< Misala ya Bantoma 10 >
1 Na Sezarea, ezalaki na moto moko oyo kombo na ye ezalaki « Kornei; » azalaki mokonzi ya basoda oyo babengamaka « mampinga ya Itali. »
Ἀνὴρ δέ τις ἐν Καισαρείᾳ ὀνόματι Κορνήλιος, ἑκατοντάρχης ἐκ σπείρης τῆς καλουμένης Ἰταλικῆς,
2 Kornei elongo na bato nyonso ya libota na ye bazalaki komipesa na makambo ya Nzambe mpe kotosa Nzambe; azalaki kosunga bato oyo bazalaki kati na bosenga ya ndenge na ndenge mpe kosambela Nzambe tango nyonso.
εὐσεβὴς καὶ φοβούμενος τὸν Θεὸν σὺν παντὶ τῷ οἴκῳ αὐτοῦ, ποιῶν τε ἐλεημοσύνας πολλὰς τῷ λαῷ καὶ δεόμενος τοῦ Θεοῦ διὰ παντός,
3 Mokolo moko, na ngonga pene ya misato sima na midi, azwaki emoniseli; amonaki na polele anjelu moko ya Nzambe koya epai na ye mpe koloba na ye: — Kornei!
εἶδεν ἐν ὁράματι φανερῶς ὡσεὶ ὥραν ἐνάτην τῆς ἡμέρας ἄγγελον τοῦ Θεοῦ εἰσελθόντα πρὸς αὐτὸν καὶ εἰπόντα αὐτῷ· Κορνήλιε.
4 Kornei atalaki ye na somo mpe atunaki: — Nkolo, likambo nini? Anjelu azongisaki: — Mabondeli na yo mpe masungi oyo opesaka epai ya babola emati liboso ya Nzambe, mpe akanisi yango.
ὁ δὲ ἀτενίσας αὐτῷ καὶ ἔμφοβος γενόμενος εἶπε· τί ἐστι, κύριε; εἶπε δὲ αὐτῷ· αἱ προσευχαί σου καὶ αἱ ἐλεημοσύναι σου ἀνέβησαν εἰς μνημόσυνον ἐνώπιον τοῦ Θεοῦ.
5 Sik’oyo, tinda bato, na Jafa, mpo bakende kobenga Simona oyo kombo na ye mosusu ezali « Petelo; »
καὶ νῦν πέμψον εἰς Ἰόππην ἄνδρας καὶ μετάπεμψαι Σίμωνα τὸν ἐπικαλούμενον Πέτρον·
6 azali kovanda lokola mopaya kati na ndako ya Simona, mobongisi baposo ya banyama, oyo ndako na ye ezali pene ya ebale monene.
οὗτος ξενίζεται παρά τινι Σίμωνι βυρσεῖ, ᾧ ἐστιν οἰκία παρὰ θάλασσαν.
7 Tango kaka anjelu oyo asololaki na ye akendeki, Kornei abengaki basali mibale kati na basali na ye, mpe soda moko oyo azalaki komipesa na makambo ya Nzambe, kati na basoda oyo bazalaki kosalela ye.
ὡς δὲ ἀπῆλθεν ὁ ἄγγελος ὁ λαλῶν τῷ Κορνηλίῳ, φωνήσας δύο τῶν οἰκετῶν αὐτοῦ καὶ στρατιώτην εὐσεβῆ τῶν προσκαρτερούντων αὐτῷ,
8 Ayebisaki bango makambo nyonso oyo ekomelaki ye mpe atindaki bango na Jafa.
καὶ ἐξηγησάμενος αὐτοῖς ἅπαντα, ἀπέστειλεν αὐτοὺς εἰς τὴν Ἰόππην.
9 Mokolo oyo elandaki, na ngonga pene ya midi, wana bato oyo Kornei atindaki bazalaki nanu na nzela mpe bakomaki pene ya Jafa, Petelo amataki na veranda oyo ezalaki na likolo ya ndako mpo na kosambela.
Τῇ δὲ ἐπαύριον ὁδοιπορούντων ἐκείνων καὶ τῇ πόλει ἐγγιζόντων ἀνέβη Πέτρος ἐπὶ τὸ δῶμα προσεύξασθαι περὶ ὥραν ἕκτην.
10 Ayokaki nzala mpe azalaki na posa ya kolia, mpe wana bazalaki nanu kobongisela ye bilei, akweyaki na Molimo.
ἐγένετο δὲ πρόσπεινος καὶ ἤθελε γεύσασθαι· παρασκευαζόντων δὲ ἐκείνων ἐπέπεσεν ἐπ᾽ αὐτὸν ἔκστασις,
11 Amonaki Likolo efungwami, mpe eloko moko lokola elamba monene basimba na basonge na yango minei ezali kokita na mabele.
καὶ θεωρεῖ τὸν οὐρανὸν ἀνεῳγμένον καὶ καταβαῖνον ἐπ᾽ αὐτὸν σκεῦός τι ὡς ὀθόνην μεγάλην, τέσσαρσιν ἀρχαῖς δεδεμένον καὶ καθιέμενον ἐπὶ τῆς γῆς,
12 Kati na yango, ezalaki na lolenge nyonso ya banyama ya mabele, oyo ezali na makolo minei; ya banyama oyo etambolaka na libumu mpe ya bandeke ya likolo.
ἐν ᾧ ὑπῆρχε πάντα τὰ τετράποδα τῆς γῆς καὶ τὰ θηρία καὶ τὰ ἑρπετὰ καὶ τὰ πετεινὰ τοῦ οὐρανοῦ.
13 Bongo mongongo moko elobaki na ye: — Petelo, telema. Boma mpe lia.
καὶ ἐγένετο φωνὴ πρὸς αὐτόν· ἀναστάς, Πέτρε, θῦσον καὶ φάγε.
14 Petelo azongisaki: — Te, Nkolo! Natikala nanu kolia te eloko ya mbindo to ya bosoto.
ὁ δὲ Πέτρος εἶπε· μηδαμῶς, Κύριε· ὅτι οὐδέποτε ἔφαγον πᾶν κοινὸν ἢ ἀκάθαρτον.
15 Mongongo yango elobaki na ye, mpo na mbala ya mibale: — Eloko nyonso oyo Nzambe akomisi peto, yo, komona yango mbindo te!
καὶ φωνὴ πάλιν ἐκ δευτέρου πρὸς αὐτόν· ἃ ὁ Θεὸς ἐκαθάρισε σὺ μὴ κοίνου.
16 Esalemaki bongo mbala misato, mpe eloko yango elimwaki kati na Likolo.
τοῦτο δὲ ἐγένετο ἐπὶ τρίς, καὶ πάλιν ἀνελήφθη τὸ σκεῦος εἰς τὸν οὐρανόν.
17 Petelo akamwaki mingi mpe akomaki komituna ndimbola ya emoniseli oyo awuti kozwa. Kaka na tango yango, batindami ya Kornei bamonaki ndako ya Simona, oyo bazalaki koluka, mpe batelemaki na ekuke.
Ὡς δὲ ἐν ἑαυτῷ διηπόρει ὁ Πέτρος τί ἂν εἴη τὸ ὅραμα ὃ εἶδε, καὶ ἰδοὺ οἱ ἄνδρες οἱ ἀπεσταλμένοι ἀπὸ τοῦ Κορνηλίου διερωτήσαντες τὴν οἰκίαν Σίμωνος ἐπέστησαν ἐπὶ τὸν πυλῶνα,
18 Babelelaki mpe batunaki soki ezali kuna nde Simona avandaka, Simona oyo kombo na ye mosusu ezali « Petelo. »
καὶ φωνήσαντες ἐπυνθάνοντο εἰ Σίμων ὁ ἐπικαλούμενος Πέτρος ἐνθάδε ξενίζεται.
19 Wana Petelo azalaki kaka komitungisa mpo na emoniseli oyo awuti kozwa, Molimo alobaki na ye: — Simona, bato misato bazali koluka yo.
τοῦ δὲ Πέτρου διενθυμουμένου περὶ τοῦ ὁράματος εἶπεν αὐτῷ τὸ Πνεῦμα· ἰδοὺ ἄνδρες [τρεῖς] ζητοῦσί σε·
20 Telema mpe kita. Kende elongo na bango, kotia tembe te, pamba te ngai nde natindi bango.
ἀλλὰ ἀναστὰς κατάβηθι καὶ πορεύου σὺν αὐτοῖς μηδὲν διακρινόμενος, διότι ἐγὼ ἀπέσταλκα αὐτούς.
21 Petelo akitaki mpe alobaki na bato yango: — Ngai oyo! Ezali ngai nde bozali koluka. Boyei mpo na nini?
καταβὰς δὲ Πέτρος πρὸς τοὺς ἄνδρας εἶπεν· ἰδοὺ ἐγώ εἰμι ὃν ζητεῖτε· τίς ἡ αἰτία δι᾽ ἣν πάρεστε;
22 Bato yango bazongisaki: — Towuti epai ya Kornei, mokonzi ya basoda; azali moto ya sembo mpe atosaka Nzambe, mpe Bayuda nyonso bazali kotatola bolamu na tina na ye. Anjelu ya bule ayebisaki ye ete abengisa yo kati na ndako na ye mpo ete ayoka makambo oyo ozali na yango ya koloba na ye.
οἱ δὲ εἶπον· Κορνήλιος ἑκατοντάρχης, ἀνὴρ δίκαιος καὶ φοβούμενος τὸν Θεόν, μαρτυρούμενός τε ὑπὸ ὅλου τοῦ ἔθνους τῶν Ἰουδαίων, ἐχρηματίσθη ὑπὸ ἀγγέλου ἁγίου μεταπέμψασθαί σε εἰς τὸν οἶκον αὐτοῦ καὶ ἀκοῦσαι ῥήματα παρὰ σοῦ.
23 Petelo akotisaki bango na ndako mpe apesaki bango esika ya kolala. Mokolo oyo elandaki, Petelo akendeki elongo na bango, mpe ndambo ya bandimi balandaki ye wuta na Jafa.
εἰσκαλεσάμενος οὖν αὐτοὺς ἐξένισε. Τῇ δὲ ἐπαύριον ἀναστὰς ἐξῆλθε σὺν αὐτοῖς, καί τινες τῶν ἀδελφῶν τῶν ἀπὸ [τῆς] Ἰόππης συνῆλθον αὐτῷ,
24 Sima na mokolo moko, bakomaki na Sezarea. Kornei azalaki kozela bango, mpe abengisaki bato ya libota na ye mpe balingami na ye mpo ete bazala lisanga.
καὶ τῇ ἐπαύριον εἰσῆλθον εἰς τὴν Καισάρειαν. ὁ δὲ Κορνήλιος ἦν προσδοκῶν αὐτοὺς συγκαλεσάμενος τοὺς συγγενεῖς αὐτοῦ καὶ τοὺς ἀναγκαίους φίλους.
25 Tango Petelo alingaki kokota na ndako, Kornei apusanaki pene na ye, amibwakaki na makolo na ye mpo na kogumbamela ye.
Ὡς δὲ ἐγένετο τοῦ εἰσελθεῖν τὸν Πέτρον, συναντήσας αὐτῷ ὁ Κορνήλιος πεσὼν ἐπὶ τοὺς πόδας προσεκύνησεν.
26 Kasi Petelo atelemisaki ye; alobaki: — Telema! Ngai mpe nazali kaka moto.
ὁ δὲ Πέτρος αὐτὸν ἤγειρε λέγων· ἀνάστηθι· κἀγὼ αὐτὸς ἄνθρωπός εἰμι.
27 Wana bazalaki kosolola, Petelo akotaki na ndako mpe akutaki bato ebele basangani.
καὶ συνομιλῶν αὐτῷ εἰσῆλθε, καὶ εὑρίσκει συνεληλυθότας πολλούς,
28 Alobaki na bango: — Boyebi malamu ete mibeko na biso epekisa Moyuda kosangana na Mopagano to kokende kotala Mopagano; kasi Nzambe alakisi ngai ete nasengeli te komona moto moko mbindo to bosoto.
ἔφη τε πρὸς αὐτούς· ὑμεῖς ἐπίστασθε ὡς ἀθέμιτόν ἐστιν ἀνδρὶ Ἰουδαίῳ κολλᾶσθαι ἢ προσέρχεσθαι ἀλλοφύλῳ· καὶ ἐμοὶ ὁ Θεὸς ἔδειξε μηδένα κοινὸν ἢ ἀκάθαρτον λέγειν ἄνθρωπον·
29 Yango wana, tango botindaki bato kobenga ngai, natunaki ata motuna moko te mpo na koya. Sik’oyo, nakoki koyeba tina nini bobengeli ngai?
διὸ καὶ ἀναντιρρήτως ἦλθον μεταπεμφθείς. πυνθάνομαι οὖν τίνι λόγῳ μετεπέμψασθέ με;
30 Kornei azongisaki: — Eleki mikolo misato, na ngonga lokola oyo, ngonga ya misato sima na midi, nazalaki kosambela kati na ndako na ngai. Mbala moko, moto moko alata bilamba ya kongenga makasi atelemaki liboso na ngai
καὶ ὁ Κορνήλιος ἔφη· ἀπὸ τετάρτης ἡμέρας μέχρι ταύτης τῆς ὥρας ἤμην νηστεύων, καὶ τὴν ἐνάτην ὥραν προσευχόμενος ἐν τῷ οἴκῳ μου· καὶ ἰδοὺ ἀνὴρ ἔστη ἐνώπιόν μου ἐν ἐσθῆτι λαμπρᾷ,
31 mpe alobaki: « Kornei, Nzambe ayoki mabondeli na yo mpe akanisi masungi oyo opesaka epai ya babola.
καί φησι· Κορνήλιε, εἰσηκούσθη σου ἡ προσευχὴ καὶ αἱ ἐλεημοσύναι σου ἐμνήσθησαν ἐνώπιον τοῦ Θεοῦ.
32 Tinda bato, na Jafa, mpo bakende kobenga Simona oyo kombo na ye mosusu ezali Petelo; azali kovanda lokola mopaya kati na ndako ya Simona, mobongisi baposo ya banyama, oyo ndako na ye ezali pene ya ebale monene. »
πέμψον οὖν εἰς Ἰόππην καὶ μετακάλεσαι Σίμωνα ὃς ἐπικαλεῖται Πέτρος· οὗτος ξενίζεται ἐν οἰκίᾳ Σίμωνος βυρσέως παρὰ θάλασσαν· ὃς παραγενόμενος λαλήσει σοι.
33 Yango wana, natindaki bato noki-noki epai na yo, mpe osali malamu ndenge oyei. Sik’oyo, biso nyonso tozali awa liboso ya Nzambe mpo na koyoka nyonso oyo Nkolo atindi yo koyebisa biso.
ἐξαυτῆς οὖν ἔπεμψα πρός σε, σύ τε καλῶς ἐποίησας παραγενόμενος. νῦν οὖν πάντες ἡμεῖς ἐνώπιον τοῦ Θεοῦ πάρεσμεν ἀκοῦσαι πάντα τὰ προστεταγμένα σοι ὑπὸ τοῦ Θεοῦ.
34 Petelo azwaki maloba mpe alobaki: — Sik’oyo, nasosoli solo ete Nzambe atalaka bilongi te,
Ἀνοίξας δὲ Πέτρος τὸ στόμα [αὐτοῦ] εἶπεν· ἐπ᾽ ἀληθείας καταλαμβάνομαι ὅτι οὐκ ἔστι προσωπολήπτης ὁ Θεός,
35 kasi andimaka bato ya bikolo nyonso, oyo batosaka Ye mpe basalaka makambo ya sembo.
ἀλλ᾽ ἐν παντὶ ἔθνει ὁ φοβούμενος αὐτὸν καὶ ἐργαζόμενος δικαιοσύνην δεκτὸς αὐτῷ ἐστι.
36 Atindaki Liloba na Ye epai ya bana ya Isalaele mpo na kosakola Sango Malamu ya kimia, na nzela ya Yesu-Klisto oyo azali Nkolo ya bato nyonso.
τὸν λόγον ὃν ἀπέστειλε τοῖς υἱοῖς Ἰσραὴλ εὐαγγελιζόμενος εἰρήνην διὰ Ἰησοῦ Χριστοῦ· οὗτός ἐστι πάντων Κύριος·
37 Boyebi makambo oyo esalemaki na Yuda mobimba, kobanda na Galile, sima na libatisi oyo Yoane ateyaki:
ὑμεῖς οἴδατε τὸ γενόμενον ῥῆμα καθ᾽ ὅλης τῆς Ἰουδαίας, ἀρξάμενον ἀπὸ τῆς Γαλιλαίας μετὰ τὸ βάπτισμα ὃ ἐκήρυξεν Ἰωάννης,
38 ndenge nini Nzambe atondisaki Yesu ya Nazareti na Molimo Mosantu mpe na nguya, mpe ndenge nini atambolaki bipai na bipai mpo na kosala bolamu mpe kobikisa bato nyonso oyo bazalaki na se ya nguya ya Satana, pamba te Nzambe azalaki elongo na Ye.
Ἰησοῦν τὸν ἀπὸ Ναζαρέτ, ὡς ἔχρισεν αὐτὸν ὁ Θεὸς Πνεύματι Ἁγίῳ καὶ δυνάμει, ὃς διῆλθεν εὐεργετῶν καὶ ἰώμενος πάντας τοὺς καταδυναστευομένους ὑπὸ τοῦ διαβόλου, ὅτι ὁ Θεὸς ἦν μετ᾽ αὐτοῦ·
39 Biso, tozali batatoli ya makambo nyonso oyo Yesu asalaki kati na mokili ya Bayuda mpe kati na Yelusalemi. Babomaki Ye mpe babakaki Ye na ekulusu,
καὶ ἡμεῖς ἐσμεν μάρτυρες πάντων ὧν ἐποίησεν ἔν τε τῇ χώρᾳ τῶν Ἰουδαίων καὶ ἐν Ἱερουσαλήμ· ὃν καὶ ἀνεῖλον κρεμάσαντες ἐπὶ ξύλου.
40 kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi, na mokolo ya misato, mpe asalaki ete amonana lisusu.
τοῦτον ὁ Θεὸς ἤγειρε τῇ τρίτῃ ἡμέρᾳ καὶ ἔδωκεν αὐτὸν ἐμφανῆ γενέσθαι,
41 Amonanaki na bato nyonso te, kasi na batatoli oyo Nzambe apona wuta kala, na biso oyo toliaki mpe tomelaki elongo na Ye, sima na Ye kosekwa kati na bakufi.
οὐ παντὶ τῷ λαῷ, ἀλλὰ μάρτυσι τοῖς προκεχειροτονημένοις ὑπὸ τοῦ Θεοῦ, ἡμῖν, οἵτινες συνεφάγομεν καὶ συνεπίομεν αὐτῷ μετὰ τὸ ἀναστῆναι αὐτὸν ἐκ νεκρῶν·
42 Apesaki biso mitindo ya koteya bato mpe kotatola ete Ye nde Nzambe apona lokola Mosambisi ya bato ya bomoi mpe bakufi.
καὶ παρήγγειλεν ἡμῖν κηρῦξαι τῷ λαῷ καὶ διαμαρτύρασθαι ὅτι αὐτός ἐστιν ὁ ὡρισμένος ὑπὸ τοῦ Θεοῦ κριτὴς ζώντων καὶ νεκρῶν.
43 Basakoli nyonso batatolaki na tina na Ye ete moto nyonso oyo akondimela Ye akozwa bolimbisi ya masumu na nzela ya Kombo na Ye.
τούτῳ πάντες οἱ προφῆται μαρτυροῦσιν, ἄφεσιν ἁμαρτιῶν λαβεῖν διὰ τοῦ ὀνόματος αὐτοῦ πάντα τὸν πιστεύοντα εἰς αὐτόν.
44 Wana Petelo azalaki nanu koloba, Molimo Mosantu akitelaki bato nyonso oyo bazalaki koyoka Liloba.
Ἔτι λαλοῦντος τοῦ Πέτρου τὰ ῥήματα ταῦτα ἐπέπεσε τὸ Πνεῦμα τὸ Ἅγιον ἐπὶ πάντας τοὺς ἀκούοντας τὸν λόγον.
45 Bandimi oyo bazalaki bakatama ngenga, oyo bayaki elongo na Petelo wuta na Jafa, bakamwaki mingi komona ete Nzambe asopi likabo ya Molimo Mosantu epai ya bato ya bikolo ya bapaya.
καὶ ἐξέστησαν οἱ ἐκ περιτομῆς πιστοὶ ὅσοι συνῆλθον τῷ Πέτρῳ, ὅτι καὶ ἐπὶ τὰ ἔθνη ἡ δωρεὰ τοῦ Ἁγίου Πνεύματος ἐκκέχυται·
46 Pamba te bayokaki bango koloba na nkota mosusu mpe kokumisa Nzambe. Bongo Petelo alobaki:
ἤκουον γὰρ αὐτῶν λαλούντων γλώσσαις καὶ μεγαλυνόντων τὸν Θεόν.
47 — Solo, moto moko te akoki koboya ete bazwa libatisi ya mayi. Bazwi Molimo Mosantu ndenge kaka biso tozwaki.
τότε ἀπεκρίθη ὁ Πέτρος· μήτι τὸ ὕδωρ κωλῦσαι δύναταί τις τοῦ μὴ βαπτισθῆναι τούτους, οἵτινες τὸ Πνεῦμα τὸ Ἅγιον ἔλαβον καθὼς καὶ ἡμεῖς;
48 Boye, Petelo apesaki mitindo ete babatisa bango na Kombo na Yesu-Klisto. Bongo, basengaki na Petelo ete avanda elongo na bango mpo na mwa mikolo.
προσέταξέ τε αὐτοὺς βαπτισθῆναι ἐν τῷ ὀνόματι τοῦ Κυρίου. τότε ἠρώτησαν αὐτὸν ἐπιμεῖναι ἡμέρας τινάς.