< 2 Timote 1 >

1 Ngai Polo, ntoma ya Yesu-Klisto, kolanda mokano ya Nzambe, mpo na kosakola bomoi oyo Nzambe alaka kati na Yesu-Klisto;
하나님의 뜻으로 말미암아 그리스도 예수 안에 있는 생명의 약속대로 그리스도 예수의 사도 된 바울은
2 Epai ya Timote, mwana na ngai ya bolingo: Tika ete ngolu, boboto mpe kimia epesamela yo kowuta na Nzambe Tata mpe na Yesu-Klisto, Nkolo na biso!
사랑하는 아들 디모데에게 편지하노니 하나님 아버지와 그리스도 예수 우리 주께로부터 은혜와 긍휼과 평강이 네게 있을지어다
3 Nazali kozongisa matondi epai ya Nzambe oyo nasalelaka na motema peto ndenge bakoko na ngai bazalaki kosala, pamba te tango nyonso, ezala butu to moyi, nabosanaka yo te na mabondeli na ngai.
나의 밤낮 간구하는 가운데 쉬지 않고 너를 생각하여 청결한 양심으로 조상적부터 섬겨 오는 하나님께 감사하고
4 Tango nakanisaka mpinzoli na yo, nakomaka na posa makasi ya komona yo mpo ete natondisama na esengo.
네 눈물을 생각하여 너 보기를 원함은 내 기쁨이 가득하게 하려함이니
5 Nakanisaka bosolo ya kondima na yo, oyo Loyisi, koko na yo ya mwasi, mpe Enise, mama na yo, bazalaki na yango, kondima oyo nandimisami solo ete ezali mpe kati na yo.
이는 네 속에 거짓이 없는 믿음을 생각함이라 이 믿음은 먼저 네 외조모 로이스와 네 어머니 유니게 속에 있더니 네 속에도 있는 줄을 확신하노라
6 Yango wana nazali kolendisa yo ete olamusa lisusu likabo oyo Nzambe apesaki yo tango natiaki yo maboko.
그러므로 내가 나의 안수함으로 네 속에 있는 하나님의 은사를 다시 불일듯 하게 하기 위하여 너로 생각하게 하노니
7 Pamba te Molimo oyo Nzambe apesa biso akomisaka biso te bato ya kobanga-banga, kasi apesaka biso makasi, bolingo mpe mayele.
하나님이 우리에게 주신 것은 두려워하는 마음이 아니요 오직 능력과 사랑과 근신하는 마음이니
8 Boye, koyoka soni te mpo na kotatola na tina na Nkolo na biso to mpe na tina na ngai oyo nakangami na boloko mpo na Ye, kasi mona pasi elongo na ngai mpo na Sango Malamu kolanda makasi oyo Nzambe azali kopesa yo,
그러므로 네가 우리 주의 증거와 또는 주를 위하여 갇힌 자 된 나를 부끄러워 말고 오직 하나님의 능력을 좇아 복음과 함께 고난을 받으라!
9 pamba te abikisaki biso mpe abengaki biso mpo ete totambola na bomoi ya bule. Mpe soki asalaki bongo, ezali te mpo na misala na biso, kasi ezali nde mpo na mabongisi mpe ngolu na Ye moko kaka, ngolu oyo apesaki biso kati na Yesu-Klisto liboso ya ebandeli ya tango. (aiōnios g166)
하나님이 우리를 구원하사 거룩하신 부르심으로 부르심은 우리의 행위대로 하심이 아니요 오직 자기 뜻과 영원한 때 전부터 그리스도 예수 안에서 우리에게 주신 은혜대로 하심이라 (aiōnios g166)
10 Nzokande ngolu yango emonani sik’oyo na nzela ya koya ya Yesu-Klisto, Mobikisi na biso, oyo asilisaki nguya ya kufa mpe atalisaki bosolo ya bomoi ya seko na nzela ya Sango Malamu.
이제는 우리 구주 그리스도 예수의 나타나심으로 말미암아 나타났으니 저는 사망을 폐하시고 복음으로써 생명과 썩지 아니할 것을 드러내신지라
11 Ezali mpo na Sango Malamu yango nde Nzambe atiaki ngai moteyi, ntoma mpe molakisi.
내가 이 복음을 위하여 반포자와 사도와 교사로 세우심을 입었노라
12 Ezali mpe mpo na Sango Malamu yango nde nazali komona pasi oyo. Kasi atako bongo, nazali koyoka soni te, pamba te nayebi nani oyo ngai nandimela, mpe nazali na elikya ete azali na makoki ya kobatela nyonso oyo apesa ngai, kino na mokolo wana.
이를 인하여 내가 또 이 고난을 받되 부끄러워하지 아니함은 나의 의뢰한 자를 내가 알고 또한 나의 의탁한 것을 그 날까지 저가 능히 지키실 줄을 확신함이라
13 Kamata lokola ndakisa, mateya ya sembo oyo nateyaki yo mpe salela yango kolanda kondima mpe bolingo oyo tozali na yango kati na Yesu-Klisto.
너는 그리스도 예수 안에 있는 믿음과 사랑으로써 내게 들은 바 바른 말을 본받아 지키고
14 Batela yango malamu lokola bomengo, na lisungi ya Molimo Mosantu oyo avandaka kati na biso.
우리 안에 거하시는 성령으로 말미암아 네게 부탁한 아름다운 것을 지키라
15 Oyebi malamu ete bato nyonso oyo bazali kati na mokili ya Azia bakimaki ngai; kati na bango, tozali na Fijele mpe Erimojene.
아시아에 있는 모든 사람이 나를 버린 이 일을 네가 아나니 그 중에 부겔로와 허모게네가 있느니라
16 Tika ete Nkolo atalisa ngolu na Ye epai ya libota ya Onezifore, pamba te abondisaki ngai mbala mingi mpe ayokaki soni te mpo na minyololo na ngai.
원컨대 주께서 오네시보로의 집에 긍휼을 베푸시옵소서! 저가 나를 자주 유쾌케 하고 나의 사슬에 매인 것을 부끄러워 아니하여
17 Kutu tango akomaki na Rome, asalaki nyonso mpo na koluka ngai kino amonaki ngai.
로마에 있을 때에 나를 부지런히 찾아 만났느니라
18 Tika ete, na mokolo wana, Nkolo atalisa ngolu na Ye epai ya Onezifore! Oyebi lisusu malamu ndenge nini asungaki ngai kati na Efeso.
(원컨대 주께서 저로 하여금 그 날에 주의 긍휼을 얻게 하여 주옵소서) 또 저가 에베소에서 얼만큼 나를 섬긴 것을 네가 잘 아느니라

< 2 Timote 1 >