< 2 Samuele 9 >

1 Davidi atunaki: « Ezali lisusu na moto moko ya libota ya Saulo oyo azali nanu na bomoi? Nazali na posa ya kotalisa ye bolamu mpo na Jonatan. »
Preguntó David: “¿Queda todavía alguno de la casa de Saúl, a quien pueda yo hacer merced por amor a Jonatán?”
2 Nzokande, ezalaki na mosali moko ya ndako ya Saulo; kombo na ye « Tsiba. » Babengisaki ye mpo ete aya komimonisa liboso ya Davidi. Mpe mokonzi alobaki na ye: — Ezali yo Tsiba? Azongisaki: — Iyo, ezali ngai, mosali na yo.
Y había un siervo de la casa de Saúl que se llamaba Sibá, al cual llamaron ante David, y el rey le preguntó: “¿Eres tú Sibá?” Él respondió: “Tu siervo.”
3 Mokonzi atunaki ye: — Boni, ezali na moto moko te ya libota ya Saulo, oyo azali nanu na bomoi, oyo epai ya nani nakoki kotalisa bolamu ya Nzambe? Tsiba azongiselaki mokonzi: — Ezali na mwana mobali moko ya Jonatan, oyo azali nanu na bomoi. Azali na mbeba na makolo nyonso mibale.
Dijo el rey: “¿Queda aún persona alguna de la casa de Saúl para que pueda yo hacerle misericordia de Dios?” Sibá respondió al rey: “Vive todavía un hijo de Jonatán, lisiado de ambos pies.”
4 Mokonzi atunaki ye: — Azali wapi? Tsiba azongisaki: — Azali na ndako ya Makiri, mwana mobali ya Amieli, na mboka Lo-Debari.
El rey le preguntó: “¿Dónde está?” Y dijo Sibá al rey: “He aquí que está en casa de Maquir, hijo de Amiel, en Lodebar.”
5 Boye, mokonzi Davidi abengisaki ye wuta na Lo-Debari, na ndako ya Makiri, mwana mobali ya Amieli.
Entonces el rey David envió por él, y le trajeron de la casa de Maquir, hijo de Amiel, de Lodebar.
6 Tango Mefibosheti, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Saulo, ayaki epai ya Davidi, agumbamaki mpo na kopesa ye lokumu. Davidi alobaki: — Mefibosheti! Ye azongisaki: — Ngai oyo, mosali na yo.
Llegó, pues, Mefibóset, hijo de Jonatán, hijo de Saúl, a David, y prosternándose cayó sobre su rostro. Dijo David: “¿Mefibóset?” A lo cual él respondió: “Aquí tienes a tu siervo.”
7 Davidi alobaki na ye: — Kobanga te! Pamba te nakotalisa yo solo bolamu mpo na tata na yo, Jonatan. Nakozongisela yo mabele nyonso ya koko na yo, Saulo, mpe okobanda kolia tango nyonso na mesa na ngai.
“No temas, le dijo David, pues pienso hacerte merced, por amor a Jonatán, tu padre; te restituiré todas las heredades de tu abuelo Saúl y comerás siempre a mi mesa.”
8 Mefibosheti agumbamaki mpe alobaki: — Mosali na yo azali nani mpo ete otala mbwa ya kokufa lokola ngai?
Entonces él le hizo profunda reverencia, y exclamó: “¿Qué soy yo, siervo tuyo, para que vuelvas tu rostro hacia un perro muerto cual soy yo?”
9 Mokonzi abengisaki Tsiba, mosali ya Saulo, mpe alobaki na ye: — Napesi na mwana ya nkolo na yo biloko nyonso oyo ezalaki ya Saulo mpe ya libota na ye.
Luego llamó el rey a Sibá, siervo de Saúl, y le dijo: “Todo cuanto era de Saúl y de toda su casa se lo doy al hijo de tu señor.
10 Yo, bana na yo ya mibali mpe basali na yo, bokosala bilanga mpo na ye mpe bokomema bambuma oyo bokobuka mpo ete mwana ya nkolo na yo akoka kozwa biloko ya kolia. Mpe Mefibosheti, mwana ya nkolo na yo, akobanda kolia tango nyonso na mesa na ngai. Nzokande Tsiba azalaki na bana mibali zomi na mitano mpe basali tuku mibale.
Labrarás para él las tierras, tú y tus hijos y tus siervos, y harás la cosecha para que la casa de tu señor tenga pan que comer; mas Mefibóset, hijo de tu señor, comerá siempre a mi mesa.” Tenía Sibá quince hijos y veinte siervos;
11 Tsiba alobaki na mokonzi: — Mosali na yo akosala makambo nyonso oyo mokonzi, nkolo na ngai, akotinda ye. Boye Mefibosheti aliaki na mesa ya Davidi lokola moko kati na bana mibali ya mokonzi.
y dijo Sibá al rey: “Tu siervo hará todo lo que mi señor, el rey, le ha mandado.” Comió, pues, Mefibóset a la mesa (de David), como uno de los hijos del rey.
12 Mefibosheti azalaki na mwana mobali moko ya elenge; kombo na ye ezalaki « Mika. » Mpe bato nyonso ya libota ya Tsiba bazalaki basali ya Mefibosheti.
Tenía Mefibóset un hijo pequeño, que se llamaba Micá; y todos los que vivían en la casa de Sibá eran siervos de Mefibóset.
13 Mefibosheti avandaki na Yelusalemi mpo ete azalaki kolia tango nyonso na mesa ya mokonzi.
Mefibóset habitaba en Jerusalén, porque comía siempre a la mesa del rey; era cojo de ambos pies.

< 2 Samuele 9 >