai lisungi, mpe mpo na kobonzela Nzambe makabo.
Now after some years, I came to bring gifts for the needy to my nation, and offerings;
18 Bakutaki ngai nasilisi komipetola kati na Tempelo; ezalaki na ebele ya bato te elongo na ngai, mobulu mpe te.
amid which certain Jews from Asia found me purified in the temple, not with a mob, nor with turmoil.
19 Kasi ezali ndambo ya Bayuda ya Azia, oyo bazalaki wana, nde basengelaki kotelema liboso na yo mpo na kofunda ngai, soki solo bazwaki ngai na likambo.
They ought to have been here before you, and to make accusation, if they had anything against me.
20 To mpe lisusu, tika ete bato oyo bazali awa baloba bango moko mabe oyo bazwaki ngai tango nasambaki liboso ya Likita-Monene,
Or else let these men themselves say what injustice they found in me when I stood before the council,
21 longola kaka liloba oyo nabimisaki, wana natelemaki liboso na bango: « Bozali kosambisa ngai lelo mpo ete nandimaka ete bakufi bakosekwa! »
unless it is for this one thing that I shouted out standing among them, 'Concerning the resurrection of the dead I am being judged before you today.'"
22 Felikisi, oyo ayebaki malamu makambo oyo etali Nzela, azongisaki bango mpe alobaki: — Nakoyekola malamu likambo na bino tango mokonzi ya basoda, Lisiasi, akoya.
But Felix, having more exact knowledge concerning the Way, deferred them, saying, "When Lysias, the commanding officer, comes down, I will decide your case."
23 Boye, apesaki mitindo epai ya mokonzi ya basoda nkama moko ete abatela Polo lokola mokangami kati na boloko, kasi atikela ye mwa bonsomi mpe apesa bandeko na ye nzela mpo ete basunga ye.
He ordered the centurion that he should be kept in custody, and should have some privileges, and not to forbid any of his friends to serve him or to visit him.
24 Sima na mwa mikolo, Felikisi ayaki elongo na mwasi na ye, Drusiye, oyo azalaki Moyuda; abengisaki Polo mpe akomaki koyoka ye na tina na makambo oyo etali kondima kati na Yesu-Klisto.
But after some days, Felix came with Drusilla, his wife, who was Jewish, and sent for Paul, and heard him concerning the faith in Christ Jesus.
25 Kasi, wana Polo akomaki koloba na tina na bosembo, komikanga mpe kosambisama oyo ezali koya, Felikisi ayokaki somo mpe alobaki na ye: — Ekoki mpo na sik’oyo! Okoki kolongwa. Soki nazwi lisusu tango, nakobengisa yo.
As he reasoned about righteousness, self-control, and the judgment to come, Felix was terrified, and answered, "Go your way for this time, and when it is convenient for me, I will summon you."
26 Felikisi azalaki kobengisa ye mbala na mbala mpo na kosolola na ye, na elikya ete Polo akopesa ye kanyaka.
Meanwhile, he also hoped that money would be given to him by Paul. Therefore also he sent for him more often, and talked with him.
27 Sima na mibu mibale, Porsiusi Festisi akomaki moyangeli na esika ya Felikisi oyo, mpo na kosepelisa Bayuda, atikaki Polo kati na boloko.
But when two years were fulfilled, Felix was succeeded by Porcius Festus, and desiring to gain favor with the Jews, Felix left Paul in bonds.

< Misala ya Bantoma 24 >