< 2 Timote 4 >
1 Yango wana, liboso ya Nzambe mpe ya Yesu-Klisto oyo akosambisa bato ya bomoi mpe bakufi, mpe na makanisi ya kolengela koya na Ye mpe ya Bokonzi na Ye, nazali kopesa yo mitindo oyo:
I ADJURE thee therefore before God, and the Lord Jesus Christ, who shall judge the living and the dead at his appearing and his kingdom;
2 teya Liloba, betela yango sete na tango ya malamu to te, zongisa na nzela, pamela mpe lendisa na nzela ya mateya na yo mpe na kokanga motema.
preach the word, be urgent, in season, out of season; reprove, enjoin, exhort with all long suffering and doctrine.
3 Pamba te na mikolo ekoya, bato bakolinga lisusu te koyoka mateya ya solo, kasi bakomilukela bango moko, kolanda baposa na bango, bateyi oyo bakoyebisa bango makambo oyo matoyi na bango esepelaka koyoka;
For the time will come when they will not endure sound doctrine; but after their own inclinations will set up a herd of teachers for themselves, having the itch of hearing;
4 bakoboya koyoka mateya ya solo mpe bakomipesa makasi na koyoka masapo.
and will turn away their ears from the truth, and listen unto fables.
5 Kasi yo, zala na ekenge na makambo nyonso, yikela pasi mpiko, sala mosala ya mopanzi Sango Malamu, kokisa malamu lotomo na yo.
But watch thou in all things, endure hardship, do the work of an evangelist, fully discharge thy ministry.
6 Pamba te nakomi pene ya kokaba bomoi na ngai lokola mbeka ya masanga mpo na Nzambe, mpe tango na ngai ya kotika mokili oyo ekoki.
For I am now ready to be sacrificed, and the time of my dissolution approaches.
7 Nabundi etumba na ngai malamu, nakomi na suka ya lisano na ngai ya kokima mbangu, nabateli kondima.
I have struggled hard in the honourable contest, I have finished the race, I have kept the faith:
8 Sik’oyo, Nzambe abombeli ngai motole ya bosembo, oyo Nkolo, Mosambisi ya sembo, akopesa ngai na mokolo wana: akopesa yango na ngai kaka te, kasi mpe na bato nyonso oyo balingaka boyei na Ye.
henceforth there is laid up for me a crown of righteousness, which the Lord, the righteous Judge, shall give me at that day: yet not to me only, but also to all who have loved his appearing.
9 Sala makasi ete oya noki epai na ngai.
Hasten to come to me shortly:
10 Pamba te Demasi asundolaki ngai: alingaki mokili oyo mpe akendeki na Tesalonika; Kresasi akendeki na Galatia, mpe Tito akendeki na Dalimatia. (aiōn )
for Demas hath forsaken me, having loved this present world, and is gone unto Thessalonica; Crescens to Galatia; Titus to Dalmatia. (aiōn )
11 Kaka Luka nde azali elongo na ngai. Kamata Malako, mpe boya elongo na ye, pamba te azali na tina mingi epai na ngai mpo na lotomo.
Luke alone is with me. Take Mark, and bring him with thee; for he is very useful to me in the ministry.
12 Natindaki Tishike na Efeso.
But Tychicus I have sent to Ephesus.
13 Tango okoya, memela ngai kazaka oyo natikaki na Troasi epai ya Karipisi; memela ngai mpe babuku na ngai, mingi-mingi babuku oyo basala na poso ya banyama.
The cloke which I left behind me at Troas with Carpus, when thou comest bring, and the books, especially the parchments.
14 Alekizandre, monyangwisi bibende, asalaki ngai mabe mingi. Nkolo akofuta ye kolanda misala na ye.
Alexander the brazier did me many ill offices: the Lord repay him according to his works:
15 Yo mpe sala keba liboso na ye, pamba te atelemelaki makasi mateya na biso.
against whom be thou also on thy guard, for he hath greatly resisted our words.
16 Tango nasambaki mpo na mbala ya liboso, moto ata moko te azalaki wana mpo na kosunga ngai; bango nyonso basundolaki ngai. Tika ete Nzambe atangela bango yango te!
At my first apology no man stood by me, but all forsook me: (may it not be imputed to them!)
17 Ezali Nkolo nde atelemaki pembeni na ngai mpe apesaki ngai nguya mpo ete, na nzela na ngai, mateya eteyama na mobimba na yango nyonso, mpe mpo ete Bapagano bayoka yango. Mpe akangolaki ngai wuta na monoko ya nkosi.
but the Lord stood by me, and strengthened me, that by me the preaching might be fully discharged, and that all the Gentiles might hear; and I was snatched out of the lion’s mouth.
18 Nayebi solo ete Nkolo akokoba kokangola ngai wuta na misala nyonso ya mabe mpe akobikisa ngai mpo na Bokonzi na Ye ya Likolo. Tika ete nkembo ezonga epai na Ye mpo na libela na libela! Amen. (aiōn )
And the Lord will deliver me from every evil work, and preserve me for his celestial kingdom: to whom be glory for ever and ever. Amen. (aiōn )
19 Pesa mbote na Prisika, na Akilasi mpe na libota ya Onezifore.
Salute Priscilla and Aquila, and the house of Onesiphorus.
20 Erasite atikalaki na Kolinto, mpe natikaki Trofime azali kobela na Mile.
Erastus hath abode at Corinth: but Trophimus I left behind me at Miletum sick.
21 Sala makasi ete okoma awa liboso ete tango ya malili makasi ebanda. Ebilisi, Pidesi, Linisi, Klodia mpe bandeko nyonso bapesi yo mbote.
Hasten to come before winter. Eubulus greeteth thee, and Pudens, and Linus, and Claudia, and all the brethren.
22 Tika ete Nkolo azala elongo na molimo na yo! Tika ete ngolu ezala na bino nyonso!
The Lord Jesus Christ be with thy spirit. Grace be with you. Amen. The second epistle to Timothy, appointed the first bishop of the Ephesian church, was written from Rome, when the second time Paul stood before the Caesar Nero.