< Misala ya Bantoma 2 >
1 Tango mokolo ya Pantekoti ekomaki, bango nyonso basanganaki esika moko.
And when the day of Pentecost was now come, they were all together in one place.
2 Mbala moko, lokito moko ewutaki na likolo lokola lokito ya mopepe makasi, mpe etondisaki ndako mobimba epai wapi bazalaki kosangana.
And suddenly there came from heaven a sound as of the rushing of a mighty wind, and it filled all the house where they were sitting.
3 Bamonaki biloko moko lokola ndemo ya moto kokabwana mpe kovanda na moto ya moko na moko kati na bango.
And there appeared unto them tongues parting asunder, like as of fire; and it sat upon each one of them.
4 Bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe babandaki koloba na nkota mosusu, ndenge Molimo azalaki kolakisa bango.
And they were all filled with the Holy Spirit, and began to speak with other tongues, as the Spirit gave them utterance.
5 Nzokande, kati na Yelusalemi, ezalaki na Bayuda oyo babangaka Nzambe, oyo bawutaki na bikolo nyonso ya mokili.
Now there were dwelling at Jerusalem Jews, devout men, from every nation under heaven.
6 Tango bayokaki lokito wana, ebele ya bato bayaki mbangu kosangana wana mpe bakomaki kokamwa, pamba te moko na moko kati na bango azalaki koyoka bango koloba na monoko na ye ya mboka.
And when this sound was heard, the multitude came together, and were confounded, because that every man heard them speaking in his own language.
7 Bakamwaki mingi penza mpe bakomaki kotuna: « Boni, bato nyonso oyo bazali koloba, bazali bato ya Galile te?
And they were all amazed and marveled, saying, Behold, are not all these which speak Galilaeans?
8 Boye, ndenge nini moto na moto kati na biso azali koyoka bango koloba na monoko na ye ya mboka?
And how hear we, every man in our own language, wherein we were born?
9 Bato ya Parte, ya Mede mpe ya Elami, bavandi ya Mezopotami, ya Yuda, ya Kapadose, ya Ponti mpe ya Azia,
Parthians and Medes and Elamites, and the dwellers in Mesopotamia, in Judaea and Cappadocia, in Pontus and Asia,
10 ya Friji mpe ya Pafili, ya Ejipito mpe ya Libi oyo ezali pembeni ya Sirene, bapaya oyo bawutaki na Rome,
in Phrygia and Pamphylia, in Egypt and the parts of Libya about Cyrene, and sojourners from Rome, both Jews and proselytes,
11 bango nyonso, ezala Bayuda to bapaya oyo bakota na lingomba ya Bayuda: bato ya Kreti mpe ya Arabi, biso nyonso tozali koyoka bango kotatola misala minene ya Nzambe, na nkota na biso ya mboka! »
Cretans and Arabians, we do hear them speaking in our tongues the mighty works of God.
12 Bango nyonso, elekelaki bango, bazalaki kokamwa mingi mpe bakomaki kotunana: « Likambo oyo elingi koloba nini? »
And they were all amazed, and were perplexed, saying one to another, What meaneth this?
13 Nzokande, bato mosusu bazalaki koseka bango mpe koloba: « Balangwe vino ya sika. »
But others mocking said, They are filled with new wine.
14 Petelo atelemaki elongo na bantoma zomi na moko; mpe na mongongo makasi, alobaki na ebele ya bato: — Bino Bayuda, mpe bino nyonso oyo bovandaka na Yelusalemi, botika ete nalimbola mpo na bino likambo oyo, boyoka malamu makambo oyo nalingi koloba.
But Peter, standing up with the eleven, lifted up his voice, and spake forth unto them, [saying], Ye men of Judaea, and all ye that dwell at Jerusalem, be this known unto you, and give ear unto my words.
15 Bato oyo balangwe masanga te ndenge bozali kokanisa. Pamba te tozali nanu na ngonga ya libwa ya tongo.
For these are not drunken, as ye suppose; seeing it is [but] the third hour of the day;
16 Kasi ezali nde makambo oyo mosakoli Joeli alobaki:
but this is that which hath been spoken by the prophet Joel;
17 « Na mikolo ya suka, elobaki Nzambe, nakosopa Molimo na Ngai kati na bato nyonso. Bana na bino ya mibali mpe ya basi bakosakola; bilenge na bino bakozwa bimoniseli, mibange na bino bakolota bandoto.
And it shall be in the last days, saith God, I will pour forth of my Spirit upon all flesh: And your sons and your daughters shall prophesy, And your young men shall see visions, And your old men shall dream dreams:
18 Solo, na mikolo wana, nakosopa Molimo na Ngai kati na basali na Ngai ya mibali mpe ya basi, mpe bakosakola.
Yea and on my servants and on my handmaidens in those days Will I pour forth of my Spirit; and they shall prophesy.
19 Nakolakisa bikamwa kuna na Likolo, mpe bilembo ya kokamwa awa na mokili: makila, moto mpe likonzi ya milinga.
And I will shew wonders in the heaven above, And signs on the earth beneath; Blood, and fire, and vapour of smoke:
20 Moyi ekobongwana molili, sanza ekobongwana makila liboso ete mokolo ya Nkolo ekoma, mokolo oyo ya monene mpe ya nkembo.
The sun shall be turned into darkness, And the moon into blood, Before the day of the Lord come, That great and notable [day]:
21 Boye, moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Nkolo akobikisama. »
And it shall be, that whosoever shall call on the name of the Lord shall be saved.
22 Bato ya Isalaele, boyoka maloba oyo: Yesu ya Nazareti, moto oyo, na nzela ya bikamwa, ya bilembo mpe ya misala ya minene, Nzambe alakisaki bino ete awutaki epai na Ye ndenge bino moko boyebi yango,
Ye men of Israel, hear these words: Jesus of Nazareth, a man approved of God unto you by mighty works and wonders and signs, which God did by him in the midst of you, even as ye yourselves know;
23 akabamaki na maboko na bino kolanda mokano oyo Nzambe asila kozwa na mabongisi na Ye wuta kala. Bongo bino, na lisungi ya bato mabe, bobomaki Ye na kobaka Ye na ekulusu.
him, being delivered up by the determinate counsel and foreknowledge of God, ye by the hand of lawless men did crucify and slay:
24 Kasi Nzambe abukaki minyololo ya kufa, asekwisaki Ye, pamba te ekokaki kosalema te ete kufa ekanga Ye.
whom God raised up, having loosed the pangs of death: because it was not possible that he should be holden of it.
25 Boye, tala makambo oyo Davidi aloba na tina na Ye: « Nazalaki komona Nkolo mikolo nyonso liboso na ngai, pamba te azali pene na ngai mpo ete naningana te.
For David saith concerning him, I beheld the Lord always before my face; For he is on my right hand, that I should not be moved:
26 Yango wana, motema na ngai etondi na esengo, mpe lolemo na ngai ezali kosepela. Solo, nzoto na ngai ekopema na elikya,
Therefore my heart was glad, and my tongue rejoiced; Moreover my flesh also shall dwell in hope:
27 pamba te okosundola ngai te kati na mboka ya bakufi mpe okotika te ete mosantu na Yo apola. (Hadēs )
Because thou wilt not leave my soul in Hades, Neither wilt thou give thy Holy One to see corruption. (Hadēs )
28 Pamba te olakisaki ngai nzela ya bomoi, mpe okotondisa ngai na esengo kati na bozalisami na Yo. »
Thou madest known unto me the ways of life; Thou shalt make me full of gladness with thy countenance.
29 Bandeko na ngai, tika ete naloba na bino solo na tina na Davidi, koko na biso, ete akufa mpe bakunda ye; mpe kunda na ye ezali awa kino lelo.
Brethren, I may say unto you freely of the patriarch David, that he both died and was buried, and his tomb is with us unto this day.
30 Kasi azalaki mosakoli mpe ayebaki ete Nzambe apesaki ye elaka, na nzela ya ndayi, ete moko kati na bakitani na ye akovanda na kiti na ye ya bokonzi.
Being therefore a prophet, and knowing that God had sworn with an oath to him, that of the fruit of his loins he would set [one] upon his throne;
31 Davidi amonaki makambo oyo wuta kala, alobelaki lisekwa ya Klisto ete Nzambe akosundola Ye te kati na mboka ya bakufi mpe akotika te ete nzoto na Ye epola. (Hadēs )
he foreseeing [this] spake of the resurrection of the Christ, that neither was he left in Hades, nor did his flesh see corruption. (Hadēs )
32 Nzambe asekwisaki Yesu kati na bakufi; boye biso nyonso tozali batatoli ya lisekwa yango.
This Jesus did God raise up, whereof we all are witnesses.
33 Sima na loboko ya mobali ya Nzambe konetola Ye, azwaki epai ya Tata, Molimo Mosantu oyo Ye Tata alakaki, mpe asopeli biso Molimo Mosantu yango ndenge bozali komona mpe koyoka sik’oyo.
Being therefore by the right hand of God exalted, and having received of the Father the promise of the Holy Ghost, he hath poured forth this, which ye see and hear.
34 Pamba te, Davidi amataki te na Likolo, kasi alobaki: « Nkolo alobaki na Nkolo na ngai: ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali
For David ascended not into the heavens: but he saith himself, The Lord said unto my Lord, Sit thou on my right hand,
35 kino nakomisa banguna na Yo enyatelo makolo na Yo. › »
Till I make thine enemies the footstool of thy feet.
36 Boye, tika ete bato nyonso ya Isalaele bayeba na bosolo ete Nzambe akomisi Yesu oyo bobakaki na ekulusu Nkolo mpe Klisto.
Let all the house of Israel therefore know assuredly, that God hath made him both Lord and Christ, this Jesus whom ye crucified.
37 Tango bato bayokaki bongo, mitema na bango eyokaki pasi makasi mpe balobaki na Petelo mpe bantoma mosusu: — Bandeko, tosala nini?
Now when they heard [this], they were pricked in their heart, and said unto Peter and the rest of the apostles, Brethren, what shall we do?
38 Petelo azongiselaki bango: — Bobongola mitema; tika ete moko na moko kati na bino azwa libatisi na Kombo na Yesu-Klisto mpo ete masumu na ye elimbisama, bongo bokozwa likabo ya Molimo Mosantu.
And Peter [said] unto them, Repent ye, and be baptized every one of you in the name of Jesus Christ unto the remission of your sins; and ye shall receive the gift of the Holy Ghost.
39 Pamba te elaka oyo ezali mpo na bino, mpo na bana na bino mpe mpo na bavandi nyonso ya bikolo ya mosika, bato nyonso oyo Nkolo, Nzambe na biso, akobenga.
For to you is the promise, and to your children, and to all that are afar off, [even] as many as the Lord our God shall call unto him.
40 Petelo azalaki kokebisa bango na maloba ebele mpe azalaki kolendisa bango na maloba oyo: — Boyamba lobiko mpo ete bozwa etumbu te oyo ezali kozela bato mabe.
And with many other words he testified, and exhorted them, saying, Save yourselves from this crooked generation.
41 Bato oyo bandimaki mateya ya Petelo bazwaki libatisi. Mpe na mokolo wana, bato pene nkoto misato babakisamaki na lisanga ya bandimi.
They then that received his word were baptized: and there were added [unto them] in that day about three thousand souls.
42 Bazalaki komipesa mingi penza na malakisi ya bantoma, na kozala lisanga, na kobuka lipa mpe na kosambela.
And they continued stedfastly in the apostles’ teaching and fellowship, in the breaking of bread and the prayers.
43 Bato nyonso batondisamaki na somo, mpo ete bantoma bazalaki kosala makamwisi ebele mpe bilembo ya kokamwa.
And fear came upon every soul: and many wonders and signs were done by the apostles.
44 Bandimi nyonso bakomaki na bomoko, mpe biloko na bango ezalaki mpo na bango nyonso.
And all that believed were together, and had all things common;
45 Bazalaki koteka mabele na bango mpe biloko na bango, mpe bazalaki kokabola mbongo kati na bango, ndenge ezalaki posa ya moto na moto.
and they sold their possessions and goods, and parted them to all, according as any man had need.
46 Mikolo nyonso bazalaki kokoba kosangana na Tempelo. Bazalaki kokabola lipa na bandako na bango, kolia bilei na bango na esengo nyonso mpe na motema ya komikitisa.
And day by day, continuing stedfastly with one accord in the temple, and breaking bread at home, they did take their food with gladness and singleness of heart,
47 Bazalaki kokumisa Nzambe, mpe bato nyonso bazalaki kolinga bango. Bongo, mikolo nyonso, Nkolo azalaki kobakisa na lisanga na bango bato oyo bazalaki kobika.
praising God, and having favour with all the people. And the Lord added to them day by day those that were being saved.