< 2 Batesalonika 3 >
1 Bandeko, bobondelaka mpo na biso na tina na makambo mosusu, mpo ete Liloba na Nkolo epanzana noki mpe epesamela lokumu ndenge ezalaki kozwa lokumu epai na bino.
ⲁ̅ⲧⲉⲛⲟⲩ ⲇⲉ ⲛⲉⲥⲛⲏⲩ ϣⲗⲏⲗ ϩⲁⲣⲟⲛ ϫⲉⲕⲁⲥ ⲉⲣⲉⲡϣⲁϫⲉ ⲙⲡϫⲟⲉⲓⲥ ⲙⲟⲟϣⲉ ⲁⲩⲱ ⲛϥϫⲓⲉⲟⲟⲩ ⲕⲁⲧⲁ ⲑⲉ ⲉⲛⲧⲁϥϫⲓ ϩⲁⲧⲉ ⲧⲏⲩⲧⲛ
2 Bobondelaka mpe mpo ete Nzambe akangola biso wuta na maboko ya bato mabe mpe ya batomboki, pamba te bato nyonso bazali na kondima te.
ⲃ̅ⲁⲩⲱ ϫⲉⲕⲁⲥ ⲉⲛⲉⲛⲟⲩϩⲙ ⲉⲃⲟⲗ ϩⲓⲧⲟⲟⲧⲟⲩ ⲛⲛⲣⲱⲙⲉ ⲉⲧϣⲧⲣⲧⲱⲣ ⲁⲩⲱ ⲙⲡⲟⲛⲏⲣⲟⲥ ⲧⲡⲓⲥⲧⲓⲥ ⲅⲁⲣ ⲛⲧⲁⲟⲩⲟⲛ ⲛⲓⲙ ⲁⲛ ⲧⲉ
3 Kasi Nkolo azali sembo, akopesa bino makasi mpe akobatela bino liboso ya Satana.
ⲅ̅ⲟⲩⲡⲓⲥⲧⲟⲥ ⲇⲉ ⲡⲉ ⲡϫⲟⲉⲓⲥ ⲡⲁⲓ ⲉⲧⲛⲁⲧⲁϫⲣⲉ ⲧⲏⲩⲧⲛ ⲁⲩⲱ ⲛϥϩⲁⲣⲉϩ ⲉⲣⲱⲧⲛ ⲉⲡⲡⲟⲛⲏⲣⲟⲥ
4 Tondimisami kati na Nkolo ete bozali kosala mpe bokokoba kosala makambo nyonso oyo tozali kotinda bino.
ⲇ̅ⲧⲛⲛⲁϩⲧⲉ ⲇⲉ ϩⲙ ⲡϫⲟⲉⲓⲥ ϩⲁⲣⲱⲧⲛ ϫⲉ ⲛⲉⲧⲛⲟⲩⲉϩⲥⲁϩⲛⲉ ⲙⲙⲟⲟⲩ ⲛⲏⲧⲛ ⲁⲧⲉⲧⲛⲁⲁⲩ ⲁⲩⲱ ⲧⲉⲧⲛⲉⲓⲣⲉ ⲙⲙⲟⲟⲩ ⲁⲩⲱ ⲧⲉⲧⲛⲁⲁⲁⲩ
5 Tika ete Nkolo akamba mitema na bino kino na bolingo ya Nzambe mpe na molende ya Klisto!
ⲉ̅ⲡϫⲟⲉⲓⲥ ⲇⲉ ⲉϥⲉⲥⲟⲟⲩⲧⲛ ⲛⲛⲉⲧⲛϩⲏⲧ ⲉϩⲟⲩⲛ ⲉⲧⲁⲅⲁⲡⲏ ⲙⲡⲛⲟⲩⲧⲉ ⲁⲩⲱ ⲉⲑⲩⲡⲟⲙⲟⲛⲏ ⲙⲡⲉⲭⲥ
6 Bandeko, totindi bino na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto ete bokima ndeko nyonso oyo atambolaka na bomoi ya mobulu mpe alingaka te kotambola kolanda malakisi oyo bozwaki kowuta na biso.
ⲋ̅ⲧⲛⲡⲁⲣⲁⲅⲅⲉⲓⲗⲉ ⲇⲉ ⲛⲏⲧⲛ ⲛⲉⲥⲛⲏⲩ ϩⲙ ⲡⲣⲁⲛ ⲙⲡⲉⲛϫⲟⲉⲓⲥ ⲓⲏⲥ ⲡⲉⲭⲥ ⲉⲥⲁϩⲉ ⲧⲏⲩⲧⲛ ⲉⲃⲟⲗ ⲛⲥⲟⲛ ⲛⲓⲙ ⲉⲧⲙⲟⲟϣⲉ ⲁⲧⲁⲕⲧⲱⲥ ⲁⲩⲱ ⲉⲛⲕⲁⲧⲁ ⲧⲉⲥⲃⲱ ⲁⲛ ⲉⲛⲧⲁⲧⲉⲧⲛϫⲓⲧⲥ ⲛⲧⲟⲟⲧⲛ
7 Pamba te boyebi bino moko ndenge nini bosengeli kolanda ndakisa na biso. Tango tozalaki elongo na bino, tozalaki bagoyigoyi te
ⲍ̅ⲛⲧⲱⲧⲛ ⲅⲁⲣ ⲧⲉⲧⲛⲥⲟⲟⲩⲛ ϫⲉ ϣϣⲉ ⲛⲁϣ ⲛϩⲉ ⲉⲧⲛⲧⲛ ⲧⲏⲩⲧⲛ ⲉⲣⲟⲛ ϫⲉ ⲙⲡⲛⲁⲧⲁⲕⲧⲓ ⲛϩⲏⲧ ⲧⲏⲩⲧⲛ
8 mpe toliaki epai ya moto moko te bilei ya ofele; kasi tozalaki, butu mpe moyi, kosala mosala ya makasi mpe ya pasi, mpo ete topesa mokumba na biso epai ya moto moko te kati na bino.
ⲏ̅ⲟⲩⲇⲉ ⲙⲡⲛⲟⲩⲉⲙ ⲟⲩⲟⲉⲓⲕ ⲛϫⲓⲛϫⲏ ⲛⲧⲛ ⲟⲩⲁ ⲁⲗⲗⲁ ϩⲛ ⲟⲩϩⲓⲥⲉ ⲙⲛ ⲟⲩⲙⲕⲁϩ ⲉⲛⲣϩⲱⲃ ⲛⲧⲉⲩϣⲏ ⲙⲛ ⲡⲉϩⲟⲟⲩ ϫⲉ ⲛⲛⲉⲛϩⲣⲟϣ ⲉⲟⲩⲁ ⲙⲙⲱⲧⲛ
9 Nzokande elingi koloba te ete tozangaki makoki mpo na lisungi ya ndenge wana, kasi tosalaki bongo mpo ete tokoma ndakisa mpo na bino.
ⲑ̅ⲉⲃⲟⲗ ⲁⲛ ϫⲉ ⲙⲛⲧⲁⲛ ⲧⲉⲝⲟⲩⲥⲓⲁ ⲙⲙⲁⲩ ⲁⲗⲗⲁ ϫⲉⲕⲁⲥ ⲉⲛⲉⲧⲁⲁⲛ ⲛⲏⲧⲛ ⲛⲥⲙⲟⲧ ⲉⲧⲛⲧⲛ ⲧⲏⲩⲧⲛ ⲉⲣⲟⲛ
10 Pamba te, ezala tango tozalaki elongo na bino, topesaki bino mobeko oyo: « Tika ete moto oyo aboyi kosala mosala alia mpe te! »
ⲓ̅ⲕⲁⲓ ⲅⲁⲣ ⲉⲛϩⲁⲧⲉ ⲧⲏⲩⲧⲛ ⲛⲉⲛⲡⲁⲣⲁⲅⲅⲉⲓⲗⲉ ⲛⲏⲧⲛ ⲙⲡⲁⲓ ϫⲉ ⲡⲉⲧⲉⲛϥⲟⲩⲉϣⲣϩⲱⲃ ⲁⲛ ⲟⲩⲇⲉ ⲙⲡⲣⲧⲣⲉϥⲟⲩⲱⲙ
11 Tozali koyoka ete mingi kati na bino bazali bagoyigoyi mpe bazali kotambola na bomoi ya mobulu, bazali kosala eloko moko te, kasi bazali kaka kokota na makambo ya bato mosusu.
ⲓ̅ⲁ̅ⲧⲛⲥⲱⲧⲙ ⲅⲁⲣ ⲉⲧⲃⲉ ϩⲟⲓⲛⲉ ϫⲉ ⲥⲉⲙⲟⲟϣⲉ ⲛϩⲏⲧ ⲧⲏⲩⲧⲛ ⲁⲧⲁⲕⲧⲱⲥ ⲛⲥⲉⲣⲗⲁⲁⲩ ⲛϩⲱⲃ ⲁⲛ ⲁⲗⲗⲁ ⲉⲩⲟ ⲛⲣⲉϥⲧⲱϩ
12 Tozali kokomela bato ya lolenge wana malako mpe kosenga na bango, na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto, ete basala mosala na kimia mpe balia bilei oyo bakozwa na motoki na bango moko.
ⲓ̅ⲃ̅ⲛⲁⲓ ⲇⲉ ⲛⲧⲉⲉⲓⲙⲓⲛⲉ ⲧⲛⲡⲁⲣⲁⲅⲅⲉⲓⲗⲉ ⲛⲁⲩ ⲁⲩⲱ ⲧⲙⲡⲁⲣⲁⲕⲁⲗⲉⲓ ⲙⲙⲟⲟⲩ ϩⲙ ⲡϫⲟⲉⲓⲥ ⲓⲏⲥ ⲡⲉⲭⲥ ϫⲉⲕⲁⲥ ⲉⲩⲣϩⲱⲃ ϩⲛ ⲟⲩⲥϭ ⲣⲁϩⲧ ⲛⲥⲉⲟⲩⲱⲙ ⲙⲡⲉⲩⲟⲉⲓⲕ
13 Kasi mpo na bino bandeko, bolemba te kosala bolamu.
ⲓ̅ⲅ̅ⲛⲧⲱⲧⲛ ⲇⲉ ⲛⲉⲥⲛⲏⲩ ⲙⲡⲣⲉⲅⲕⲁϭⲓ ⲉⲧⲉⲧⲛⲉⲓⲣⲉ ⲙⲡⲡⲉⲧⲛⲁⲛⲟⲩϥ
14 Soki moto aboyi kotosa mitindo oyo topesi bino kati na mokanda oyo, bokebisa bato nyonso na tina na ye mpe bosangana na ye lisusu te mpo ete ayoka soni.
ⲓ̅ⲇ̅ⲉϣϫⲉ ⲟⲩⲛ ⲟⲩⲁ ⲇⲉ ⲉⲛϥⲥⲱⲧⲙ ⲁⲛ ⲉⲡⲉⲛϣⲁϫⲉ ϩⲓⲧⲛ ⲧⲉⲛⲉⲡⲓⲥⲧⲟⲗⲏ ⲡⲁⲓ ϯⲙⲁⲉⲓⲛ ⲉⲣⲟϥ ⲛⲧⲉⲧⲛⲧⲙⲧⲱϩ ⲛⲙⲙⲁϥ ϫⲉⲕⲁⲥ ⲉϥⲉϣⲓ ⲡⲉ
15 Bozwa ye lokola monguna te, kasi bopamela ye lokola ndeko.
ⲓ̅ⲉ̅ⲁⲩⲱ ⲙⲡⲣⲟⲡϥ ϩⲱⲥ ϫⲁϫⲉ ⲁⲗⲗⲁ ϯ ⲥⲃⲱ ⲛⲁϥ ϩⲱⲥ ⲥⲟⲛ
16 Tika ete Ye moko Nkolo na kimia apesaka bino kimia tango nyonso mpe na lolenge nyonso! Tika ete Nkolo azala elongo na bino nyonso!
ⲓ̅ⲋ̅ⲛⲧⲟϥ ⲇⲉ ⲡϫⲟⲉⲓⲥ ⲛϯⲣⲏⲛⲏ ⲉϥⲉϯ ⲛⲏⲧⲛ ⲛϯⲣⲏⲛⲏ ⲛⲟⲩⲟⲉⲓϣ ⲛⲓⲙ ϩⲛ ⲥⲙⲟⲧ ⲛⲓⲙ ⲡϫⲟⲉⲓⲥ ⲛⲙⲙⲏⲧⲛ ⲧⲏⲣⲧⲛ
17 Ngai Polo, nakomi mbote oyo na nzela ya loboko na ngai moko; yango nde ezali elembo kati na mikanda na ngai nyonso. Nakomaka nde bongo.
ⲓ̅ⲍ̅ⲡⲁⲥⲡⲁⲥⲙⲟⲥ ⲉⲛⲧⲁⲓⲥϩⲁⲉⲓϥ ⲛⲧⲁϭⲓϫ ⲡⲁⲩⲗⲟⲥ ⲉⲡⲁⲓ ⲡⲉ ⲡⲙⲁⲉⲓⲛ ϩⲛ ⲉⲡⲓⲥⲧⲟⲗⲏ ⲛⲓⲙ ⲉⲉⲓⲥϩⲁⲓ ⲛⲧⲉⲉⲓϩⲉ
18 Tika ete ngolu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, ezala na bino nyonso!
ⲓ̅ⲏ̅ⲧⲉⲭⲁⲣⲓⲥ ⲙⲡⲉⲛϫⲟⲉⲓⲥ ⲓⲏⲥ ⲡⲉⲭⲥ ⲛⲙⲙⲏ ⲧⲛ ⲧⲏⲣⲧⲛ