< 2 Timote 2 >

1 Mwana na ngai, zala makasi kati na ngolu oyo ezali kati na Yesu-Klisto.
Vi do, mia filo, fortikiĝu en la graco, kiu estas en Kristo Jesuo.
2 Makambo oyo oyokaki epai na ngai liboso ya batatoli ebele, teya yango na bato ya sembo oyo bazali na makoki ya koteya yango lisusu na bato mosusu.
Kaj kion vi de mi aŭdis inter multaj atestantoj, tion transdonu al fidelaj homoj, kompetentaj instrui ankaŭ aliajn.
3 Mona pasi elongo na ngai lokola soda ya mpiko ya Yesu-Klisto.
Vi do elportu suferojn, kiel bona militisto de Jesuo Kristo.
4 Moto oyo akoti na mosala ya soda amipesaka te na makambo ya bato oyo bazali basoda te mpo na kosepelisa mokonzi na ye ya mampinga.
Neniu militanto sin implikas en la aferojn de ĉi tiu vivo; por ke li plaĉu al sia varbinto.
5 Ezali mpe ndenge moko mpo na moto oyo azali kosala lisano ya kokima mbangu: akoki te kozwa motole soki akimi mbangu te kolanda mibeko ya lisano.
Kaj se iu konkuras kiel atleto, li ne estas kronata, se li ne laŭregule konkuris.
6 Moloni elanga oyo asalaka makasi asengeli kozala moto ya liboso mpo na kobuka bambuma.
La laboranta terkultivisto devas la unua partopreni en la fruktoj.
7 Kanisaka malamu na tina na makambo oyo nazali koloba, mpe Nkolo akopesa yo makoki ya kososola yango nyonso.
Konsideru tion, kion mi diras; ĉar la Sinjoro donos al vi komprenon pri ĉio.
8 Kanisaka Yesu-Klisto, mokitani ya Davidi, oyo asekwaki kati na bakufi, kolanda Sango Malamu oyo nateyaka.
Memoru Jesuon Kriston, levitan el la mortintoj, el la idaro de David, laŭ mia evangelio;
9 Ezali mpe mpo na Sango Malamu yango nde nazali komona pasi kino bakanga ngai minyololo lokola mobomi, kasi bakangi Liloba na Nzambe minyololo te.
en ĝi mi elportas suferadon ĝis ligiloj, kiel krimulo, sed la vorto de Dio ne estas ligita.
10 Yango wana nazali koyikela makambo nyonso mpiko mpo na bolamu ya bato oyo Nzambe apona, mpo ete bango mpe bazwa lobiko oyo ezali kati na Yesu-Klisto, elongo na nkembo ya seko. (aiōnios g166)
Tial mi suferas ĉion pro la elektitoj, por ke ili ankaŭ atingu la en Kristo Jesuo savon kun gloro eterna. (aiōnios g166)
11 Maloba oyo ezali ya solo: Soki tokufi elongo na Ye, tokozala mpe na bomoi elongo na Ye.
Fidinda estas la diro: Ĉar se ni mortis kun li, ni ankaŭ vivos kun li;
12 Soki toyiki mpiko, tokokonza mpe elongo na Ye. Kasi soki towangani Ye, Ye mpe akowangana biso;
se ni suferas, ni ankaŭ reĝos kun li; se ni malkonfesos lin, li ankaŭ nin malkonfesos;
13 soki tozangi kondima, Ye azalaka kaka Moyengebene, pamba te akoki komiwangana te.
se ni malfidas, li restas fidela; ĉar li ne povas malkonfesi sin mem.
14 Yango nde makambo oyo osengeli koloba mbala na mbala epai ya bato, na kopesa bango mitindo liboso ya Nzambe ete batika koswana na tina na maloba; ezali na tina moko te, soki kaka te komema bato oyo bayokaka yango na libebi.
Memorigu ilin pri tio, admonante ilin antaŭ la Sinjoro, ke ili ne vortobatalu, kio estas neniel utila, kun risko de ŝancelo por la aŭdantoj.
15 Sala makasi ete omimonisa liboso ya Nzambe lokola moto ya kokoka, lokola mosali oyo ayokelaka mosala na ye soni te, pamba te ateyaka na bosembo Liloba ya solo.
Klopodu prezenti vin ĉe Dio kiel aprobita, laboranto senriproĉa, ĝuste pritaksante la vorton de la vero.
16 Kima masolo oyo ezanga tina mpe efingaka Nzambe, pamba te ememaka bato oyo bamipesaka na yango mosika na Nzambe.
Sed evitu profanajn babiladojn; ĉar ili iros antaŭen al pli multe da malpieco,
17 Mateya na bango eliaka nzoto lokola pota oyo ezali na tofina. Kati na bango, tozali na Imene mpe Filete
kaj ilia parolo dismordos kiel gangreno; el kiuj estas Himeneo kaj Fileto,
18 oyo basila kotika nzela ya solo. Bazali koloba ete lisekwa esili kosalema mpe bazali kokweyisa kondima ya bandimi mosusu.
kiuj pri la vero eraris, dirante, ke la releviĝo estas jam pasinta; kaj ili renversas la fidon de kelkaj.
19 Nzokande moboko makasi oyo Nzambe asila kotia ezali kaka ngwi; batobola makomi oyo na likolo na yango lokola kashe: « Nkolo ayebi bato na Ye, » mpe « Moto nyonso oyo atatolaka Kombo ya Nkolo asengeli koboya mabe. »
Tamen la firma fundamento de Dio staras, havante la jenan sigelon: La Sinjoro konas tiujn, kiuj estas liaj, kaj: Foriru de maljusteco ĉiu, kiu nomas la nomon de la Sinjoro.
20 Kati na ndako ya monene, ezalaka kaka te na basani ya wolo mpe ya palata, kasi ezalaka mpe na basani oyo basala na nzete to na mabele. Basani ya wolo mpe ya palata ezalaka mpo na koyamba bato ya lokumu, kasi basani ya nzete mpe ya mabele ezalaka mpo na misala ya bongo na bongo.
Sed en granda domo estas vazoj ne nur oraj kaj arĝentaj, sed ankaŭ lignaj kaj argilaj, kaj unuj por honoro kaj aliaj por malhonoro.
21 Soki moto amibateli peto na makambo nyonso oyo nawuti koloba, akozala lokola sani oyo babongisi mpo na koyamba bato ya lokumu, akozala bule, moto na tina mpo na Nkolo mpe moto oyo babongisi mpo na misala nyonso ya malamu.
Se do iu purigos sin de ĉi tiuj, li estos vazo por honoro, sanktigita, taŭga por la mastro, pretigita por ĉiu bona laboro.
22 Kima baposa mabe ya bolenge mpe luka bosembo, kondima, bolingo mpe kimia elongo na bato oyo babelelaka Nkolo na motema ya peto.
Sed forkuru de junulaj voluptoj, kaj sekvu justecon, fidon, amon, pacon, kune kun tiuj, kiuj vokas la Sinjoron el pura koro.
23 Kima masolo ya tembe ya bozoba mpe ezanga tina, pamba te oyebi malamu ete esukaka kaka na koswana.
Sed malsaĝajn kaj neklerajn demandojn evitu, sciante, ke ili naskas malpacojn.
24 Mpe ezali malamu te mpo na mosali ya Nkolo kozala moto oyo aswanaka na bato, kasi asengeli nde kozala moto ya boboto epai ya bato nyonso, moto oyo azali na makoki ya kopesa malakisi, ya kokanga motema
Kaj la servisto de la Sinjoro devas ne malpaci, sed esti afabla al ĉiuj, instruema, tolerema,
25 mpe ya koteya na boboto bato oyo babendanaka na ye; asengeli kozala na elikya ete Nzambe akosalela bango ngolu ya kobongola mitema mpo ete bayeba solo.
en humileco instruante tiujn, kiuj kontraŭstaras; eble Dio donos al ili penton, por ke ili venu al scio de la vero,
26 Bongo bakozongela mayele na bango ya malamu mpe bakolongwa na motambo ya Satana oyo akanga bango na boloko mpo ete basala kaka mokano na ye.
kaj por ke ili sobraj eliĝu el la kaptilo de la diablo, kaptite de li, por plenumi lian volon.

< 2 Timote 2 >