< Misala ya Bantoma 13 >

1 Kati na Lingomba oyo ezalaki na Antioshe, ezalaki na basakoli mpe balakisi: Barnabasi, Simeoni oyo bazalaki kobenga « Moto mwindo, » Lusiusi ya Sirene, Manaeni oyo akolaki esika moko na moyangeli Erode, mpe Saulo.
E havia em Antioquia, na igreja que estava [ali], alguns profetas e mestres: Barnabé e Simeão, chamado Níger, e Lúcio cireneu, e Manaem, que tinha sido criado na infância junto com Herodes o Tetrarca, e Saulo.
2 Ezalaki mokolo moko, wana bazalaki kogumbamela Nkolo mpe kokila bilei, Molimo Mosantu alobaki: — Botiela ngai pembeni Barnabasi mpe Saulo mpo na mosala oyo nabengeli bango.
E tendo eles prestado serviço ao Senhor, e jejuado, o Espirito Santo disse: Separai-me a Barnabé e a Saulo, para a obra para a qual eu os tenho chamado.
3 Boye, sima na bango kokila bilei mpe kosambela, batielaki bango maboko mpe batikaki bango kokende.
Então jejuando, e orando, e pondo as mãos sobre eles, [os] despediram.
4 Na etinda ya Molimo Mosantu, Barnabasi mpe Saulo bakendeki na Selesi; mpe longwa kuna, bazwaki masuwa mpo na kokende na esanga ya Shipre.
Portanto estes, enviados pelo Espírito Santo, desceram a Selêucia, e dali navegaram para o Chipre.
5 Tango bakomaki na Salamine, bateyaki Liloba na Nzambe kati na bandako ya mayangani ya Bayuda. Yoane Malako azalaki elongo na bango lokola mosungi.
E tendo chegado a Salamina, anunciavam a palavra de Deus nas sinagogas dos judeus; e também tinham a João como trabalhador [para os auxiliar].
6 Bakatisaki esanga mobimba kino bakomaki na Pafosi epai wapi bamonaki Moyuda moko, kombo na ye « Bari-Yesu. » Azalaki moto ya maji mpe mosakoli ya lokuta.
E tendo eles atravessado a Ilha até Pafo, acharam a um certo mago, falso profeta, judeu, cujo nome era Barjesus.
7 Azalaki mpe moninga ya moyangeli Sergiusi Paulusi oyo azalaki moto ya mayele. Boye, Sergiusi Paulusi abengisaki Barnabasi mpe Saulo, pamba te azalaki na posa ya koyoka Liloba na Nzambe.
O qual estava com o procônsul Sérgio Paulo, homem prudente. Este, tendo chamado a si a Barnabé, e a Saulo, procurava muito ouvir a palavra de Deus.
8 Kasi Elimasi, moto ya maji (pamba te yango nde ezali ndimbola ya kombo na ye), atelemelaki bango mpe azalaki kosala nyonso mpo na kopengwisa kondima ya moyangeli.
Mas resistia-lhes Elimas, o mago (que assim significa seu nome), procurando afastar o procônsul da fé.
9 Bongo lokola Saulo, oyo bazalaki mpe kobenga « Polo, » azalaki atondisama na Molimo Mosantu, atalaki Elimasi na miso mpe alobaki na ye:
Mas Saulo, que também [se chama] Paulo, cheio do Espírito Santo, e olhando fixamente para ele, disse:
10 — Mwana ya Satana mpe monguna ya makambo nyonso ya sembo! Otondi na lolenge nyonso ya lokuta mpe ya mayele mabe! Kino tango nini okotika kobebisa mabongisi ya Nkolo, oyo ezali sembo?
Ó filho do diabo, cheio de toda enganação e toda malícia, inimigo de toda justiça, não cessarás de perverter os corretos caminhos do Senhor?
11 Tala, loboko ya Nkolo etelemeli yo sik’oyo. Ozali kokoma mokufi miso mpo na mwa tango moke, okomona lisusu te pole ya moyi. Kaka na tango yango, lipata mpe molili ezipaki miso ya Elimasi; azalaki lisusu komona te mpe akomaki kobaluka-baluka bipai nyonso na koluka moto mpo ete asimba ye na loboko mpe alakisa ye nzela.
E agora, eis que a mão do Senhor [está] contra ti, e serás cego, não vendo o sol por algum tempo. E no mesmo instante caiu sobre ele um embaçamento, e trevas; e ele, andando ao redor, procurava alguém que o guiasse pela mão.
12 Tango moyangeli amonaki makambo oyo esalemaki, andimaki, pamba te mateya na tina na Nkolo ekamwisaki ye makasi.
Então o procônsul, vendo o que tinha acontecido, creu, espantado pela doutrina do Senhor.
13 Wuta na Pafosi, Polo elongo na baninga na ye bazwaki masuwa mpe bakendeki na Perje, kati na mokili ya Pafili, epai wapi Yoane Malako atikaki bango mpo na kozonga na Yelusalemi.
E tendo partido de Pafo, Paulo e os que estavam com ele foram a Perges, [cidade] da Panfília. Mas João, separando-se deles, voltou a Jerusalém.
14 Mpe longwa na Perje, bakobaki mobembo na bango kino na Antioshe, kati na mokili ya Pisidi. Na mokolo ya Saba, bakotaki na ndako ya mayangani mpe bavandaki.
E eles, tendo passado de Perges, vieram a Antioquia, [cidade] da Pisídia; e ao entrarem na sinagoga [n] um dia de sábado, sentaram-se.
15 Sima na kotanga Mobeko mpe Basakoli, bakambi ya ndako ya mayangani batindelaki bango maloba: — Bandeko, soki bozali na maloba mpo na kolendisa bato, bokoki na bino koloba.
E depois da leitura da Lei e dos profetas, os chefes da sinagoga lhes mandaram, dizendo: Homens irmãos, se em vós há [alguma] palavra de exortação ao povo, dizei.
16 Polo atelemaki, atombolaki loboko mpe alobaki: — Bato ya Isalaele mpe bino oyo bozali Bayuda te kasi botosaka Nzambe, boyoka ngai!
E Paulo, levantando-se e fazendo gesto com a mão, disse: Homens israelitas, e [vós] os que temeis a Deus, ouvi:
17 Nzambe ya bato ya Isalaele aponaki bakoko na biso, akomisaki bango ekolo monene na tango oyo bavandaki kati na mokili ya Ejipito lokola bapaya, mpe abimisaki bango na mokili yango na nguya monene.
O Deus deste povo de Israel escolheu a nossos pais, e exaltou ao povo, sendo eles estrangeiros na terra do Egito, e com o braço levantando, ele os tirou dela.
18 Mibu tuku minei mobimba, ayikelaki bango mpiko kati na esobe;
E pelo tempo de cerca de quarenta anos, ele suportou os costumes deles no deserto.
19 abebisaki bikolo sambo kati na mokili ya Kanana mpe apesaki mabele na bango lokola libula epai ya bato na Ye.
E tendo destruído a sete nações na terra de Canaã, repartiu-lhes as terras por sorte.
20 Makambo wana nyonso ewumelaki mibu pene nkama minei na tuku mitano. Sima na yango, Nzambe apesaki bango bilombe kino na tango ya mosakoli Samuele.
E depois disto, cerca de quatrocentos e cinquenta anos, ele [lhes] deu juízes, até o profeta Samuel.
21 Bongo, basengaki mokonzi, mpe Nzambe apesaki bango Saulo, mwana mobali ya Kisi, moto ya libota ya Benjame, oyo asalaki mibu tuku minei na bokonzi.
E depois disto, pediram a um Rei, e ele lhes deu a Saul, filho de Quis, homem da tribo de Benjamim, [durante] quarenta anos.
22 Sima na Ye kolongola Saulo, akomisaki Davidi mokonzi na bango. Tala maloba oyo Nzambe atatolaki na tina na ye: « Namoni Davidi, mwana mobali ya Yese, moto oyo asepelisaka motema na ngai; akokokisa solo mokano na ngai nyonso. »
E tirando a este, levantou-lhes por rei a Davi, ao qual também deu testemunho, e disse: Eu achei a Davi, [filho] de Jessé, um homem conforme o meu coração, que fará toda a minha vontade.
23 Ezali wuta na libota ya Davidi nde Nzambe abimisaki, mpo na bana ya Isalaele, Mobikisi Yesu, ndenge alakaki.
Da descendência deste, conforme a promessa, Deus trouxe um salvador a Israel, Jesus;
24 Liboso ete Yesu aya, Yoane ateyaki bato nyonso ya Isalaele ete babongola mitema mpe bazwa libatisi.
Tendo João primeiro, antes de sua vinda, pregado o batismo de arrependimento a todo o povo de Israel.
25 Wana Yoane akomaki pene ya kosilisa mosala na ye, alobaki: « Bokanisi ete ngai nazali nani? Nazali te Moto oyo bozali kozela. Kasi azali koya sima na ngai, Ye oyo nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye! »
Mas quando João cumpriu [sua] carreira, disse: Quem vós pensais que eu sou? Eu não sou o [Cristo], mas eis que após mim vem aquele, cujas sandálias dos pés eu não sou digno de desatar.
26 Bandeko na ngai, bino oyo bozali bana ya Abrayami, mpe bino oyo bozali Bayuda te kasi botosaka Nzambe, ezali epai na biso nde Nzambe atindaki maloba oyo ya lobiko.
Homens irmãos, filhos da descendência de Abraão, e os que dentre vós temem a Deus, a vós é enviada a palavra desta salvação.
27 Bato ya Yelusalemi mpe bakambi na bango basosolaki te soki Yesu azali nani; basosolaki mpe te maloba ya basakoli oyo etangamaka mikolo nyonso ya Saba. Nzokande, tango bakatelaki Ye etumbu, bakokisaki nde masakoli yango.
Porque os que habitavam em Jerusalém, e seus líderes, não conhecendo a este, ao condenarem [-no], cumpriram as vozes dos profetas, que são lidas todos os sábados.
28 Atako bamonaki mabe moko te kati na Ye, mabe oyo ekokaki komemela Ye etumbu ya kufa, kasi basengaki kaka ete Pilato aboma Ye.
E [mesmo] achando nenhum motivo para morte, pediram a Pilatos que fosse morto.
29 Tango mpe bakokisaki makambo nyonso oyo ekomama na tina na Ye, bakitisaki Ye longwa na ekulusu mpe batiaki Ye kati na kunda.
E tendo eles cumprido todas as coisas que estavam escritas sobre ele, tirando [-o] do madeiro, puseram [-no] na sepultura.
30 Kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi,
Mas Deus o ressuscitou dos mortos.
31 mpe bato oyo basalaki mibembo elongo na Ye, longwa na Galile kino na Yelusalemi, bamonaki Ye mikolo ebele. Bazali sik’oyo batatoli na Ye epai ya bato na biso.
O qual foi visto durante muitos dias pelos que haviam subido com ele da Galileia, que são suas testemunhas para com o povo.
32 Tozali koyebisa bino sango malamu oyo: elaka oyo Nzambe apesaki na bakoko na biso,
E nós vos anunciamos o Evangelho da promessa que foi feita aos pais; ao qual Deus já nos cumpriu a nós, filhos deles, ressuscitando a Jesus.
33 Nzambe akokisi yango mpo na biso, bana na bango, na kosekwisa Yesu kati na bakufi, kolanda ndenge ekomama kati na Nzembo ya mibale: « Ozali Mwana na Ngai; na mokolo ya lelo, nakomi Tata na Yo. »
Assim como está escrito no salmo segundo: Tu és meu Filho, hoje eu te gerei.
34 Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi mpo ete apola ata mokolo moko te. Kolanda ndenge Nzambe alobaki: « Nakopesa bino mapamboli ya bule mpe ya solo, oyo nalakaki Davidi. »
E [quanto a] que o ressuscitasse dos mortos, para nunca mais voltar à degradação, assim disse: Eu vos darei as fiéis beneficências de Davi.
35 Yango wana, na eteni mosusu, elobamaki lisusu: « Okotika te Mosantu na Yo kopola. »
Por isso que também em outro [salmo] ele diz: Não permitirás que teu Santo veja degradação.
36 Nzokande, Davidi, sima na ye kokokisa mabongisi ya Nzambe na tango na ye, akufaki mpe akundamaki pembeni ya bakoko na ye; boye nzoto na ye epolaki.
Porque, na verdade, tendo Davi servido ao conselho de Deus, morreu, foi posto junto a seus pais, e viu degradação.
37 Kasi Ye oyo Nzambe asekwisaki apolaki te.
Mas aquele a quem Deus ressuscitou nenhuma degradação viu.
38 Yango wana, bandeko na ngai, nalingi boyeba ete ezali na nzela ya Yesu nde bolimbisi ya masumu esakolami epai na bino mpe bozwi bolimbisi ya masumu nyonso oyo Mobeko ya Moyize ekokaki te kokangola bino.
Seja-vos pois conhecido, homens irmãos, que por este vos é anunciado o perdão dos pecados.
39 Ezali mpe na nzela ya Yesu nde moto nyonso oyo andimi akomi sembo.
E de tudo o que pela lei de Moisés não pudestes ser justificados, neste é justificado todo aquele que crê.
40 Yango wana, bosala keba ete makambo oyo basakoli baloba ekomela bino te:
Então vede, para que não venha sobre vós o que está escrito nos [livros dos] profetas:
41 « Bino batioli, botala, bokamwa mpe bolimwa, pamba te nakosala likambo moko na tango na bino, likambo oyo bokokaki kondima te soki bayebisaki bino yango. »
[Vós] desprezadores, vede e espantai-vos, e desaparecei-vos; porque eu opero obra em vossos dias, obra na qual não crereis, se alguém vos contar.
42 Tango Polo mpe Barnabasi babimaki na ndako ya mayangani, bato basengaki bango kolobela lisusu makambo wana na mokolo ya Saba oyo elandaki.
E enquanto saíam da sinagoga, rogaram [-lhes] que no sábado seguinte eles lhes falassem estas palavras.
43 Tango mayangani esilaki, Bayuda mingi elongo na bato ya bikolo mosusu, oyo bakotaki na lingomba ya Bayuda mpe bazalaki kogumbamela Nzambe, balandaki Polo mpe Barnabasi oyo bazalaki kosolola na bango mpe kondimisa bango ete batikala ya kokangama makasi na ngolu ya Nzambe.
E tendo terminado [a reunião] da sinagoga, muitos dos judeus, e dos religiosos prosélitos, seguiram a Paulo e a Barnabé; os quais, falando-lhes, exortavam-nos a permanecerem na graça de Deus.
44 Na mokolo ya Saba oyo elandaki, bato ebele penza ya engumba bayaki kosangana mpo na koyoka Liloba na Nkolo.
E no sábado seguinte ajuntou-se quase toda a cidade para ouvir a palavra de Deus.
45 Kasi tango Bayuda bamonaki ebele ya bato, batondaki na zuwa; bakomaki koloba mabe na tina na makambo oyo Polo azalaki koloba, mpe bakomaki kofinga ye.
Mas os Judeus, ao verem as multidões, ficaram cheios de inveja, e falavam contrariamente ao que Paulo dizia, falando contrariamente e blasfemando.
46 Bongo, Polo mpe Barnabasi balobaki na bango na mpiko: — Tosengeli liboso koteya bino Liloba na Nzambe. Kasi lokola boboyi yango mpe bozali bino moko komimona ete bokoki te mpo na kozwa bomoi ya seko, tokeyi na biso sik’oyo epai ya bato oyo bazali Bayuda te. (aiōnios g166)
Mas Paulo e Barnabé, usando de ousadia, disseram: Era necessário que a palavra de Deus fosse primeiro falada a vós; mas já que a rejeitais, e não vos julgais dignos da vida eterna, eis que nós nos viramos [em direção] aos gentios. (aiōnios g166)
47 Pamba te, tala makambo oyo Nkolo atindaki biso: « Nakomisi yo pole mpo na bikolo mosusu, mpo ete omema lobiko kino na suka ya mokili. »
Porque assim o Senhor nos mandou, [dizendo]: Eu te pus como luz para os gentios, para que tu sejas como salvação até às extremidades da terra.
48 Tango bato ya bikolo ya bapaya bayokaki bongo, basepelaki mpe bakomaki kokumisa Liloba na Nkolo; mpe bato nyonso oyo Nzambe abongisa mpo na kozwa bomoi ya seko bakomaki bandimi. (aiōnios g166)
E os gentios, tendo ouvido [isto], alegraram-se, e glorificavam ao Senhor; e creram todos quantos estavam determinados para a vida eterna. (aiōnios g166)
49 Liloba na Nkolo epanzanaki na etuka wana mobimba.
E a palavra do Senhor era divulgada por toda aquela região.
50 Kasi Bayuda batiaki songisongi epai ya basi ya lokumu oyo bazalaki kogumbamela Nzambe, mpe epai ya bato minene ya engumba wana; bapelisaki moto mpo ete Polo mpe Barnabasi banyokolama, mpe babenganaki bango wuta na mokili na bango.
Mas os judeus incitaram algumas mulheres devotas e honradas, e aos líderes da cidade, e levantaram perseguição contra Paulo e Barnabé, e os expulsaram de seus limites.
51 Na bongo, Polo mpe Barnabasi bapupolaki putulu ya makolo na bango mpo na bato wana, mpe bakendeki na Ikoniomi.
Mas eles, sacudindo contra eles o pó dos seus pés, vieram a Icônio.
52 Nzokande, bayekoli batondaki na esengo mpe na Molimo Mosantu.
E os discípulos se enchiam de alegria e do Espírito Santo.

< Misala ya Bantoma 13 >