< 2 Timote 3 >
1 Kasi yeba malamu ete mikolo ya suka ekozala mikolo ya pasi:
But know this, that in the last days trying times will come.
2 bato bakokoma na lokoso ya mbongo, bakokoma miyimi, lolendo, lofundu; bakokoma kofinga Nzambe, kozanga botosi epai ya baboti na bango, koboya kozongisa matondi, kozanga limemia mpo na biloko ya bule,
For men will be lovers of themselves, lovers of money, boasters, proud, revilers, disobedient to parents, unthankful, unholy,
3 kozanga bolingo, kozanga mawa, kokosela baninga makambo, kozanga makoki ya komikanga, bato na kanza, banguna ya bolamu,
without natural affection, implacable, false accusers, intemperate, fierce, haters of those who are good,
4 bateki baninga, bato ya mitema mikuse, bato na komitombola, bato balinga bisengo na esika ya kolinga Nzambe;
traitors, rash, conceited, lovers of pleasures more than lovers of God,
5 bakobanda komilakisa lokola nde bazali na botosi kati na makambo ya Nzambe, nzokande bawanganaka nguya na yango. Kima bato ya lolenge wana!
having a form of godliness, but denying its power: from these also turn away.
6 Bamosusu kati na bango bakotaka na bandako ya bato mpe bakosaka basi ya pete oyo batonda na masumu mpe bamitikaka na lolenge nyonso ya baposa ya nzoto,
For of this sort are those who worm themselves into houses, and lead captive silly women that are laden with sins, and influenced by various desires,
7 oyo balukaka tango nyonso koyekola kasi bakokaka ata moke te koyeba solo.
that are always learning, and never able to come to the knowledge of the truth.
8 Ndenge Janesi mpe Jambresi batelemelaki Moyize, ndenge wana mpe bato wana batelemelaka solo. Bazali bato oyo makanisi na bango esila kobeba mpe kondima na bango esila kokufa.
Now as Jannes and Jambres withstood Moses, so these also will withstand the truth; men corrupt in mind, rejected as it respects the faith.
9 Kasi bakokende mosika te, pamba te bozoba na bango ekomonana na miso ya bato nyonso, ndenge ezalaki mpo na mibali wana mibale.
But they shall proceed no further; for their madness shall be manifest to all, as was the madness of those men.
10 Nzokande yo oyebi nyonso na tina na mateya na ngai, bizaleli, makanisi, kondima, kokanga motema, bolingo, mpiko,
But you have fully known my teaching, my course of life, my purpose, my faithfulness, my long-suffering, my love, my patience,
11 minyoko mpe pasi na ngai; oyebi makambo nyonso oyo ekomelaki ngai na Antioshe, na Ikoniomi mpe na Listre. Solo, nanyokwamaki makasi, kasi Nkolo akangolaki ngai wuta na nyonso.
my persecutions, my sufferings which came upon me in Antioch, in Iconium, in Lystra; you well know what persecutions I endured: and yet out of them all, the Lord delivered me.
12 Solo, bato nyonso oyo balingi kotambola na botosi kati na Yesu-Klisto bakonyokolama.
And all that will live godly in Christ Jesus, shall suffer persecution.
13 Kasi bato mabe mpe ba-oyo bakosaka baninga bakozala kozinda kati na mabe, kokosa bato mosusu, mpe bango moko bakokosa bango.
But evil men and impostors will become worse and worse, deceiving, and being deceived.
14 Kasi yo, kangama kaka na makambo oyo oyekolaki mpe ondimaki, pamba te oyebi epai ya nani oyekolaki yango;
But do you continue in the things which you have learned and well understood, knowing from whom you learned them,
15 mpe wuta bomwana na yo, oyebi Makomi ya bule oyo ezali na makoki ya kopesa yo bwanya oyo ememaka na lobiko na nzela ya kondima kati na Yesu-Klisto.
and that from a child you have known the holy scriptures, which are able to make you wise in order to salvation, through faith that is in Christ Jesus.
16 Makomi nyonso ekomama na nguya ya Nzambe mpe ezali na tina mpo na koteya, kopamela, kozongisa na nzela mpe kolakisa bato kotambola kolanda bosembo,
All scripture is given by inspiration of God, and is profitable for teaching, for reproof, for correction, for instruction in righteousness,
17 mpo ete moto na Nzambe azala ya kokoka mpe ya kobongisama mpo na kosala misala nyonso ya malamu.
that the man of God may be perfect, thoroughly furnished for every good work.