< Misala ya Bantoma 23 >

1 Polo atalaki bato nyonso ya Likita-Monene mpe alobaki: — Bandeko na ngai, kino na moyi ya lelo, nazali kotambola na motema ya peto liboso ya Nzambe.
ויבט פולוס אל הסנהדרין ויאמר אנשים אחים בכל תמת לבבי התהלכתי לפני אלהים עד היום הזה׃
2 Kasi Ananiasi, mokonzi ya Banganga-Nzambe, apesaki bato oyo bazalaki pene ya Polo mitindo ete babeta ye na monoko.
ויצו חנניה הכהן הגדול את העמדים עליו להכותו על פיו׃
3 Bongo Polo alobaki na ye: — Nzambe akobeta yo, yo mir oyo bapakola langi ya pembe! Ovandi wana mpo na kosambisa ngai ndenge Mobeko ezali kosenga, nzokande yo nde moto obuki Mobeko mpo ete opesi mitindo ete babeta ngai!
ויאמר אליו פולוס יככה אלהים הקיר המסיד האמנם ישב אתה לדין אתי כתורה ואתה מצוה להכותי שלא כתורה׃
4 Bato oyo batelemaki pene ya Polo balobaki: — Ebandi ndenge nini ofinga mbala moko mokonzi ya Banganga-Nzambe, ya Nzambe!
ויאמרו העמדים שם את הכהן הגדול לאלהים תחרף׃
5 Polo azongisaki: — Bandeko, nayebaki te ete azali mokonzi ya Banganga-Nzambe, pamba te nayebi malamu ete ekomama: « Okolobaka mabe te na tina na mokambi ya bato na yo. »
ויאמר פולוס אחי לא ידעתי אשר הוא הכהן הגדול כי כתוב נשיא בעמך לא תאר׃
6 Lokola Polo ayebaki ete, kati na bato ya Likita-Monene, bamoko bazalaki Basaduseo, mpe bamosusu, Bafarizeo, agangaki kati na Likita-Monene: — Bandeko na ngai, nazali Mofarizeo, mwana ya Bafarizeo; nazali kosamba mpo na elikya na biso ya lisekwa ya bakufi.
ופולוס ידע כי מקצתם צדוקים ומקצתם פרושים ויצעק בתוך הסנהדרין אנשים אחים פרוש בן פרוש אנכי ועל תקות המתים ותחיתם אני נדין׃
7 Tango kaka alobaki bongo, koswana makasi ekotaki kati na Bafarizeo mpe Basaduseo, mpe mayangani ekabwanaki;
ובדברו הדבר הזה היה ריב בין הצדוקים ובין הפרושים ויחלק ההמון׃
8 pamba te Basaduseo balobaka ete lisekwa ezalaka te, ba-anjelu bazalaka te, milimo mpe ezalaka te; nzokande, Bafarizeo bandimaka makambo wana nyonso.
כי הצדוקים אמרים אין תחיה ואין מלאך ורוח והפרושים מודים בשניהם׃
9 Makelele emataki makasi penza. Boye ndambo ya balakisi ya Mobeko oyo bazalaki Bafarizeo batelemaki mpe batombolaki mingongo na mpiko nyonso: — Solo, tomoni ata mabe moko te ya kopamela moto oyo. Nani ayebi? Tango mosusu molimo to anjelu nde alobaki na ye.
ותהי המלה גדולה ויקומו הסופרים אשר מכת הפרושים ויתוכחו לאמר לא מצאנו דבר רע באיש הזה ואם רוח דבר אליו או מלאך אל נלחמה באלהים׃
10 Lokola tembe ekomaki makasi koleka, mokonzi ya basoda abangaki ete bakata Polo biteni-biteni; apesaki mitindo na basoda ete bakita, balongola ye kati na bango mpe bamema ye kati na lopango ya basoda.
והריב הולך וחזק ושר האלף דאג פן ישסעו את פולוס ויצו את אנשי הצבא לרדת ולחטף אתו מתוכם ולהכיאו אל המצד׃
11 Na butu oyo elandaki, Nkolo abimelaki Polo kati na emoniseli mpe alobaki na ye: — Yika mpiko! Ndenge kaka otatolaki na tina na Ngai kati na Yelusalemi, ndenge mpe osengeli kotatola kati na Rome.
ובלילה ההוא נצב עליו האדון ויאמר חזק פולוס כי כאשר העידות לי בירושלים כן העד תעיד ברומי׃
12 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Bayuda basalelaki Polo likita; balapaki ndayi ete bakolia te mpe bakomela ata eloko moko te kino bakoboma Polo.
ויהי לפנות הבקר ויתחברו היהודים ויאסרו אסר על נפשם לאמר כי לא יאכלו ולא ישתו עד אם יהרגו את פולוס׃
13 Motango ya bato oyo basalelaki Polo likita yango ezalaki bato koleka tuku minei.
ומספר הבאים באלה הזאת היה יותר מארבעים׃
14 Bakendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato mpo na koloba na bango: — Tolapi ndayi ete tokolia eloko moko te kino tokoboma Polo.
ויגשו לא ראשי הכהנים ואל הזקנים לאמר אסר אסרנו על נפשנו לבלתי טעם מאומה עד אם הרגנו את פולוס׃
15 Bino mpe bato ya Likita-Monene, bokende sik’oyo epai ya mokonzi ya basoda mpe bosenga ete bamema Polo liboso na bino, lokola nde bolingi koyekola malamu likambo na ye. Bongo na ngambo na biso, tosili komibongisa mpo na koboma ye liboso ete akoma awa.
ועתה הודיעו אתם והסנהדרין את שר האלף ויורידהו מחר אליכם כאלו תחפצו לדרש היטב את ענינו ואנחנו נכונים להמיתו בטרם יקרב אליכם׃
16 Kasi tango mwana mobali ya ndeko mwasi ya Polo ayokaki motambo yango, akendeki na lopango ya basoda, akotaki mpe akebisaki Polo.
וישמע בן אחות פולוס את ארבם וילך ויבא אל המצד ויגד לפולוס׃
17 Bongo Polo abengaki mokonzi moko ya basoda nkama moko mpe alobaki na ye: — Mema elenge mobali oyo epai ya mokonzi, pamba te azali na likambo ya koyebisa ye.
ויקרא פולוס לאחד משרי המאות ויאמר אליו הולך את הבחור הזה אל שר האלף כי דבר לו להודיעו׃
18 Boye, mokonzi yango amemaki ye epai ya mokonzi ya basoda mpe alobaki: — Mokangami Polo abengaki ngai mpe asengaki na ngai ete namemela yo elenge mobali oyo, pamba te azali na likambo ya koyebisa yo.
ויקחהו ויוליכהו אל שר האלף ויאמר פולוס האסיר קראני אליו ויבקש ממני להוליך אליך את הבחור הזה כי דבר לו להגיד לך׃
19 Mokonzi ya basoda akamataki elenge mobali na loboko, amemaki ye na pembeni mpe atunaki ye: — Likambo nini olingi koyebisa ngai?
ויאחז שר האלף בידו ויסר עמו לבדו וישאלהו מה הוא זה אשר לך להודיעני׃
20 Elenge mobali azongisaki: — Bayuda bayokani kosenga na yo ete, lobi, omemela bango Polo liboso ya Likita-Monene, lokola nde balingi koyekola lisusu likambo na ye.
ויאמר כי נועצו היהודים יחדו לבקש ממך כי מחר תוריד את פולוס לפני הסנהדרין והמה כאלו חפצים לדעת היטב את ענינו׃
21 Kasi kondima bosenga na bango te, pamba te bato koleka tuku minei kati na bango bazali kobongisa motambo mpo na kokanga ye; balapaki ndayi ete bakolia te mpe bakomela ata eloko moko te kino bakoboma Polo. Makambo nyonso esili kobongisama mpe bazali kozela kaka ndingisa na yo.
ואתה אל תשמע להם כי ארבים לו מהם יותר מארבעים איש אשר אסרו אסר על נפשם לבלתי אכל ושתות בטרם יהרגוהו והמה עתה עמדים ומחכים להבטחתך׃
22 Mokonzi ya basoda atikaki elenge mobali yango ete azonga; kasi liboso ete akende, akebisaki ye: — Koloba na moto moko te likambo oyo oyebisi ngai.
וישלח שר האלף את הבחור ויצוהו לבלתי אמר לאיש כי גלה לו את הדבר הזה׃
23 Sima na mwa tango moke, mokonzi ya basoda abengisaki bakonzi mibale ya basoda nkama moko mpe alobaki na bango: — Bobongisa basoda nkama mibale, basoda tuku sambo oyo batambolaka na bampunda mpe basoda mosusu nkama mibale, mpo ete bakende na Sezarea, na ngonga ya libwa ya butu.
ויקרא לשני שרי מאות ויאמר החלצו מאתכם אנשי צבא מאתים ללכת לקסרין ופרשים שבעים ומשכי קשת מאתים מן השעה השלישית בלילה׃
24 Bobongisa bampunda mpo na komema Polo mpo ete akoma malamu epai ya moyangeli Felikisi.
ובהמות יכינו להרכיב את פולוס למען הביאו שלם אל פיליכס ההגמון׃
25 Boye, akomelaki moyangeli mokanda oyo:
ויכתב אגרת וזה תכן דבריה׃
26 Tata moyangeli Felikisi, yamba mbote ewuti epai na ngai Klodiusi Lisiasi.
קלודיוס לוסיאס אל פיליכס ההגמון האדיר שלום׃
27 Bayuda bakangaki moto oyo natindeli yo. Tango balingaki koboma ye, nayaki elongo na basoda mpe nakangolaki ye, pamba te nayokaki sango ete azali moto ya Rome.
את האיש הזה תפשו היהודים ויבקשו המיתו ואבא עם אנשי הצבא ואפלטהו מתוכם בשמעי כי רומי הוא׃
28 Lokola nalingaki koyeba malamu tina oyo bafundelaki ye, namemaki ye liboso ya Likita-Monene na bango.
ובאשר חפצתי לדעת על מה שמנו אתו הורדתיו אל הסנהדרין שלהם׃
29 Namonaki ete bafundaki ye kaka mpo na makambo oyo etali mobeko na bango, kasi balongaki te kofunda ye mpo na mabe moko oyo ekoki kopesa ye etumbu ya kufa to ya boloko.
ואמצא כי שטנו אתו על דברי שאלות דתם ולא על דבר אשר יהיה עליו חיב מיתה או מוסרות׃
30 Tango bayebisaki ngai ete Bayuda basaleli ye likita mpo na koboma ye, nazwaki mokano ya kotinda ye epai na yo noki penza; mpe napesaki lisusu mitindo na bato oyo bafundaki ye ete baya kofunda ye epai na yo.
ועתה הנה הגד לי שהיהודים מתנכלים באיש הזה ואשלחהו אליך מיד וגם את שטניו צויתי לבוא ולהגיש שטנתם לפניך ואתה שלום׃
31 Kolanda mitindo oyo basoda bazwaki, bakamataki Polo mpe bamemaki ye butu-butu kino na Antipatrisi.
ויקחו אנשי הצבא את פולוס כאשר צוו ויביאהו לילה אל אנטפטריס׃
32 Mokolo oyo elandaki, basoda oyo batambolaka na makolo bazongaki na lopango ya basoda mpe batikaki basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda kokende elongo na ye.
וממחרת הניחו את הפרשים ללכת אתו וישובו למצד׃
33 Tango bakomaki na Sezarea, basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda bapesaki mokanda yango epai ya moyangeli mpe balakisaki ye Polo.
והמה באו אל קסרין ויתנו את האגרת בידי ההגמון ויעמידו לפניו גם את פולוס׃
34 Moyangeli atangaki mokanda yango mpe atunaki soki Polo azali moto ya mboka nini. Wana ayokaki ete azali moto ya Silisi,
ויהי כקרא ההגמון את האגרת וישאל מאי זה מדינה הוא ויהי כשמעו כי הוא מקיליקיא ויאמר׃
35 alobaki na ye: — Nakoyoka yo tango bato oyo bafundaki yo bakokoma. Bongo apesaki mitindo ete bakengela Polo kati na ndako ya mokonzi Erode.
אשמע את דבריך בבוא גם שטניך הנה ויצו לשמרו בבית המשפט אשר להורדוס׃

< Misala ya Bantoma 23 >