< Misala ya Bantoma 22 >
1 — Bandeko mpe batata, boyoka sik’oyo ndenge nini nalingi komilongisa.
“Brothers and fathers, listen now to my defense before you.”
2 Tango bayokaki Polo koloba na lokota ya Arami, bavandaki lisusu kimia koleka. Bongo, Polo alobaki:
When they heard him speak to them in Hebrew, they became even more silent. Then Paul declared,
3 — Nazali Moyuda, nabotama na Tarse kati na Silisi, kasi nakoli kaka awa, na engumba oyo ya Yelusalemi. Gamalieli nde azalaki molakisi na ngai; ye nde ateyaki ngai na bosolo nyonso Mobeko ya bakoko na biso. Nazalaki na bolingo makasi mpo na Nzambe, ndenge bino nyonso bozali na yango lelo.
“I am a Jew, born in Tarsus of Cilicia, but raised in this city. I was educated at the feet of Gamaliel in strict conformity to the law of our fathers. I am just as zealous for God as any of you here today.
4 Nanyokolaki bato oyo bazalaki kolanda Nzela oyo kino koboma bango, nazalaki kokanga mibali mpe basi, mpe kobwaka bango na boloko.
I persecuted this Way even to the death, detaining both men and women and throwing them into prison,
5 Mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe lisanga mobimba ya bakambi bakoki kotatola bosolo ya makambo oyo nazali koloba. Bango nde kutu bapesaki ngai mikanda mpo ete nakende kopesa na bandeko na bango ya Damasi. Boye, nakendeki kuna mpo na kokanga bato mpe komema bango na Yelusalemi, mpo ete bapesa bango etumbu.
as the high priest and the whole Council can testify about me. I even obtained letters from them to their brothers in Damascus, and I was on my way to apprehend these people and bring them to Jerusalem to be punished.
6 Wana nazalaki na nzela mpe nakomaki pene ya Damasi, na ngonga pene ya midi, namonaki mbala moko pole makasi kowuta na Likolo mpe kongengela ngai.
About noon as I was approaching Damascus, suddenly a bright light from heaven flashed around me.
7 Nakweyaki na mabele mpe nayokaki mongongo moko koloba na ngai: « Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola Ngai? »
I fell to the ground and heard a voice say to me, ‘Saul, Saul, why do you persecute Me?’
8 Natunaki: « Nkolo, yo nani? » Alobaki na ngai: « Nazali Yesu ya Nazareti, oyo yo ozali konyokola. »
‘Who are You, Lord?’ I asked. ‘I am Jesus of Nazareth, whom you are persecuting,’ He replied.
9 Bato oyo bazalaki na ngai elongo bamonaki pole yango, kasi bayokaki te mongongo ya moto oyo azalaki koloba na ngai.
My companions saw the light, but they could not understand the voice of the One speaking to me.
10 Natunaki: « Nkolo, nasala nini? » Nkolo alobaki na ngai: « Telema, kende na Damasi; kuna, bakoyebisa yo makambo nyonso oyo osengeli kosala. »
Then I asked, ‘What should I do, Lord?’ ‘Get up and go into Damascus,’ He told me. ‘There you will be told all that you have been appointed to do.’
11 Baninga na ngai basimbaki ngai na loboko mpe bamemaki ngai kino na Damasi, pamba te kongenga ya pole wana ebomaki ngai miso.
Because the brilliance of the light had blinded me, my companions led me by the hand into Damascus.
12 Ezalaki na moto moko kuna, kombo na ye ezalaki « Ananiasi. » Azalaki kotosa makambo ya Nzambe ndenge Mobeko ezalaki kotinda, mpe azalaki na lokumu mingi na miso ya Bayuda nyonso ya engumba wana.
There a man named Ananias, a devout observer of the law who was highly regarded by all the Jews living there,
13 Ayaki kokutana na ngai mpe alobaki: « Ndeko na ngai, Saulo, mona lisusu. » Mpe kaka na tango yango, nazwaki lisusu makoki ya komona mpe namonaki ye.
came and stood beside me. ‘Brother Saul,’ he said, ‘receive your sight.’ And at that moment I could see him.
14 Bongo alobaki na ngai: « Nzambe ya bakoko na biso apona yo wuta kala mpo ete oyeba mokano na Ye, omona Moto na sembo mpe oyoka mongongo na Ye.
Then he said, ‘The God of our fathers has appointed you to know His will, and to see the Righteous One, and to hear His voice.
15 Okozala motatoli na Ye liboso ya bato nyonso, mpo na koyebisa bango makambo nyonso oyo osili komona mpe koyoka.
You will be His witness to everyone of what you have seen and heard.
16 Mpo na nini ozali kolekisa tango? Telema, zwa libatisi mpe belela Kombo ya Nkolo mpo ete opetolama na masumu na yo. »
And now what are you waiting for? Get up, be baptized, and wash your sins away, calling on His name.’
17 Sima na ngai kozonga na Yelusalemi, wana nazalaki kosambela na Tempelo, nakweyaki na Molimo
Later, when I had returned to Jerusalem and was praying at the temple, I fell into a trance
18 mpe nayokaki Nkolo koloba na ngai: « Sala noki, bima na Yelusalemi, pamba te bato na yango bakondima te litatoli oyo okoloba na tina na Ngai. »
and saw the Lord saying to me, ‘Hurry! Leave Jerusalem quickly, because the people here will not accept your testimony about Me.’
19 Nazongisaki: « Nkolo, bato wana bayebi malamu ete nazalaki kotambola na bandako ya mayangani mpo na kobwaka na boloko mpe kobetisa fimbu, bato oyo bazalaki kondimela Yo.
‘Lord,’ I answered, ‘they know very well that in one synagogue after another I imprisoned and beat those who believed in You.
20 Tango basopaki makila ya Etieni, motatoli na Yo, ngai mpe nazalaki wana, nandimaki makambo oyo esalemaki mpe nazalaki kokengela bilamba ya bato oyo babomaki ye. »
And when the blood of Your witness Stephen was shed, I stood there giving my approval and watching over the garments of those who killed him.’
21 Kasi Nkolo azongiselaki ngai: « Kende, nakotinda yo mosika, epai ya bato ya bikolo ya bapaya. »
Then He said to me, ‘Go! I will send you far away to the Gentiles.’”
22 Bato bayokaki Polo kino tango alobaki maloba wana. Boye, batombolaki mingongo na bango mpe bagangaki: — Bolongola ye na mokili! Asengeli te kozala na bomoi!
The crowd listened to Paul until he made this statement. Then they lifted up their voices and shouted, “Rid the earth of him! He is not fit to live!”
23 Lokola bazalaki koganga makasi mpe kobwaka bilamba na bango mpe putulu na likolo,
As they were shouting and throwing off their cloaks and tossing dust into the air,
24 mokonzi ya basoda apesaki mitindo ete bakotisa Polo kati na lopango ya basoda mpe babeta ye fimbu, mpo ete aloba polele tina nini Bayuda bazali koganga bongo mpo na ye.
the commander ordered that Paul be brought into the barracks. He directed that Paul be flogged and interrogated to determine the reason for this outcry against him.
25 Wana bazalaki kokanga Polo basinga, Polo atunaki mokonzi oyo azalaki wana: — Boni, mibeko epesi penza ndingisa ya kobeta moto ya Rome fimbu, wana bosambisi ye nanu te?
But as they stretched him out to strap him down, Paul said to the centurion standing there, “Is it lawful for you to flog a Roman citizen without a trial?”
26 Tango mokonzi ayokaki bongo, akendeki koyebisa mokonzi ya basoda: — Okosala nini? Tata oyo azali moto ya Rome.
On hearing this, the centurion went and reported it to the commander. “What are you going to do?” he said. “This man is a Roman citizen.”
27 Mbala moko, mokonzi ya basoda akendeki epai ya Polo mpe atunaki ye: — Yebisa ngai solo, ozali penza moto ya Rome? Azongisaki: — Iyo, ezali bongo!
The commander went to Paul and asked, “Tell me, are you a Roman citizen?” “Yes,” he answered.
28 Mokonzi ya basoda alobaki: — Nafutaki mbongo mingi mpo na kozwa makoki ya kokoma moto ya Rome. Polo azongisaki: — Kasi ngai, nazali moto ya Rome ya kobotama.
“I paid a high price for my citizenship,” said the commander. “But I was born a citizen,” Paul replied.
29 Mbala moko, bato oyo balingaki kobeta ye fimbu batikaki ye. Mokonzi ya basoda akomaki kobanga tango asosolaki ete tata oyo ye akangaki minyololo azali penza moto ya Rome.
Then those who were about to interrogate Paul stepped back, and the commander himself was alarmed when he realized that he had put a Roman citizen in chains.
30 Mokolo oyo elandaki, lokola mokonzi ya basoda azalaki na posa ya koyeba malamu tina oyo Bayuda bafundelaki Polo, apesaki mitindo ete bafungola Polo minyololo; mpe abengisaki bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato ya Likita-Monene mpo ete basala mayangani. Bongo amemaki Polo mpe atiaki ye liboso na bango.
The next day the commander, wanting to learn the real reason Paul was accused by the Jews, released him and ordered the chief priests and the whole Sanhedrin to assemble. Then he brought Paul down and had him stand before them.