< Misala ya Bantoma 17 >

1 Sima na Polo mpe Silasi kolekela na Afipolisi mpe na Apolonia, bakendeki na Tesalonika epai wapi ndako ya mayangani ya Bayuda ezalaki.
E, passando por Amfípolis e Apolônia, chegaram a Tessalônica, onde havia uma sinagoga de judeus.
2 Ndenge momesano na ye ezalaki, Polo akotaki na ndako ya mayangani. Basaba misato, asololaki na bato oyo bazalaki kuna na tina na Makomi.
E Paulo, como tinha por costume, foi ter com eles; e por três sábados disputou com eles sobre as escrituras,
3 Azalaki kotalisa mpe kolakisa bango polele ete Klisto asengelaki komona pasi mpe kosekwa kati na bakufi. Azalaki koloba na bango: — Yesu oyo nazali koteya bino, Ye nde azali Klisto.
Declarando-as, e demonstrando que convinha que o Cristo padecesse e resuscitasse dos mortos. E este Jesus, que vos anuncío, dizia ele, é o Cristo.
4 Ndambo ya Bayuda bandimisamaki mpe basanganaki na Polo mpe Silasi; ndenge moko mpe na bato mingi ya Grese, oyo bazalaki kogumbamela Nzambe, mpe basi ebele ya lokumu.
E alguns deles creram, e ajuntaram-se com Paulo e Silas uma grande multidão de gregos religiosos, e não poucas mulheres principais.
5 Kasi Bayuda mosusu basalaki zuwa; bakendeki kozwa bato ya mobulu oyo batambolaka pamba-pamba na balabala, basangisaki bango mpe babimisaki mobulu kati na engumba. Bakendeki mbangu na ndako ya Jazoni mpo na koluka Polo mpe Silasi mpo ete bamema bango liboso ya ebele ya bato.
Porém os judeus desobedientes, movidos de inveja, tomaram consigo alguns homens malignos, dentre os vadios, e, ajuntando o povo, alvoroçaram a cidade, e, acometendo a casa de Jason, procuravam tira-los para junto do povo.
6 Kasi lokola bamonaki bango te, bamemaki Jazoni mpe bandeko mosusu liboso ya bakambi ya engumba na koganga: — Bato oyo bazali koningisa mokili mobimba bakomi sik’oyo awa,
E, não os achando, trouxeram com violência a Jason, e alguns irmãos, aos magistrados da cidade, clamando: Estes que tem alvoroçado o mundo, chegaram também aqui;
7 mpe Jazoni ayambi bango lokola babengami kati na ndako na ye. Bango nyonso bazali kobuka mibeko ya Sezare, pamba te bazali koloba: « Mokonzi mosusu azali, Kombo na Ye: Yesu! »
Os quais Jason tem recolhido; e todos estes obram contra os mandados de Cesar, dizendo que há outro rei, a saber, Jesus.
8 Tango ebele ya bato mpe bakambi ya engumba bayokaki bongo, batombokaki makasi.
E alvoroçaram a multidão e os principais da cidade, que ouviram estas coisas.
9 Boye, bafutisaki Jazoni mpe bandeko mosusu lomande mpe, na sima, batikaki bango.
Tendo, porém, recebido satisfação de Jason, e dos demais, os soltaram.
10 Wana butu ekomaki, bandeko bakimisaki Polo mpe Silasi noki-noki na Bere. Tango bakomaki kuna, bakotaki na ndako ya mayangani ya Bayuda.
E logo os irmãos enviaram de noite Paulo e Silas a Berea: os quais, chegando lá, foram à sinagoga dos judeus.
11 Nzokande, Bayuda ya Bere bazalaki bato ya boboto koleka bato ya Tesalonika, pamba te bayambaki Liloba na motema mobimba mpe, mokolo na mokolo, bazalaki koyekola na mozindo Makomi mpo na kotala soki makambo oyo Polo azali koteya bango ezali ya solo.
E estes foram mais nobres do que os que estavam em Tessalônica, porque de bom grado receberam a palavra, examinando cada dia nas escrituras se estas coisas eram assim.
12 Bayuda ebele kati na bango bandimaki; ndenge moko mpe, kati na bato ya Grese, basi mingi ya lokumu mpe mibali ebele bandimaki.
De sorte que creram muitos deles, e mulheres gregas honestas, e não poucos varões.
13 Kasi tango Bayuda ya Tesalonika bayokaki ete Polo azali koteya Liloba na Nzambe na Bere, mingi kati na bango bayaki mpe kuna mpo na kotia songisongi kati na bato mpo ete batomboka.
Mas, logo que os judeus de Tessalônica souberam que a palavra de Deus também era anunciada por Paulo em Berea, foram também lá, e comoveram as multidões.
14 Bongo, kaka na tango yango, bandeko basalaki ete Polo akende na ebale mpo na kozwa masuwa, wana Silasi mpe Timote batikalaki na Bere.
Porém no mesmo instante os irmãos mandaram a Paulo que fosse como para o mar, mas Silas e Timotheo ficaram ali.
15 Bato oyo bakendeki kotika Polo bamemaki ye kino na Ateni; mpe na mitindo ya Polo, bazongaki na Bere koyebisa Silasi mpe Timote ete balanda ye noki na Ateni.
E os que acompanhavam Paulo o levaram até Atenas, e, recebendo ordem para que Silas e Timotheo fossem ter com ele o mais depressa possível, partiram.
16 Wana Polo azali kozela bango kati na Ateni, motema na ye etungisamaki mingi na komona ete engumba yango etonda na banzambe ya bikeko.
E, enquanto Paulo os esperava em Atenas, o seu espírito se comovia em si mesmo, vendo a cidade tão dada à idolatria.
17 Boye, azalaki kosolola na Bayuda mpe Bagreki oyo bazalaki kogumbamela Nzambe kati na ndako ya mayangani, mpe na bato oyo azalaki kokuta, mokolo na mokolo, na bisika oyo bato ebele bakutanaka.
De sorte que disputava na sinagoga com os judeus e religiosos, e todos os dias na praça com os que se apresentavam.
18 Ndambo ya bato ya mayele oyo balandaka malakisi ya Epikire mpe ya Zenon bakomaki kotiana tembe na ye. Bamoko batunaki: — Moto oyo ya makelele alingi koloba nini? Bamosusu balobaki: — Tomoni lokola nde azali kolobela banzambe ya bapaya! Balobaki bongo mpo ete Polo azalaki koteya Sango Malamu na tina na Yesu mpe lisekwa kati na bakufi.
E alguns dos filósofos epicureos e estoicos contendiam com ele; e uns diziam: Que quer dizer este paroleiro? E outros: Parece que é pregador de deuses estranhos. Porque lhes anunciava a Jesus e a ressurreição.
19 Boye bakamataki ye, bamemaki ye na Areopaje mpe balobaki na ye: — Boni, tokoki koyeba soki mateya ya sika oyo ozali koteya elingi koloba nini?
E, tomando-o, o levaram ao areópago, dizendo: Poderemos nós saber que nova doutrina é essa de que falas?
20 Pamba te ozali koloba na biso makambo ya sika. Yango wana, tolingi koyeba soki makambo yango elakisi penza nini.
Pois coisas estranhas nos trazes aos ouvidos: queremos pois saber o que vem a ser isto.
21 (Bato nyonso ya Ateni mpe bapaya oyo bazalaki kovanda kuna bazalaki kolekisa tango mingi mpo na koloba mpe koyoka basango ya sika).
(Pois todos os atenienses e hóspedes estrangeiros de nenhuma outra coisa se ocupavam, senão de dizer e ouvir alguma coisa nova).
22 Polo atelemaki liboso ya bato oyo basanganaki na Areopaje mpe alobaki: — Bato ya Ateni! Nasosoli ete, na makambo nyonso, bolingaka mingi makambo ya bonzambe.
E, estando Paulo no meio do areópago, disse: Varões atenienses, em tudo vos vejo um tanto supersticiosos:
23 Pamba te tango nazalaki kotambola kati na engumba na bino mpe kotala bikeko oyo bosambelaka, namonaki kutu etumbelo moko bakoma na likolo na yango: Mpo na Nzambe oyo ayebani te. Nzokande, ngai nayei koteya bino Nzambe oyo bosambelaka ata boyebi Ye te.
Porque, passando eu e vendo os vossos santuários, achei também um altar em que estava escrito: AO DEUS DESCONHECIDO. aquele pois que vós honrais, não o conhecendo, vos anuncío.
24 Nzambe oyo asala mokili mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango azali Nkolo ya Likolo mpe ya mokili, avandaka te kati na batempelo oyo maboko ya bato etonga.
O Deus que fez o mundo e todas as coisas que nele há: este, sendo Senhor do céu e da terra, não habita em templos feitos por mãos de homens;
25 Mpe azalaka na posa te ya masungi ya bato, pamba te akoka na nyonso. Nzokande, Ye nde apesaka bato nyonso bomoi, pema mpe biloko nyonso.
Nem tão pouco é servido por mãos de homens, como que necessitando de alguma coisa; pois é ele só quem dá a todos a vida, e a respiração, e todas as coisas;
26 Wuta na moto moko, asalaki mabota nyonso ya bato, mpo ete bakoka kovanda na mokili mobimba; mpe akataki tango mpo na moto na moto mpe atiaki bandelo mpo na bisika na bango ya kovanda.
E de um sangue fez toda a geração dos homens, para habitar sobre toda a face da terra, determinando os tempos já de antes ordenados, e os limites da sua habitação;
27 Nzambe asalaki bongo mpo ete bato bakoka koluka Ye, tango mosusu bakolonga komona Ye na kolukaluka lokola mokufi miso. Nzokande, na bosolo, azali mosika te ya moko na moko kati na biso.
Para que buscassem ao Senhor, se porventura o pudessem apalpar e achar; ainda que não está longe de cada um de nós;
28 Pamba te, ezali na nzela na Ye nde tozalaka na bomoi, toninganaka mpe tozalaka oyo tozali, ndenge bakomi na bino mosusu baloba: « Tozali bana na ye! »
Porque nele vivemos, e nos movemos, e existimos; como também alguns dos vossos poetas disseram: Porque somos também sua geração.
29 Yango wana, lokola tozali bana na Nzambe, tosengeli te kokanisa ete bonzambe ekokani na elilingi ya wolo, ya palata to ya libanga, lokola nzambe ya ekeko oyo esalemi na maboko mpe mayele ya moto.
Sendo pois geração de Deus, não havemos de cuidar que a divindade seja semelhante ao ouro, ou à prata, ou à pedra esculpida por artifício e imaginação dos homens
30 Nzokande, lokola Nzambe atalaka te tango ya kozanga boyebi, kasi azali sik’oyo kosenga ete bato nyonso, na bisika nyonso oyo bazali, babongola mitema.
De sorte que Deus, dissimulando os tempos da ignorância, anuncia agora a todos os homens, e em todo o lugar, que se arrependam;
31 Pamba te akata mokolo oyo akosambisa mokili mobimba na bosembo nyonso, na nzela ya moto oyo Ye asila kopona. Atalisaki bosolo na yango epai ya bato nyonso, na nzela ya kosekwisa moto yango kati na bakufi.
Porquanto tem determinado um dia em que com justiça há de julgar o mundo com justiça por aquele varão que destinou; dando certeza a todos, resuscitando-o dos mortos.
32 Tango bayokaki Polo koloba na tina na lisekwa ya bakufi, bamoko basekaki ye, mpe bamosusu balobaki: — Tokoyoka yo mokolo mosusu na tina na likambo oyo.
E, como ouviram da ressurreição dos mortos, uns escarneciam, e outros diziam: Acerca disso te ouviremos outra vez.
33 Na bongo, Polo atikaki bango.
E assim Paulo saiu do meio deles.
34 Nzokande, bato mosusu balandaki Polo mpe bakomaki bandimi. Kati na bango, ezalaki: Denisi, moto ya Areopaje; mwasi moko oyo kombo na ye ezali Damarisi, mpe bato mosusu.
Porém, chegando alguns varões a ele, creram: entre os quais foram Dionisio, areopagita, e uma mulher por nome Damaris, e com eles outros.

< Misala ya Bantoma 17 >