< Misala ya Bantoma 20 >

1 Tango mobulu esilaki, Polo abengisaki bayekoli mpe alendisaki bango. Sima na yango, apesaki bango mbote ya suka mpe akendeki na Masedwane.
Now after the uproar had ended, Paul summoned the disciples, took leave of them, and set out for Macedonia.
2 Wana azalaki kotambola kati na etuka yango, azalaki kolendisa bandimi na mateya ya ndenge na ndenge kino akomaki na Grese
When he had gone through those parts and encouraged them with many words, he came into Greece.
3 epai wapi awumelaki basanza misato. Kaka na tango Polo alingaki kozwa masuwa mpo na kokende na Siri, Bayuda basalelaki ye likita. Boye, azwaki mokano ya kozongela na nzela ya Masedwane.
When he had stayed three months, as he was about to set sail for Syria, the Jews made a plot against him, so he decided to return through Macedonia.
4 Tala bato oyo bakendeki na ye elongo: Sopatere, mwana ya Pirisi, moto ya Bere; Arisitarke mpe Sekundusi, bato ya Tesalonika; Gayusi, moto ya Derbe; Timote, Tishike mpe Trofime, bato ya etuka ya Azia.
Now Sopater of Berea, Aristarchus and Secundus of the Thessalonians, Gaius of Derbe, Timothy, and Tychicus and Trophimus of Asia were going to accompany him as far as Asia;
5 Bango nde bakendeki liboso mpo na kozela biso na Troasi.
so having gone on ahead, these men were waiting for us in Troas.
6 Kasi biso tozwaki masuwa kati na engumba Filipi, sima na feti ya Mapa ezanga levire. Sima na biso kotambola mikolo mitano na mayi, tokutaki bango na Troasi epai wapi tosalaki mikolo sambo.
But it was after the Days of Unleavened Bread that we sailed from Philippi, and in five days we joined them at Troas, where we stayed seven days.
7 Na mokolo ya liboso ya poso, wana tosanganaki mpo na kolia elambo, Polo, oyo asengelaki kokende na mobembo, mokolo oyo elandaki, asololaki na bandimi mpe abendaki masolo molayi penza kino na ngonga ya midi ya butu.
Now on the first day of the week, the disciples being assembled to break bread, Paul started addressing them, and because he intended to leave the next day he continued his message until midnight.
8 Tosanganaki kati na shambre ya likolo, oyo ezalaki na minda ebele.
There were many lamps in the upper room where we were assembled.
9 Nzokande, elenge mobali moko avandaki na lininisa; kombo na ye ezalaki Etikisi. Lokola Polo azalaki kaka kokoba koloba, pongi makasi ekangaki Etikisi, mpe, mbala moko, akweyaki na mabele wuta na etaje ya misato. Tango batombolaki ye, bamonaki ete asili kokufa.
Well a certain young man named Eutychus sat in a window and was sinking into a deep sleep as Paul kept on talking; when he was overcome by the sleep he fell down from the third story and was picked up dead.
10 Polo akitaki, atiaki litoyi na ye na tolo ya Etikisi, akamataki Etikisi na maboko na ye mpe alobaki: — Bobanga te, azali na bomoi.
So Paul went down, threw himself on him and embracing him said, “Do not be distressed, because his life is in him!”
11 Amataki lisusu na etaje, abukaki lipa, aliaki yango mpe akobaki koloba kino na tongo, sima nde akendeki.
Then he went back up and broke bread, ate, and kept on speaking until daybreak—that is how he left!
12 Bongo, bazongisaki ya bomoi, elenge mobali epai na bango, mpe bango nyonso balendisamaki makasi.
(On their part, they led the boy away alive, and were greatly comforted.)
13 Tokendeki liboso, mpe tozwaki masuwa oyo ememaki biso na Asosi epai wapi Polo asengelaki komatela na masuwa. Azwaki mokano wana, pamba te alingaki kokende kuna na makolo.
As for us, we went to the ship and set sail for Assos, intending to take Paul on board there—so it had been arranged, he himself intending to go on foot.
14 Tango akutanaki na biso na mboka Asosi, amataki na masuwa elongo na biso, mpe tokendeki na Mitilena.
When he met us at Assos we took him aboard and went on to Mityline.
15 Longwa wana, tozwaki masuwa mpo na kokende, mpe tokomaki liboso ya Shio, mokolo oyo elandaki. Sima na mokolo moko, tokomaki na Samosi, mpe, mokolo oyo elandaki, tokomaki na Mile.
Sailing from there, the next day we arrived opposite Chios, and the day after we crossed over to Samos and stopped in Trogylium; the following day we came to Miletus.
16 Polo azwaki mokano ya kotelema te na Efeso mpe ya kolekisa tango te na mokili ya Azia, pamba te azalaki na posa, soki akolonga, ya kokoma noki na Yelusalemi mpo ete azala na mokolo ya Pantekoti.
(Paul had decided to sail past Ephesus, to avoid being detained in Asia, because he was hurrying to be in Jerusalem on the Day of Pentecost, if he possibly could.)
17 Wuta na Mile, Polo abengisaki bakambi ya Lingomba ya Efeso.
From Miletus he sent to Ephesus and summoned the elders of the congregation.
18 Tango bakutanaki na ye, alobaki na bango: — Boyebi malamu ezaleli nini nazalaki na yango tango nyonso liboso na bino, wuta mokolo ya liboso oyo nakomaki na mokili ya Azia.
So when they had come to him he said to them: “You yourselves know, from the first day that I arrived in Asia, how I lived the whole time I was with you,
19 Nasalelaki Nkolo lokola mowumbu, na komikitisa nyonso mpe na mpinzoli, kati na komekama makasi mpo ete Bayuda bazalaki kosalela ngai makita.
serving the Lord with all humility, and with many tears and trials, the ones that happened to me by the plots of the Jews;
20 Nzokande, boyebi malamu ete nazalaki na somo te ya koteya makambo nyonso oyo ekokaki kosunga bino. Nateyaki bino, ezala na esika ya bato ebele to na ndako ya moko na moko.
how I did not shrink from declaring to you anything that was profitable, teaching you publicly and from house to house,
21 Nazalaki tango nyonso kosenga, ezala na Bayuda to na bato ya Grese, ete bazongela Nzambe na nzela ya kobongola mitema, mpe batia kondima na bango kati na Yesu, Nkolo na biso.
solemnly proclaiming to both Jews and Greeks the repentance toward God and the faith into our Lord Jesus.
22 Boye sik’oyo, na etinda ya Molimo, nakeyi na Yelusalemi, kasi nayebi te likambo nini ekokomela ngai kuna.
Now then, I am going to Jerusalem bound in my spirit, not knowing the things that will happen to me there,
23 Eloko moko kaka nayebi: Molimo Mosantu azali kokebisa ngai ete boloko mpe minyoko ya ndenge na ndenge ezali kozela ngai na bingumba nyonso oyo nakokota.
except that the Holy Spirit keeps warning me in every city, saying that fetters and afflictions are just waiting for me.
24 Nzokande, nazali komona bomoi na ngai lokola eloko pamba; eloko oyo eleki motuya mpo na ngai ezali: kosukisa malamu momekano na ngai ya kopota mbangu mpe kokokisa lotomo oyo Nkolo Yesu apesaki ngai: kosakola Sango Malamu ya ngolu ya Nzambe.
However none of this moves me, nor do I regard my life as valuable to myself, just so that I may complete my course with joy, even the ministry that I received from the Lord Jesus, to solemnly proclaim the Good News of the grace of God.
25 Mpe sik’oyo, nayebi ete bokomona elongi ngai lisusu te, bino nyonso oyo nalekaki kati na bino mpo na koteya sango ya Bokonzi ya Nzambe.
“Furthermore, I know that none of you among whom I have gone about proclaiming the Kingdom of God will ever see my face again.
26 Yango wana, nalobi na bino yango lelo ete nazali na ngambo ya makila ya moto moko te kati na bato nyonso,
Therefore I testify to you this day that I am innocent of the blood of all;
27 pamba te nayebisaki bino mabongisi nyonso ya Nzambe mpe nabombelaki bino ata eloko moko te.
because I did not shrink from declaring to you the whole counsel of God.
28 Bomibatela malamu mpe bobatela etonga nyonso oyo kati na yango Molimo Mosantu atiaki bino lokola bakengeli; bobatela Lingomba ya Nzambe, pamba te asombaki yango na makila na Ye moko.
So take heed to yourselves and to all the flock, in which the Holy Spirit has placed you as overseers, to shepherd the congregation of the Lord and God which He purchased with His own blood.
29 Nayebi malamu ete, sima na ngai kokende, bambwa ya zamba ekokota kati na bino mpe ekoyokela etonga mawa te.
Because I know this, that after my departure savage wolves will come in among you, not sparing the flock.
30 Ezala kati na bino, bato mosusu bakobima, bakoteya mateya ya lokuta mpo na kopengwisa bayekoli ete bazala na ngambo na bango.
Yes, men will rise up from among you yourselves, speaking distorted things, to draw away the disciples after them.
31 Yango wana, bosenzela! Bokanisa malamu ete mibu misato mobimba, butu mpe moyi, natikaki te kokebisa moko na moko na bino, mpe tango mosusu elongo na mpinzoli.
Therefore be alert, remembering that during three years, night and day, I never stopped admonishing each one, with tears.
32 Sik’oyo, nazali kokaba bino na maboko ya Nzambe mpe na Liloba na Ye ya ngolu. Nzambe azali na makoki ya kolendisa bino mpe ya kopesa bino libula kati na bato nyonso oyo babulisama.
“And so now, brothers, I entrust you to God and to the Word of His grace, which is able to build you up and to give you an inheritance among all those who have been sanctified.
33 Nalulaki te palata to wolo to elamba ya moto moko.
I have not coveted anyone's silver or gold or clothing.
34 Bino moko boyebi malamu ete ezali maboko na ngai oyo, nde epesaki ngai biloko oyo nazalaki na bosenga na yango mpo na ngai moko, mpe oyo baninga na ngai bazalaki na bosenga na yango.
You yourselves know that these hands have supplied my own needs, and of those who were with me.
35 Kati na nyonso, natalisaki bino ete tosengeli kosala misala makasi ya lolenge oyo mpe kosunga bato bakelela, na kokanisa Maloba oyo Ye moko Nkolo Yesu aloba: « Esengo ya kokaba eleki esengo ya kozwa. »
In every way I showed you that working hard like this it is necessary to help the weak, and to remember the word of the Lord Jesus, that He Himself said, ‘It is more blessed to give than to receive.’”
36 Sima na Polo koloba bongo, afukamaki mpe asambelaki elongo na bango.
When he had said these things, he knelt down and prayed with them all.
37 Bango nyonso bakomaki kolela, bayambaki Polo mpe bapesaki ye beze;
Then they all wept freely, and falling on Paul's neck kept kissing him,
38 bayokaki mawa mingi koleka mpo alobaki na bango ete bakomona elongi na ye lisusu te. Bongo bakendeki kotika ye kino na masuwa.
sorrowing most of all because of the word that he had spoken, that they would see his face no more. And they accompanied him to the ship.

< Misala ya Bantoma 20 >