< Misala ya Bantoma 12 >
1 Na tango yango, mokonzi Erode akangaki ndambo ya bandimi ya Lingomba mpo na konyokola bango.
Vers ce temps-là, le roi Hérode fit arrêter quelques membres de l’Église pour les maltraiter;
2 Abomaki kutu Jake, ndeko mobali ya Yoane, na mopanga.
il fit mourir par le glaive Jacques, frère de Jean.
3 Tango amonaki ete likambo yango ezalaki kosepelisa Bayuda, akangaki mpe Petelo na tango ya feti ya mapa ezanga levire.
Voyant que cela était agréable aux Juifs, il ordonna encore l’arrestation de Pierre: c’était pendant les jours des Azymes.
4 Sima na ye kokanga Petelo, atiaki ye kati na boloko mpe aponaki masanga minei ya basoda mpo ete bakengela ye; lisanga moko na moko ezalaki na basoda minei. Erode azalaki na makanisi ya kosambisa ye na miso ya bato sima na feti ya Pasika.
Lorsqu’il l’eut en son pouvoir, il le jeta en prison, et le mit sous la garde de quatre escouades de quatre soldats chacune, avec l’intention de le faire comparaître devant le peuple après la Pâque.
5 Petelo azalaki kati na boloko, kasi Lingomba ezalaki kobondela Nzambe na molende mpo na ye.
Pendant que Pierre était ainsi gardé dans la prison, l’Église ne cessait d’adresser pour lui des prières à Dieu.
6 Na butu ya mokolo oyo Erode alingaki kosambisa ye, Petelo alalaki pongi na kati-kati ya basoda mibale, akangama na minyololo mibale, mpe bakengeli bazalaki kobatela ekuke ya boloko.
Or, la nuit même du jour où Hérode devait le faire comparaître, Pierre, lié de deux chaînes, dormait entre deux soldats, et des sentinelles devant la porte gardaient la prison.
7 Mbala moko, anjelu ya Nkolo abimaki na pwasa, mpe pole engengaki kati na boloko. Anjelu aningisaki Petelo na mopanzi mpo na kolamusa ye; alobaki na ye: — Telema noki! Mpe minyololo ekweyaki longwa na maboko ya Petelo.
Tout à coup survint un ange du Seigneur, et une lumière resplendit dans la prison. L’ange, frappant Pierre au côté, le réveilla en disant: « Lève-toi promptement »; et les chaînes tombèrent de ses mains.
8 Anjelu alobaki na ye: — Lata elamba na yo, mokaba na yo mpe basandale na yo! Petelo asalaki bongo. Anjelu alobaki na ye lisusu: — Lata nzambala na yo mpe landa ngai.
L’ange lui dit: « Mets ta ceinture et tes sandales. » Il le fit, et l’ange ajouta: « Enveloppe-toi de ton manteau et suis-moi. »
9 Petelo alandaki anjelu kino na libanda ya boloko, kasi ayebaki te ete makambo oyo anjelu azali kosala ezali penza ya solo: akanisaki ete azwi emoniseli.
Pierre sortit et le suivit, ne sachant pas que ce qui se faisait par l’ange fût réel; il croyait avoir une vision.
10 Balekaki bakengeli ya liboso mpe ya mibale, mpe bakomaki na ekuke ya bibende oyo epesaka nzela ya kokota na engumba. Ekuke efungwamaki yango moko liboso na bango; bongo babimaki mpe batambolaki na balabala moko. Mpe mbala moko, anjelu atikaki Petelo.
Lorsqu’ils eurent passé la première garde, puis la seconde, ils arrivèrent à la porte de fer qui donne sur la ville: elle s’ouvrit d’elle-même devant eux; ils sortirent et s’engagèrent dans une rue, et aussitôt l’ange le quitta.
11 Tango mayele na ye ya bomoto ezongaki, Petelo amilobelaki: — Ah, nasosoli sik’oyo, ezali penza ya solo! Nkolo atindaki anjelu na Ye mpe akangoli ngai na maboko ya Erode mpe na makambo nyonso oyo Bayuda balingaki kosala ngai.
Alors revenu à lui-même, Pierre se dit: « Je vois maintenant que le Seigneur a réellement envoyé son ange et qu’il m’a délivré de la main d’Hérode et de tout ce qu’attendait le peuple Juif. »
12 Tango amonaki bongo, akendeki na ndako ya Mari, mama ya Yoane oyo kombo na ye mosusu ezali « Malako. » Bandimi ebele basanganaki kuna mpe bazalaki kosambela.
Après un moment de réflexion, il se dirigea vers la maison de Marie, la mère de Jean, surnommé Marc, où une nombreuse assemblée était en prière.
13 Petelo abetaki ekuke; mpe mwasi mosali moko, kombo na ye « Rode, » apusanaki na ekuke mpo na koyanola.
Il frappa à la porte du vestibule et une servante, nommée Rhodé, s’approcha pour écouter.
14 Tango asosolaki ete ezali mongongo ya Petelo, atondaki na esengo; na esika ya kofungola ekuke, azongaki mbangu mpe agangaki: — Eh, ezali Petelo! Azali wana, na libanda, liboso ya ekuke!
Dès qu’elle eut reconnu la voix de Pierre, dans sa joie, au lieu d’ouvrir, elle courut à l’intérieur annoncer que Pierre était devant la porte.
15 Balobaki na ye: — Okomi penza na liboma! Kasi Rode azalaki kaka koloba: — Ya solo penza! Petelo azali na libanda. Bongo balobaki: — Ekoki kozala anjelu na ye!
Ils lui dirent: « Tu es folle. » Mais elle affirma qu’il en était ainsi; et ils dirent: « C’est son ange. »
16 Nzokande, Petelo azalaki kokoba kobeta ekuke. Boye, tango bafungolaki ekuke mpe bamonaki ye, bakamwaki makasi.
Cependant Pierre continuait à frapper; et lorsqu’ils lui eurent ouvert, en le voyant, ils furent saisis de stupeur.
17 Petelo apepelaki bango loboko mpo ete bavanda kimia, mpe ayebisaki bango ndenge nini Nkolo abimisaki ye na boloko. Alobaki lisusu: — Boyebisa makambo oyo epai ya Jake mpe bandeko mosusu. Sima na yango, abimaki mpe akendeki na esika mosusu.
Mais Pierre, leur ayant fait de la main signe de se taire, leur raconta comment le Seigneur l’avait tiré de la prison, et il ajouta: « Allez porter cette nouvelle à Jacques et aux frères. » Puis il sortit et s’en alla dans un autre lieu.
18 Na tongo, mobulu monene ebimaki kati na basoda, pamba te bazalaki kotunana: — Likambo nini ekomelaki Petelo?
Quand il fit jour, il y eut une grande agitation parmi les soldats, pour savoir ce que Pierre était devenu.
19 Erode atindaki bato koluka Petelo, kasi bamonaki ye te. Bongo, sima na ye kosambisa bakengeli, apesaki mitindo ete baboma bango. Sima na yango, Erode atikaki Yuda mpe akendeki kovanda mwa mikolo na Sezarea.
Hérode le fit chercher, et ne l’ayant pas découvert, il procéda à l’interrogatoire des gardes et les fit conduire au supplice. Ensuite il quitta la Judée pour retourner à Césarée, où il séjourna.
20 Nzokande, Erode asilikelaki makasi bato ya Tiri mpe ya Sidoni. Bongo, bato ya Tiri mpe ya Sidoni bayokanaki mpe basengaki kokutana na Erode. Sima na bango kozwa lisungi ya Blasitisi, motambolisi misala ya shambre ya mokonzi, basengaki kimia kati na Erode mpe bango, pamba te bilei na bango ezalaki kowuta na mokili ya mokonzi Erode.
Hérode était en hostilité avec les Tyriens et les Sidoniens; ceux-ci vinrent ensemble le trouver, et ayant gagné Blastus, son chambellan, ils lui demandèrent la paix, parce que leur pays tirait sa subsistance des terres du roi.
21 Tango mokolo oyo akataki ekokaki, Erode alataki bilamba na ye ya bokonzi, avandaki na kiti na ye ya bokonzi mpe alobaki na bato.
Au jour fixé, Hérode, revêtu d’habits royaux, et assis sur son trône, les haranguait;
22 Bato bagangaki: — Tala yango oyo, mongongo ya nzambe; ezali mongongo ya moto te!
et le peuple s’écria: « C’est la voix d’un Dieu, et non d’un homme! »
23 Mbala moko, anjelu ya Nkolo abetaki Erode mpo ete apesaki Nzambe lokumu te; boye bankusu eliaki ye, mpe akufaki.
Au même instant, un ange du Seigneur le frappa, parce qu’il n’avait pas rendu gloire à Dieu. Et il expira, rongé des vers.
24 Kasi Liloba na Nzambe ekobaki kopanzana mpe kobota mbuma.
Cependant la parole de Dieu se répandait de plus en plus, et enfantait de nouveaux disciples.
25 Sima na Barnabasi mpe Saulo kokokisa mosala na bango mpo na bolamu ya bandimi ya Yelusalemi, batikaki Yelusalemi mpe bamemaki, elongo na bango, Yoane oyo kombo na ye mosusu ezali « Malako. »
Barnabé et Saul, après s’être acquittés de leur ministère, s’en retournèrent de Jérusalem, emmenant avec eux Jean, surnommé Marc.