< Misala ya Bantoma 14 >
1 Na engumba Ikoniomi, Polo mpe Barnabasi bakendeki, lokola momesano, na ndako ya mayangani ya Bayuda; bateyaki kuna, mpe bato ebele, Bayuda mpe bato ya bikolo ya bapaya, bakomaki bandimi.
εγενετο δε εν ικονιω κατα το αυτο εισελθειν αυτουσ εισ την συναγωγην των ιουδαιων και λαλησαι ουτωσ ωστε πιστευσαι ιουδαιων τε και ελληνων πολυ πληθοσ
2 Kasi Bayuda oyo baboyaki kondimela batiaki songisongi epai ya bato ya bikolo ya bapaya mpo ete batombokela bandeko.
οι δε απειθουντεσ ιουδαιοι επηγειραν και εκακωσαν τασ ψυχασ των εθνων κατα των αδελφων
3 Polo mpe Barnabasi bawumelaki kuna mikolo ebele, bazalaki koteya na mpiko, pamba te bazalaki na elikya kati na Nkolo; mpe Nkolo azalaki kokokisa bosolo ya mateya ya ngolu na Ye na kopesaka bango nguya ya kosala bilembo ya kokamwa mpe misala minene.
ικανον μεν ουν χρονον διετριψαν παρρησιαζομενοι επι τω κυριω τω μαρτυρουντι τω λογω τησ χαριτοσ αυτου διδοντι σημεια και τερατα γινεσθαι δια των χειρων αυτων
4 Bato ya engumba yango bakabwanaki: ndambo bazalaki sima na Bayuda, mpe ndambo mosusu, sima na bantoma.
εσχισθη δε το πληθοσ τησ πολεωσ και οι μεν ησαν συν τοισ ιουδαιοισ οι δε συν τοισ αποστολοισ
5 Bato ya bikolo ya bapaya mpe Bayuda, elongo na bakambi na bango, bazwaki mokano ya konyokola bantoma mpe koboma bango na mabanga;
ωσ δε εγενετο ορμη των εθνων τε και ιουδαιων συν τοισ αρχουσιν αυτων υβρισαι και λιθοβολησαι αυτουσ
6 kasi tango bantoma basosolaki yango, bakimaki na bingumba ya Likawoni: Listre, Derbe mpe bazingazinga na yango.
συνιδοντεσ κατεφυγον εισ τασ πολεισ τησ λυκαονιασ λυστραν και δερβην και την περιχωρον
7 Kuna mpe lisusu, bakobaki kaka koteya Sango Malamu.
κακει ησαν ευαγγελιζομενοι
8 Kati na engumba Listre, ezalaki na moto moko akufa makolo. Wuta mbotama na ye, atikala kotambola te.
και τισ ανηρ εν λυστροισ αδυνατοσ τοισ ποσιν εκαθητο χωλοσ εκ κοιλιασ μητροσ αυτου υπαρχων οσ ουδεποτε περιπεπατηκει
9 Azalaki koyoka ndenge Polo azalaki koteya. Polo atalaki ye malamu, amonaki ete azali na kondima mpo na kobikisama
ουτοσ ηκουσεν του παυλου λαλουντοσ οσ ατενισασ αυτω και ιδων οτι πιστιν εχει του σωθηναι
10 mpe alobaki na ye na mongongo makasi: — Telema ngwi na makolo na yo! Mbala moko, moto yango apumbwaki mpe akomaki kotambola.
ειπεν μεγαλη τη φωνη αναστηθι επι τουσ ποδασ σου ορθωσ και ηλλετο και περιεπατει
11 Tango ebele ya bato bamonaki makambo oyo Polo asalaki, bagangaki na lokota ya bato ya Likawoni: — Banzambe bazwi banzoto ya bato mpe bakiteli biso!
οι δε οχλοι ιδοντεσ ο εποιησεν ο παυλοσ επηραν την φωνην αυτων λυκαονιστι λεγοντεσ οι θεοι ομοιωθεντεσ ανθρωποισ κατεβησαν προσ ημασ
12 Kombo oyo babengaki na yango Barnabasi ezali « Zewusi, » mpe kombo oyo babengaki na yango Polo ezali « Erimesi, » pamba te Polo nde azalaki koloba.
εκαλουν τε τον μεν βαρναβαν δια τον δε παυλον ερμην επειδη αυτοσ ην ο ηγουμενοσ του λογου
13 Nganga-nzambe ya nzambe Zewusi, oyo ndako ya nzambe na ye ezalaki na libanda ya ekuke ya engumba, amemaki na bikuke ya engumba bangombe ya mibali elata bafololo mpe bililingi elingama-lingama lokola basheni, pamba te ye mpe bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye balingaki kotumbela bango mbeka.
ο δε ιερευσ του διοσ του οντοσ προ τησ πολεωσ αυτων ταυρουσ και στεμματα επι τουσ πυλωνασ ενεγκασ συν τοισ οχλοισ ηθελεν θυειν
14 Kasi tango bantoma, Barnabasi mpe Polo, bayokaki sango ya likambo yango, bapasolaki bilamba na bango, bakendeki mbangu epai ebele ya bato bazalaki na koganga:
ακουσαντεσ δε οι αποστολοι βαρναβασ και παυλοσ διαρρηξαντεσ τα ιματια αυτων εισεπηδησαν εισ τον οχλον κραζοντεσ
15 — Oh baninga, mpo na nini bozali kosala boye? Biso mpe tozali kaka bato lokola bino. Soki tozali koteya bino Sango Malamu, ezali mpo ete botika banzambe ya bikeko oyo ezanga tina mpe bomipesa na Nzambe na bomoi oyo asala Likolo, mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango.
και λεγοντεσ ανδρεσ τι ταυτα ποιειτε και ημεισ ομοιοπαθεισ εσμεν υμιν ανθρωποι ευαγγελιζομενοι υμασ απο τουτων των ματαιων επιστρεφειν επι τον θεον τον ζωντα οσ εποιησεν τον ουρανον και την γην και την θαλασσαν και παντα τα εν αυτοισ
16 Na tango ya kala, Nzambe atikaki ete bato ya bikolo nyonso balanda nzela oyo bango moko balingi.
οσ εν ταισ παρωχημεναισ γενεαισ ειασεν παντα τα εθνη πορευεσθαι ταισ οδοισ αυτων
17 Nzokande, atikalaki kolemba te kotalisa bolamu na Ye, na nzela ya konokisela bango mvula kowuta na likolo, kopesa bango bambuma ebele na tango na yango, mpe kopesa bango bilei ebele mpe kotondisa mitema na bango na esengo.
καιτοιγε ουκ αμαρτυρον εαυτον αφηκεν αγαθοποιων ουρανοθεν υμιν υετουσ διδουσ και καιρουσ καρποφορουσ εμπιπλων τροφησ και ευφροσυνησ τασ καρδιασ ημων
18 Atako balobaki bongo, balongaki na pasi kopekisa ebele ya bato wana kobonzela bango mbeka.
και ταυτα λεγοντεσ μολισ κατεπαυσαν τουσ οχλουσ του μη θυειν αυτοισ
19 Bongo, Bayuda oyo bawutaki na Antioshe mpe na Ikoniomi batiaki songisongi kati na bato mpo ete batombokela bango. Babambaki Polo mabanga, mpe babendaki ye kino na libanda ya engumba, pamba te bakanisaki ete akufi.
επηλθον δε απο αντιοχειασ και ικονιου ιουδαιοι και πεισαντεσ τουσ οχλουσ και λιθασαντεσ τον παυλον εσυρον εξω τησ πολεωσ νομισαντεσ αυτον τεθναναι
20 Kasi tango bayekoli bazingelaki Polo, atelemaki mpe azongaki kati na engumba. Bongo mokolo oyo elandaki, akendeki na Derbe elongo na Barnabasi.
κυκλωσαντων δε αυτον των μαθητων αναστασ εισηλθεν εισ την πολιν και τη επαυριον εξηλθεν συν τω βαρναβα εισ δερβην
21 Sima na Polo mpe Barnabasi koteya Sango Malamu kati na engumba wana mpe kokomisa bato ebele bayekoli, bazongaki lisusu na Listre, na Ikoniomi mpe na Antioshe;
ευαγγελισαμενοι τε την πολιν εκεινην και μαθητευσαντεσ ικανουσ υπεστρεψαν εισ την λυστραν και ικονιον και αντιοχειαν
22 bazalaki kolendisa bayekoli ete bayika mpiko kati na kondima. Bazalaki koloba: — Tosengeli komona pasi mingi mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe.
επιστηριζοντεσ τασ ψυχασ των μαθητων παρακαλουντεσ εμμενειν τη πιστει και οτι δια πολλων θλιψεων δει ημασ εισελθειν εισ την βασιλειαν του θεου
23 Polo mpe Barnabasi baponaki bakambi mpo na Lingomba moko na moko mpe, sima na bango kosambela mpe kokila bilei, bakabaki bango na maboko ya Nkolo oyo bandimelaki.
χειροτονησαντεσ δε αυτοισ πρεσβυτερουσ κατ εκκλησιαν προσευξαμενοι μετα νηστειων παρεθεντο αυτουσ τω κυριω εισ ον πεπιστευκεισαν
24 Sima na bango koleka etuka ya Pisidi, bakomaki na Pafili.
και διελθοντεσ την πισιδιαν ηλθον εισ παμφυλιαν
25 Bateyaki Liloba kati na Perje mpe, sima na yango, bakendeki na libongo ya Atalia.
και λαλησαντεσ εν περγη τον λογον κατεβησαν εισ ατταλειαν
26 Wuta na Atalia, bakotaki na masuwa mpe bazongaki na Antioshe epai wapi batikaki bango na se ya ngolu ya Nzambe, mpo na mosala oyo bawutaki kokokisa.
κακειθεν απεπλευσαν εισ αντιοχειαν οθεν ησαν παραδεδομενοι τη χαριτι του θεου εισ το εργον ο επληρωσαν
27 Tango bakomaki kuna, basangisaki bato ya Lingomba, bapesaki bango sango ya makambo nyonso oyo Nzambe asalaki na nzela na bango mpe ndenge nini afungolelaki bato ya bikolo ya bapaya nzela ya kondima.
παραγενομενοι δε και συναγαγοντεσ την εκκλησιαν ανηγγειλαν οσα εποιησεν ο θεοσ μετ αυτων και οτι ηνοιξεν τοισ εθνεσιν θυραν πιστεωσ
28 Mpe bawumelaki wana tango molayi elongo na bayekoli.
διετριβον δε εκει χρονον ουκ ολιγον συν τοισ μαθηταισ