< Misala ya Bantoma 19 >

1 Wana Apolosi azalaki na Kolinto, Polo alekelaki na mokili ya bangomba ya Azia, mpe akomaki na Efeso. Kuna, akutaki mwa ndambo ya bayekoli
factum est autem cum Apollo esset Corinthi ut Paulus peragratis superioribus partibus veniret Ephesum et inveniret quosdam discipulos
2 mpe atunaki bango: — Boni, bozwaki Molimo Mosantu tango bokomaki bandimi? Bazongisaki: — Te! Totikala nanu koyoka te ete Molimo Mosantu azalaka.
dixitque ad eos si Spiritum Sanctum accepistis credentes at illi ad eum sed neque si Spiritus Sanctus est audivimus
3 Polo atunaki bango lisusu: — Bongo libatisi ya ndenge nini penza bozwaki? Bazongisaki: — Tozwaki libatisi ya Yoane.
ille vero ait in quo ergo baptizati estis qui dixerunt in Iohannis baptismate
4 Polo alobaki na bango: — Libatisi oyo Yoane azalaki kopesa ezalaki libatisi ya kobongola motema; azalaki koloba na bato ete bandimela moto oyo akoya sima na ye, elingi koloba ete bandimela Yesu.
dixit autem Paulus Iohannes baptizavit baptisma paenitentiae populum dicens in eum qui venturus esset post ipsum ut crederent hoc est in Iesum
5 Boye, bayokelaki ye mpe bazwaki libatisi na Kombo ya Nkolo Yesu.
his auditis baptizati sunt in nomine Domini Iesu
6 Tango Polo atielaki bango maboko, Molimo Mosantu akitelaki bango, mpe bakomaki koloba na nkota ya sika mpe kosakola.
et cum inposuisset illis manum Paulus venit Spiritus Sanctus super eos et loquebantur linguis et prophetabant
7 Bango nyonso bazalaki bato pene zomi na mibale.
erant autem omnes viri fere duodecim
8 Bongo, Polo akendeki na ndako ya mayangani epai wapi, na basanza misato, azalaki koloba na molende epai na bato; azalaki koteya bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe mpe kondimisa bango yango.
introgressus autem synagogam cum fiducia loquebatur per tres menses disputans et suadens de regno Dei
9 Kasi bato mosusu kati na bango bazalaki mitema mabanga; baboyaki kondima mpe batiolaki nzela ya Nkolo na miso ya bato ebele. Bongo Polo akabwanaki na bango. Amemaki bayekoli mpe, mokolo na mokolo, azalaki koteya bango na eteyelo ya Tiranisi.
cum autem quidam indurarentur et non crederent maledicentes viam coram multitudine discedens ab eis segregavit discipulos cotidie disputans in scola Tyranni
10 Esalaki bongo mibu mibale; boye Bayuda nyonso mpe bato nyonso ya Grese, oyo bazalaki kovanda na mokili ya Azia bayokaki Liloba na Nkolo.
hoc autem factum est per biennium ita ut omnes qui habitabant in Asia audirent verbum Domini Iudaei atque gentiles
11 Nzambe azalaki kosala bikamwa ya somo na nzela ya Polo.
virtutesque non quaslibet Deus faciebat per manus Pauli
12 Boye bato bakomaki kokamata miswale mpe bilamba oyo etuti nzoto ya Polo, mpo na kotia yango na banzoto ya babeli, bongo bokono ya bato yango ezalaki kosila, mpe milimo mabe ezalaki kobima kati na bango.
ita ut etiam super languidos deferrentur a corpore eius sudaria vel semicintia et recedebant ab eis languores et spiritus nequam egrediebantur
13 Ndambo ya Bayuda oyo bazalaki kotambola-tambola mpo na kobengana milimo mabe bamekaki kobelela Kombo ya Nkolo Yesu mpo na koluka kokangola bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe; bazalaki koloba: — Na Kombo ya Yesu oyo Polo ateyaka, napesi bino mitindo ya kobima.
temptaverunt autem quidam et de circumeuntibus iudaeis exorcistis invocare super eos qui habebant spiritus malos nomen Domini Iesu dicentes adiuro vos per Iesum quem Paulus praedicat
14 Bana mibali sambo ya Moyuda Seva, moko kati na bakonzi ya Banganga-Nzambe, bazalaki kosala bongo.
erant autem quidam Scevae Iudaei principis sacerdotum septem filii qui hoc faciebant
15 Mokolo moko, molimo mabe ezongiselaki bango: — Nayebi Yesu, nayebi mpe soki Polo azali nani; kasi bino, bozali banani?
respondens autem spiritus nequam dixit eis Iesum novi et Paulum scio vos autem qui estis
16 Mpe moto oyo azalaki na molimo mabe apumbwelaki bango, akangaki bango mpe abetaki bango nyonso makasi penza kino babimaki na ndako bolumbu mpe batonda na bapota.
et insiliens homo in eos in quo erat daemonium pessimum et dominatus amborum invaluit contra eos ita ut nudi et vulnerati effugerent de domo illa
17 Tango likambo yango eyebanaki na Bayuda mpe na bato ya Grese oyo bavandaka na Efeso, somo ekangaki bango nyonso, mpe Kombo ya Nkolo Yesu ezwaki lokumu mingi.
hoc autem notum factum est omnibus Iudaeis atque gentilibus qui habitabant Ephesi et cecidit timor super omnes illos et magnificabatur nomen Domini Iesu
18 Mingi kati na bato oyo bakomaki bandimi bazalaki koya kondima mpe kotubela polele misala na bango ya mabe.
multique credentium veniebant confitentes et adnuntiantes actus suos
19 Mpe bato mingi ya maji bamemaki babuku na bango mpe batumbaki yango na miso ya bato nyonso. Tango balukaki koyeba motuya ya babuku yango, emonanaki ete ezalaki na motuya ya mbongo ya bibende nkoto tuku mitano.
multi autem ex his qui fuerant curiosa sectati contulerunt libros et conbuserunt coram omnibus et conputatis pretiis illorum invenerunt pecuniam denariorum quinquaginta milium
20 Ezali ndenge wana nde Liloba na Nkolo ezalaki kokoba kopanzana mpe komonana ete etonda na nguya ya Nzambe.
ita fortiter verbum Dei crescebat et confirmabatur
21 Sima na makambo oyo nyonso, Polo, na bokambami ya Molimo, azwaki mokano ya kolekela na Masedwane mpe na Akayi mpo na kokende na Yelusalemi. Alobaki: — Soki nalongwe kuna, nakokende lisusu na Rome.
his autem expletis posuit Paulus in Spiritu transita Macedonia et Achaia ire Hierosolymam dicens quoniam postquam fuero ibi oportet me et Romam videre
22 Atindaki na Masedwane, mibale kati na basungi na ye ya mosala, Timote mpe Erasite, wana ye moko atikalaki mwa mikolo na Azia.
mittens autem in Macedoniam duos ex ministrantibus sibi Timotheum et Erastum ipse remansit ad tempus in Asia
23 Ezalaki na tango wana nde mobulu makasi esalemaki na Efeso na tina na Nzela ya Nkolo.
facta est autem in illo tempore turbatio non minima de via
24 Demetriusi, mosali ya babiju, azalaki kosala na palata bililingi ya batempelo ya nzambe Artemisi. Na mosala yango, azalaki kofuta basali na ye mbongo mingi.
Demetrius enim quidam nomine argentarius faciens aedes argenteas Dianae praestabat artificibus non modicum quaestum
25 Asangisaki bango elongo na bato ya misala ya maboko, oyo basalaka mosala moko na ye, mpe alobaki na bango: — Baninga na ngai, boyebi malamu ete mosala oyo efutaka biso malamu.
quos convocans et eos qui eiusmodi erant opifices dixit viri scitis quia de hoc artificio adquisitio est nobis
26 Nzokande, bino moko bozali komona mpe koyoka ndenge nini Polo wana azali kosala nyonso mpo na kondimisa bato mpe kobenda sima na ye bato ebele awa kaka na Efeso te, kasi mpe na etuka mobimba ya Azia; azali koloba ete banzambe oyo esalemi na maboko ya bato ezali banzambe te.
et videtis et auditis quia non solum Ephesi sed paene totius Asiae Paulus hic suadens avertit multam turbam dicens quoniam non sunt dii qui manibus fiunt
27 Makambo oyo Polo azali kosala ezali koluka kaka te kobebisa lokumu ya mosala na biso, kasi ezali mpe kosilisa lokumu ya tempelo ya Artemisi, nzambe monene ya mwasi; ezali lisusu kosilisa nkembo ya Artemisi oyo Azia mobimba mpe mokili mobimba ezali kogumbamela.
non solum autem haec periclitabitur nobis pars in redargutionem venire sed et magnae deae Dianae templum in nihilum reputabitur sed et destrui incipiet maiestas eius quam tota Asia et orbis colit
28 Tango kaka bayokaki bongo, basilikaki makasi mpe bakomaki koganga: — Artemisi ya Efeso azali monene!
his auditis repleti sunt ira et exclamaverunt dicentes magna Diana Ephesiorum
29 Mbala moko, mobulu ekotaki kati na engumba mobimba. Bakangaki Gayusi mpe Arisitarke, bato mibale ya Masedwane, oyo bazalaki kotambola elongo na Polo; mpe bato nyonso bakendeki na lombangu na ndako ya masano.
et impleta est civitas confusione et impetum fecerunt uno animo in theatrum rapto Gaio et Aristarcho Macedonibus comitibus Pauli
30 Polo azalaki na posa ya kobima na miso ya bato, kasi bayekoli bapekisaki ye.
Paulo autem volente intrare in populum non permiserunt discipuli
31 Ezala mpe baninga na ye, oyo bazalaki bakambi ya etuka, batindelaki ye maloba mpo na kosenga na ye ete ameka te kosala liseki ya kokende na ndako ya masano.
quidam autem et de Asiae principibus qui erant amici eius miserunt ad eum rogantes ne se daret in theatrum
32 Mobulu makasi ekotaki kati na ebele ya bato: bamoko bazalaki koganga mpo na likambo moko, mpe bamosusu, mpo na likambo mosusu. Mingi kati na bango bazalaki koyeba te tina nini basangani wana.
alii autem aliud clamabant erat enim ecclesia confusa et plures nesciebant qua ex causa convenissent
33 Bayuda kati na ebele ya bato batindikaki Alekizandre na liboso, mpe batalisaki ye likambo yango ndenge ezali. Bongo Alekizandre atombolaki loboko mpo na kolakisa ete alingi kozwa maloba mpo na kotalisa na bato.
de turba autem detraxerunt Alexandrum propellentibus eum Iudaeis Alexander ergo manu silentio postulato volebat rationem reddere populo
34 Kasi tango basosolaki ete azali Moyuda, bango nyonso basalaki pene bangonga mibale ya koganga lokola moto moko: — Artemisi ya Efeso azali monene!
quem ut cognoverunt Iudaeum esse vox facta est una omnium quasi per horas duas clamantium magna Diana Ephesiorum
35 Suka na suka, mokomi mikanda ya engumba alongaki kopekisa makelele ya bato; alobaki: — Bato ya Efeso! Nani kati na mokili oyo ayebi te ete engumba ya Efeso ezali engumba mosantu ya Artemisi, nzambe mwasi monene, mpe ya ekeko na ye oyo ekita wuta na likolo?
et cum sedasset scriba turbas dixit viri ephesii quis enim est hominum qui nesciat Ephesiorum civitatem cultricem esse magnae Dianae Iovisque prolis
36 Yango wana, lokola moko te akoki kotia tembe na likambo oyo, bovanda kimia mpe bosala makambo ya bozoba te.
cum ergo his contradici non possit oportet vos sedatos esse et nihil temere agere
37 Bato oyo bomemi awa babebisi ndako ya nzambe na biso te mpe bafingi ye te.
adduxistis enim homines istos neque sacrilegos neque blasphemantes deam vestram
38 Soki Demetriusi mpe basali na ye bazwi moto likambo, esambiselo ezali, basambisi mpe bazali. Ebongi malamu ete bakende kofunda.
quod si Demetrius et qui cum eo sunt artifices habent adversus aliquem causam conventus forenses aguntur et pro consulibus sunt accusent invicem
39 Mpe soki bozali na likambo mosusu ya koloba, tokoyekola yango malamu kati na mayangani oyo mibeko epesa ndingisa.
si quid autem alterius rei quaeritis in legitima ecclesia poterit absolvi
40 Soki tokebi te, bakoki kofunda biso ete botombokisi bato, mpo na makambo oyo esalemi lelo. Na bongo, tokolonga te kolimbola tina oyo bato basangani awa.
nam et periclitamur argui seditionis hodiernae cum nullus obnoxius sit de quo non possimus reddere rationem concursus istius
41 Tango kaka asilisaki koloba, apesaki mitindo ete bato bapanzana.
et cum haec dixisset dimisit ecclesiam

< Misala ya Bantoma 19 >