< 2 Samuele 8 >

1 Sima na yango, Davidi alongaki bato ya Filisitia mpe abukaki lolendo na bango. Abotolaki Metegi-Ama na maboko ya bato ya Filisitia.
David défit ensuite les Philistins, abattit leur puissance et leur enleva Métheg-Haamma.
2 Davidi alongaki lisusu bato ya Moabi mpe alalisaki bango na mabele, na etando oyo ezalaki na molayi ya basinga misato, oyo bamekelaka molayi. Abomaki ndambo mibale kati na bandambo misato ya bato nyonso oyo balalaki na etando mpe atikaki na bomoi ndambo moko ya bato. Boye, bato ya Moabi bakomaki bawumbu ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako ya mokonzi.
Puis il vainquit les Moabites et les mesura au cordeau, les faisant coucher par terre et destinant deux lots à la mort, un lot à la vie sauve; et Moab fut assujetti à David et devint son tributaire.
3 Davidi alongaki lisusu Adadezeri, mwana mobali ya Reobi, mokonzi ya Tsoba, tango Adadezeri akendeki kolendisa bokonzi na ye pembeni ya ebale Efrate.
Puis David battit Hadadézer, fils de Rehob, roi de Çoba, tandis qu’il marchait vers l’Euphrate pour étendre sa domination.
4 Davidi akangaki basoda nkoto moko na nkama sambo oyo babundaka bitumba na likolo ya bampunda, mpe basoda nkoto tuku mibale oyo babundaka bitumba na makolo; akataki misisa ya makolo ya bampunda nyonso, kasi atikaki kaka bampunda nkama moko oyo ezalaki kobenda bashario.
David lui captura mille sept cents cavaliers et vingt mille hommes de pied, fit mutiler tous les attelages, et n’en conserva que cent.
5 Tango bato ya Siri oyo bazalaki kovanda na engumba Damasi bayaki kosunga Adadezeri, mokonzi ya Tsoba, Davidi abomaki kati na bango bato nkoto tuku mibale.
La Syrie de Damas vint au secours de Hadadézer, roi de Çoba; David tua aux Syriens vingt-deux mille hommes.
6 Bongo Davidi atiaki bayangeli na ye kati na engumba Damasi ya Siri, mpe bato ya Siri bakomaki na se ya bokonzi ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako epai na ye. Yawe azalaki kopesa Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.
il mit ensuite des garnisons dans la Syrie de Damas, qui devint sujette et tributaire de David. Ainsi le Seigneur protégeait David dans toutes ses campagnes.
7 Davidi abotolaki banguba ya wolo oyo bakonzi ya basoda ya Adadezeri bazalaki na yango mpe amemaki yango na Yelusalemi.
David s’empara des boucliers d’or appartenant aux serviteurs de Hadadézer, et les transporta à Jérusalem.
8 Na Beta mpe na Berotayi, bingumba ya Adadezeri, mokonzi Davidi azwaki bronze ebele.
Egalement de Bétah et de Bérotaï, villes de Hadadézer, le roi David emporta du cuivre en grande quantité.
9 Tango Toyi, mokonzi ya Amati, ayokaki ete Davidi alongi mampinga nyonso ya Adadezeri,
Toï, roi de Hamath, ayant appris que David avait défait toute l’armée de Hadadézer,
10 atindaki Yorami, mwana na ye ya mobali, kopesa mokonzi Davidi mbote mpe longonya mpo ete abundisaki mpe alongaki Adadezeri oyo azalaki monguna ya Toyi. Yorami amemelaki Davidi biloko ya palata, ya wolo mpe ya bronze.
envoya son fils Joram au roi David, pour le saluer et le féliciter d’avoir combattu et vaincu Hadadézer, car celui-ci était en guerre avec Toï. Il lui envoyait en même temps des vases d’argent, d’or et de cuivre.
11 Mokonzi Davidi abulisaki biloko yango lokola likabo epai na Yawe ndenge asalaki na palata mpe na wolo oyo ewutaki na bikolo nyonso oyo abotolaki,
Ceux-là aussi, le roi David les consacra à l’Eternel, comme il avait consacré l’argent et l’or de tous les peuples qu’il avait soumis:
12 na Arami, na Moabi, na Amoni, na Filisitia mpe na Amaleki. Abulisaki mpe bomengo ya bitumba oyo abotolaki epai ya Adadezeri, mwana mobali ya Reobi, mokonzi ya Tsoba.
des Syriens, des Moabites, des Ammonites, des Philistins, des Amalécites, comme le butin pris sur Hadadézer, fils de Rehob, roi de Çoba.
13 Davidi akomaki moto ya lokumu tango awutaki koboma bato ya Siri nkoto zomi na mwambe, kati na Lubwaku ya Mungwa.
Quand il revint de battre la Syrie, David se fit encore un nom en battant dix-huit mille hommes dans la vallée du Sel.
14 Atiaki bayangeli kati na Edomi; ezali kati na Edomi mobimba nde atiaki bayangeli, mpe bato nyonso ya Edomi bakomaki bawumbu ya Davidi. Yawe apesaki Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.
Il mit des garnisons dans l’Idumée, il en mit dans toute l’Idumée, qu’il assujettit tout entière. Et le Seigneur protégea David dans toutes ses voies.
15 Davidi azalaki mokonzi ya Isalaele mobimba, azalaki kosalela bato na ye nyonso makambo ya sembo mpe ya alima.
David régna sur tout Israël, et il gouverna tout son peuple avec justice et équité.
16 Joabi, mwana mobali ya Tseruya, azalaki mokonzi ya liboso ya mampinga; Jozafati, mwana mobali ya Ayiludi, azalaki mobombi mikanda;
Joab, fils de Cerouya, était chef de l’armée; Josaphat, fils d’Ahiloud, archiviste;
17 Tsadoki, mwana mobali ya Ayitubi, mpe Ayimeleki, mwana mobali ya Abiatari, bazalaki Banganga-Nzambe; Tseraya azalaki mokomi mikanda;
Çadok, fils d’Ahitoub, et Ahimélec, fils d’Ebiatar, prêtres; Seraïa, secrétaire;
18 Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki kokamba bato ya Kereti mpe ya Peleti; mpe bana mibali ya Davidi bazalaki Banganga-Nzambe.
Benaïahou, fils de Joïada, avec les Krêthi et Pelêthi; et les fils de David, ministres.

< 2 Samuele 8 >