< Misala ya Bantoma 16 >
1 Polo akomaki na Derbe mpe na Listre, epai wapi akutanaki na moyekoli moko, kombo na ye ezali « Timote. » Mama na ye azalaki Moyuda, kasi akomaki kondima Klisto; mpe tata na ye azalaki moto ya Grese.
And he came to the city Derbe, and to Lystra. And there was a certain disciple there, whose name was Timothy, the son of a believing Jewess, but his father was a Gentile.
2 Litatoli na ye ezalaki malamu kati na bandeko ya Listre mpe ya Ikoniomi.
And all the disciples of Lystra and Iconium gave good testimony of him.
3 Polo azalaki na posa ya kosala mobembo elongo na ye, boye akatisaki ye ngenga; pamba te Bayuda oyo bazalaki kovanda kuna bayebaki ete tata na ye azalaki moto ya Grese.
Him Paul was disposed to take with him: and he took him, and circumcised him, because of the Jews that were in that region; for they all knew that his father was a Gentile.
4 Kati na bingumba nyonso oyo bazalaki koleka, bazalaki koyebisa bandimi mikano oyo bantoma mpe bakambi ya Lingomba bazwaki na Yelusalemi, mpe bazalaki kosenga na bango ete batosa yango.
And as they went among the cities, they preached and taught them, that they should observe those injunctions which the legates and Elders at Jerusalem had written.
5 Boye, Mangomba ezalaki kolendisama kati na kondima, mpe bato bazalaki kobakisama mokolo na mokolo.
And so were the churches established in the faith, and were increased in number daily.
6 Lokola Molimo Mosantu apesaki bango nzela te ya koteya Liloba kati na etuka ya Azia, Polo elongo na baninga na ye bakendeki na etuka ya Friji mpe ya Galatia.
And they travelled through the regions of Phrygia and Galatia; and the Holy Spirit forbid them to speak the word of God in Asia.
7 Tango bakomaki na mondelo ya Mizi, bazwaki likanisi ya kokende na Bitini, kasi Molimo ya Yesu apesaki bango nzela te.
And when they came into the region of Mysia, they were disposed to go from there into Bithynia, but the Spirit of Jesus permitted them not.
8 Boye bakatisaki etuka ya Mizi mpe bakendeki kino na libongo ya Troasi.
And when they departed from Mysia, they came down to the region of Troas.
9 Na butu, Polo azwaki emoniseli moko: « Moto moko ya Masedwane atelemaki liboso na ye mpe azalaki kobondela ye: ‹ Nabondeli yo, yaka kosunga biso kati na Masedwane! › »
And in a vision of the night, there appeared unto Paul, a man of Macedonia, who stood and besought him, saying: Come to Macedonia and help us.
10 Sima na Polo kozwa emoniseli, tolukaki mbala moko kokende na Masedwane, pamba te tososolaki ete ezali Nzambe nde abengi biso mpo ete tokende koteya kuna Sango Malamu.
And when Paul had seen this vision, immediately we were desirous to depart for Macedonia; because we inferred, that our Lord called us to preach to them.
11 Longwa na Troasi, tozwaki masuwa mpe tokendeki mbala moko kino na esanga ya Samotrase; bongo mokolo oyo elandaki, tokomaki na Neyapolisi.
And we sailed from Troas, and came direct to Samothrace; and from there, on the following day, we came to the city Neapolis.
12 Kolongwa wana, tokendeki na Filipi, mboka mokonzi ya etuka ya Masedwane oyo ezalaki na se ya bokonzi ya bato ya Rome. Tovandaki kuna mwa mikolo.
And from there to Philippi, which is the chief city of Macedonia, and is a colony. And we remained in that city certain days.
13 Na mokolo ya Saba, tobimaki na libanda ya ekuke ya engumba mpo na kokende pembeni ya ebale epai wapi tokanisaki ete tokomona esika ya losambo. Wana tovandaki, tokomaki koteya basi oyo basanganaki kuna.
And on the sabbath day, we went without the gate of the city to the side of a river, because a house of prayer was seen there. And when we were seated, we conversed with the women who there assembled.
14 Kati na basi yango, ezalaki na mwasi moko, kombo na ye « Lidi. » Azalaki moteki ya bilamba ya motane, moto ya Tiyatire mpe mogumbameli ya Nzambe. Azalaki koyoka, mpe Nkolo afungolaki motema na ye mpo ete akangama na makambo oyo Polo azalaki koloba.
And a certain woman who feared God, a seller of purple, whose name was Lydia, from the city of Thyatira, was there. Her heart our Lord opened, and she hearkened to what Paul spake.
15 Tango ye elongo na bato ya libota na ye bazwaki libatisi, abengisaki biso na ndako na ye; alobaki: — Soki bomoni ete ngai nakomi penza mondimi ya Nkolo, boya kovanda na ndako na ngai. Boye, asalaki nyonso mpo ete tondima kokende na ndako na ye.
And she was baptized, and her household. And she entreated us, saying: If ye are really persuaded that I have believed in our Lord, come and take lodging in my house. And she urged us much.
16 Mokolo moko, wana tozalaki kokende na esika ya losambo, tokutanaki na mwasi mowumbu moko oyo azalaki na molimo mabe oyo ezalaki kosunga ye mpo na kosakola makambo oyo ekoya, mpe azalaki kozwela bankolo na ye mbongo ebele na nzela ya masakoli na ye.
And it occurred that, as we were going to the house of prayer, a certain maid met us, who had a spirit of divination, and who procured for her lords great gain by the divination which she performed.
17 Mwasi yango azalaki kolanda biso, Polo mpe biso, na koganga: — Bato oyo bazali basali ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, bazali koteya bino nzela ya lobiko.
And she followed after Paul and us, and cried, saying: These men are the servants of the Most High God, and they announce to you the way of life.
18 Lokola azalaki kosala bongo wuta mikolo ebele, suka na suka, Polo atombokaki, abalukaki mpe alobaki na molimo mabe yango: — Na Kombo na Yesu-Klisto, napesi yo mitindo: bima kati na mwasi oyo! Kaka na tango yango, molimo yango ebimaki kati na ye.
And this she did many days. And Paul was indignant; and he said to that spirit, I command thee, in the name of Jesus Messiah, that thou come out of her. And it came out the same hour.
19 Tango bankolo ya mowumbu yango bamonaki ete elikya na bango ya kozwa mbongo ekeyi na mopepe, bakangaki Polo mpe Silasi, mpe bamemaki bango liboso ya bakonzi, na esika ya bato ebele.
And when her lords saw that the prospect of their gain from her was gone, they seized Paul and Silas, and dragging them along brought them to the market-place,
20 Bamemaki bango liboso ya basambisi mpe balobaki: — Bato oyo bazali Bayuda; bazali kotia mobulu kati na engumba na biso.
and set them before the prefects and chiefs of the city, and said: These men disturb our city; for they are Jews,
21 Bazali koluka kokotisa awa bizaleli oyo mibeko epekisi biso, bato ya Rome, kondima mpe kosalela.
and they preach to us customs, which it is not lawful for us to receive and to practise, because we are Romans.
22 Bato oyo batondaki wana batombokelaki Polo mpe Silasi, bongo basambisi bapesaki mitindo ete balongola bango bilamba mpe babeta bango fimbu.
And a great company was collected against them. Then the prefects rent their garments, and commanded to scourge them.
23 Sima na kobetisa bango fimbu makasi, babwakaki bango kati na boloko; bapesaki mitindo na mokengeli boloko ete akengela bango malamu.
And when they had scourged them much, they cast them into the prison, and commanded the keeper of the prison to keep them with care.
24 Tango kaka mokengeli azwaki mitindo oyo, abwakaki bango kati na boloko ya kati mpe akangisaki makolo na bango na mabaya.
And he, having received this command, carried and immured them in the inner part of the prison, and confined their feet in the stocks.
25 Pene na midi ya butu, Polo mpe Silasi bazalaki kosambela mpe kokumisa Nzambe na banzembo; bakangami mosusu bazalaki koyoka bango.
And at midnight Paul and Silas were praying and glorifying God: and the prisoners heard them.
26 Mbala moko, mabele eninganaki makasi, mpe miboko ya boloko eninganaki. Kaka na tango yango, miboko ya boloko ebukanaki, bikuke nyonso ya boloko efungwamaki, mpe minyololo ya bakangami nyonso ekatanaki.
And suddenly there was a great shaking, and the foundations of the prison were moved; and at once all the doors opened, and the bands of all were loosed.
27 Mokengeli boloko alamukaki; mpe tango amonaki ete bikuke ya boloko ezali ya kofungwama, abendaki mopanga na ye mpo ete amiboma, pamba te akanisaki ete bakangami bakimi.
And when the keeper of the prison awoke, and saw that the doors of the prison were open, he took a sword and sought to kill himself; because he supposed the prisoners had escaped.
28 Kasi Polo agangaki na mongongo makasi: — Komisala mabe te! Biso nyonso tozali awa!
But Paul called to him, in a loud voice, and said: Do thyself no harm, for we are all here.
29 Mokengeli boloko asengaki mwinda, akotaki mbangu kati na boloko, mpe amibwakaki liboso ya Polo mpe Silasi na kolenga makasi.
And he lighted for himself a lamp, and sprang and came in, trembling, and fell at the feet of Paul and Silas.
30 Bongo abimisaki bango libanda mpe atunaki bango: — Batata, nasala nini mpo ete nabika?
And he brought them out, and said to them: My lords, what must I do, that I may have life?
31 Bazongisaki: — Ndima Nkolo Yesu, mpe okobika, yo mpe libota na yo.
And they said to him: Believe on the name of our Lord Jesus Messiah, and thou wilt have life, thou and thy house.
32 Bongo bateyaki ye mpe libota na ye Liloba na Nkolo.
And they spoke the word of the Lord to him, and to all the members of his house.
33 Kaka na ngonga wana ya butu, mokengeli boloko azwaki bango elongo na ye mpe asukolaki bango bapota; bongo, mbala moko, ye mpe libota na ye bazwaki libatisi.
And the same hour of the night, he took and washed them from their stripes; and he was baptized immediately, he and all the members of his house.
34 Sima, mokengeli boloko amemaki Polo mpe Silasi na ndako na ye, mpe apesaki bango bilei; mpe atondisamaki na esengo makasi, pamba te ye mpe bato nyonso ya libota na ye bandimelaki Nzambe.
And he took them and brought them into his house, and set a table for them; and he rejoiced in the faith of God, he and all the members of his house.
35 Tango tongo etanaki, basambisi batindaki basali na bango epai ya mokengeli boloko mpo na koyebisa ye: — Bimisa bato wana na boloko!
And when it was morning, the prefects sent rod-bearers to say to the superior of the prison: Let those men loose.
36 Mokengeli boloko alobaki na Polo: — Basambisi bapesi ngai mitindo ete nabimisa bino na boloko. Boye sik’oyo, bobima mpe bokende na kimia.
And when the superior of the prison heard it, he went in, and said the same thing to Paul; namely, that the prefects have sent word that ye be set free. And now, said he, Go ye out, and depart in peace.
37 Kasi Polo azongisaki: — Nini! Basambisi biso te, kasi babetisi biso fimbu na miso ya bato mpe babwaki biso na boloko, nzokande biso tozali bato ya Rome. Balingi sik’oyo kobimisa biso na nkuku? Te, ekosalema bongo te! Tika ete bango moko baya kobimisa biso!
But Paul said to him: They have scourged us, unoffending men, and Romans, before all the world, and have cast us into prison; and now, do they secretly let us out? No, surely: but let them come themselves and bring us out.
38 Basali bakendeki koyebisa makambo yango epai ya basambisi. Tango kaka basambisi bayokaki ete Polo mpe Silasi bazali bato ya Rome, babangaki makasi.
And the rod-bearers went and told to the prefects the words which were told to them: and when they heard that they were Romans, they were afraid,
39 Bayaki kosenga bango bolimbisi, mpe babimisaki bango na boloko. Basengaki na bango ete balongwa na engumba wana.
and came to them, and entreated of them that they would come out, and that they would leave the city.
40 Sima na Polo mpe Silasi kobima na boloko, bakendeki na ndako ya Lidi, epai wapi bakutanaki na bandeko mpe balendisaki bango. Bongo, bazongelaki mobembo na bango.
And when they came out from the prison, they entered the house of Lydia; and there they saw the brethren, and comforted them, and departed.