< 2 Samuele 6 >

1 Davidi asangisaki basoda ya mpiko ya Isalaele, bazalaki nkoto tuku misato.
Endå eingong stemnde David saman alt det utvalde mannskapet i Israel: tretti tusund mann.
2 Davidi elongo na basoda na ye nyonso bakendeki na Baale-Yuda mpo na kolongola kuna Sanduku ya Nzambe, oyo, liboso na yango, bazalaki kobelela Kombo moko, Kombo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo avandaka kati na basheribe na likolo ya Sanduku.
Og David gav seg på veg, og drog ut med alt sitt folk frå Ba’ale-Juda, og førde derifrå Guds kista, som heiter etter Herren, allhers drott, han som tronar på kerubarne.
3 Batiaki Sanduku ya Nzambe na likolo ya shario ya sika mpe bamemaki yango wuta na ndako ya Abinadabi, oyo ezalaki na likolo ya ngomba moke. Ezalaki Uza mpe Ayiyo, bana mibali mibale ya Abinadabi, nde bazalaki kotambolisa shario yango oyo ya sika.
Dei sette Guds kista på ei ny vogn og førde henne frå Abinadabs hus på haugen. Og Uzza og Ahjo Abinadabs-søner køyrde den nye vogni.
4 Bamemaki shario elongo na Sanduku ya Nzambe, wuta na ndako ya Abinadabi, oyo ezalaki na likolo ya ngomba moke. Ayiyo azalaki kotambola liboso ya shario.
Soleis førde dei Guds kista burt frå Abinadabs hus på haugen, med di dei fylgde henne, og Ahjo gjekk fyre kista.
5 Davidi mpe bato nyonso ya Isalaele bazalaki kosepela na liboso ya Yawe, na kobeta lolenge nyonso ya bibetelo mindule basala na mabaya ya sipele, mandanda, banzenze, bambunda ya mike-mike, makembe mpe manzanza.
David og heile Israels-ætti leika for Herren, til alle slag spel av cypresstre, til cithrar, harpor, trummor, bjøllor og cymblar.
6 Tango bakomaki na etando ya Nakoni, Uza asembolaki loboko na ye mpe asimbaki Sanduku ya Nzambe, pamba te bangombe elingaki kokweyisa Sanduku.
Då dei kom burtimot treskjestaden åt Nakon, tok Uzza tak med henderne i Guds kista og heldt fast i henne, av di uksarne snåva.
7 Yawe asilikelaki Uza makasi, mpe Nzambe abetaki ye mpo na mbeba na ye. Boye Uza akufaki kaka wana, pembeni ya Sanduku ya Nzambe.
Då loga Herrens harm upp mot Uzza. Og Gud slo honom for det brotet skuld. Og han fekk sin bane der attmed Guds kista.
8 Davidi asilikaki makasi mpo ete Yawe afungolaki lidusu na kobeta Uza. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango « Peretsi-Uza. »
David vart ille ved av di Herren øydelagde Uzza. Og den staden heite Peres-Uzza den dag i dag.
9 Na mokolo wana, Davidi abangaki Yawe mpe amitunaki: « Ndenge nini Sanduku ya Yawe eya epai na ngai? »
Men David vart so rædd for Herren den dagen, at han sagde: «Kor kann eg våga føra Herrens kista upp til meg!»
10 Boye, Davidi aboyaki komema Sanduku ya Yawe epai na ye, kati na engumba ya Davidi; akendeki kotia yango kati na ndako ya Obedi-Edomi, moto ya Gati.
Difor vilde ikkje David flytja Herrens kista upp til Davidsbyen, men let deim setja henne inn i huset åt gatiten Obed-Edom.
11 Sanduku ya Yawe evandaki sanza misato kati na ndako ya Obedi-Edomi, moto ya Gati; mpe Yawe apambolaki Obedi-Edomi elongo na libota na ye nyonso.
So stod Herrens kista der i tri månader. Og Herren velsigna Obed-Edom og heile hans hus.
12 Tango bayaki koyebisa mokonzi Davidi ete Yawe apamboli ndako ya Obedi-Edomi mpe biloko na ye nyonso mpo na Sanduku ya Nzambe, Davidi akendeki kozwa na esengo Sanduku ya Nzambe wuta na ndako ya Obedi-Edomi, mpe bakendeki na yango kati na engumba ya Davidi.
Då kong David spurde at Herren velsigna huset åt Obed-Edom og all hans eigedom for Guds kista skuld, drog David av stad og flutta Guds kista derifrå og upp til Davidsbyen med stor fagnad.
13 Tango bato oyo bazalaki komema Sanduku ya Yawe batindikaki makolo na bango mbala motoba, batelemaki, mpe Davidi abonzaki lokola mbeka ngombe moko ya mobali mpe mwana ngombe moko ya mafuta.
Då dei som bar Herrens kista, hadde gjenge seks stig, ofra han ein ukse og ein gjødkalv.
14 Davidi alataki efode ya lino mpe azalaki kobina na makasi na ye nyonso liboso ya Yawe.
David sjølv dansa av all magt framfor Herren i ein messehakel av lin.
15 Davidi mpe bato nyonso ya Isalaele bamemaki Sanduku ya Yawe na kobeta milolo ya esengo mpe na kobeta bakelelo.
Soleis henta David og heile Israels-ætti Herrens kista dit upp med fagnadrop og lurljod.
16 Tango Sanduku ya Yawe ekotaki na engumba ya Davidi, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, azalaki kotala wuta na lininisa; mpe tango amonaki mokonzi Davidi kopumbwa mpe kobina liboso ya Yawe, ayinaki ye kati na motema na ye.
Då Herrens kista kom inn i Davidsbyen, stod Mikal Saulsdotter og såg ut igjenom vindauga. Då ho fekk sjå kong David sprang og dansa framfor Herren, då fekk ho vanvyrdnad for honom i sitt hjarta.
17 Bamemaki Sanduku ya Yawe mpe batiaki yango kati na ndako ya kapo oyo Davidi atelemisaki mpo na yango. Mpe Davidi abonzaki liboso ya Yawe bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani.
Då dei hadde ført Herrens kista upp, sette dei henne på sin stad midt i det tjeldet som David hadde reist åt henne. David ofra brennoffer og takkoffer for Herren.
18 Tango Davidi asilisaki kobonza bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, apambolaki bato na Kombo na Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Og då han var ferdig med desse ofringarne, velsigna han folket i namnet åt Herren, allhers drott.
19 Bongo apesaki na bato nyonso, na lisanga mobimba ya Isalaele, mibali mpe basi, lipa, gato oyo basala na bambuma ya dati, gato oyo basala na bambuma ya vino ya kokawuka. Sima na yango, bato nyonso bazongaki na bandako na bango.
Deretter skifte han ut åt heile folket, åt heile Israels-ålmugen, både åt kar og kvende, ei hellekaka, eit stykke kjøt og ei rosinkaka til manns. So gjekk heile folket heim kvar til seg.
20 Tango Davidi azongaki mpo na kopambola ndako na ye, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, abimaki mpo na kokutana na Davidi mpe alobaki: — Lokumu nini mokonzi ya Isalaele amipesi na mokolo ya lelo tango amitiki bolumbu na miso ya basi nyonso ya basali na ye ndenge moto pamba akokaki kosala?
Men då David kom heim og helsa husfolki sine, gjekk Mikal Saulsdotter til møtes med honom og sagde: «Kor måtte ikkje Israels konge kjenna seg høgvyrd i dag, med han i dag hev nækt seg framfor tenestgjentorne åt tenarane sine, soleis som skamlaust folk plar nækja seg.»
21 Davidi alobaki na Mikali: — Nazalaki nde kosepela liboso ya Yawe oyo aponaki ngai mpe asepelaki na ngai koleka tata na yo mpe moto nyonso ya ndako na ye, tango akomisaki ngai mokonzi ya Isalaele, bato ya Yawe.
David svara Mikal: «For Herrens åsyn hev eg dansa, han som valde meg ut framfor far din og framfor heile hans ætt, og sette meg til fyrste for Israel, Herrens folk. For Herrens åsyn var det eg dansa,
22 Nakokoma lisusu moto pamba koleka mpe nakomikitisa lisusu koleka na miso na ngai moko. Kasi liboso ya basi oyo yo ozali kolobela, ngai nakozwa lokumu.
og småminka meg meir, og verta ring i mine augo. Men hjå dei tenestgjentorne du nemnde, hjå deim skal eg verta høgvyrd.»
23 Mpo na yango, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, abotaki te kino na mokolo na ye ya kufa.
Mikal Saulsdotter vart verande barnlaus alt til sin døyande dag.

< 2 Samuele 6 >