< 3 Yoane 1 >
1 Ngai mpaka; Epai ya Gayusi, molingami na ngai, oyo nalingaka kati na solo.
THE presbyter to the beloved Gaius, whom I love in the truth.
2 Molingami na ngai, posa makasi ya motema na ngai ezali ete okende liboso na makambo na yo nyonso, mpe ozala na nzoto kolongono, ndenge molimo na yo ezali kokola.
Beloved, above all things I pray that thou mayest prosper, and be in sound health of body, even as thy soul prospereth.
3 Nasepelaki makasi koyoka litatoli na tina na yo, na monoko ya bandeko oyo bayaki wuta epai na yo, ete ozali kokoba kokangama na bosolo, mpe ozali kobika kolanda bosolo yango.
I rejoiced greatly when the brethren came, and bore witness to thy truth, even as thou walkest in the truth.
4 Nazalaka na esengo makasi tango nayokaka ete bana na ngai bazali kobika kolanda bosolo.
I have no greater joy than these tidings, that I hear my own children are walking in the truth.
5 Molingami na ngai, makambo oyo osalaka mpo na bandeko kati na kondima, ezala mpo na ba-oyo bazali bapaya na miso na yo, osalaka yango penza kolanda kondima na yo.
Beloved, thou doest faithfully whatsoever services thou performest for the brethren, and for strangers;
6 Batatolaki na miso ya Lingomba na tina na bolingo na yo. Bongo, okosala lisusu malamu koleka soki osungi bango, na lolenge oyo ekosepelisa Nzambe, mpo ete bakoba mobembo na bango.
who have borne testimony to thy love before the church; to whom thou wilt perform a good act of service in forwarding them on their journey, in a manner worthy of God.
7 Pamba te ezali mpo na kosakola Klisto nde bazali kotambola mpe koboya kozwa lisungi na maboko ya Bapagano.
For on account of his name they went forth, receiving nothing from the heathen.
8 Boye, tosengeli kosunga bato ya lolenge oyo mpo ete tosangana na bango na makambo oyo bazali kosala mpo na solo.
We therefore ought to assist such men, that we may become fellow-labourers in the truth.
9 Nakomelaki Lingomba mokanda moko ya mokuse; kasi Diotrefi, oyo alingaka kaka kozala mokonzi na makambo nyonso, akoyamba biso te.
I wrote unto the church: but Diotrephes, who affects pre-eminence over them, receiveth us not.
10 Yango wana, tango nakoya, nakobimisa mabe na ye na polele; azali koloba makambo ya mabe mpe ya lokuta na tina na biso. Mpe asuki kaka wana te, azali ata koboya koyamba bandimi mosusu, azali kopekisa, kotelemela mpe kobengana na Lingomba, bato oyo bandimi koyamba bango.
Therefore if I come I will remember his works which he doth, with wicked words prating against us; and not content with these things, neither doth he himself receive the brethren, and those who are willing he hindereth, and casteth them out of the church.
11 Molingami na ngai, komekolaka mabe te, mekolaka nde bolamu. Moto oyo asalaka bolamu azali ya Nzambe, kasi moto oyo asalaka mabe ayebi Nzambe te.
Beloved, be not an imitator of what is evil, but of that which is good. He that doeth good is of God, but he that doeth evil hath not seen God.
12 Bato nyonso bazali kopesa litatoli ya malamu na tina na Demetriusi, ezala yango moko bosolo ezali mpe kopesa litatoli ya malamu na tina na ye. Biso mpe tozali kopesa litatoli ya malamu na tina na ye, mpe oyebi malamu ete litatoli na biso ezalaka ya solo.
Demetrius hath a good testimony from all men, and from the truth itself: and we also bear our testimony, and ye know that our testimony is true.
13 Nazali lisusu na makambo ebele ya kokomela yo, kasi naboyi kosala yango na nzela ya ekomeli mpe ya mayi na yango.
I had many things to write; but I would not write to thee with ink and pen:
14 Nazali kolikya komona yo kala mingi te, bongo tokosolola malamu. Tika ete kimia ezala na yo! Balingami ya awa bapesi yo mbote. Pesa mpe balingami ya kuna mbote, moko na moko na kombo na ye.
but I hope shortly to see thee, and we shall speak mouth to mouth. Peace be to thee. The friends salute thee. Salute the friends by name.