< 2 Samuele 5 >

1 Bikolo nyonso ya Isalaele bayaki na Ebron epai ya Davidi mpe balobaki: « Biso na yo, tozali nzoto moko mpe makila moko.
Then all the tribes of Israel came to David at Hebron and spoke, saying, “Behold, we are your bone and your flesh.
2 Na kala, na mikolo oyo Saulo azalaki mokonzi, yo nde ozalaki kokamba mampinga ya Isalaele na bitumba. Nzokande, Yawe alobaki na yo: ‹ Yo nde okokamba bato na Ngai, Isalaele, mpe okokoma mokambi na bango. › »
In times past, when Saul was king over us, it was you who led Israel out and in. The LORD said to you, ‘You will be shepherd of my people Israel, and you will be prince over Israel.’”
3 Boye bampaka nyonso ya Isalaele bayaki na Ebron epai ya mokonzi. Mokonzi Davidi asalaki elongo na bango boyokani, na Ebron, liboso ya Yawe; mpe bapakolaki Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele.
So all the elders of Israel came to the king to Hebron, and King David made a covenant with them in Hebron before the LORD; and they anointed David king over Israel.
4 Davidi azalaki na mibu tuku misato ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku minei:
David was thirty years old when he began to reign, and he reigned forty years.
5 mibu sambo na basanza motoba lokola mokonzi ya Yuda, na Ebron; mpe mibu tuku misato na misato lokola mokonzi ya Isalaele mobimba mpe Yuda, na Yelusalemi.
In Hebron he reigned over Judah seven years and six months, and in Jerusalem he reigned thirty-three years over all Israel and Judah.
6 Mokonzi mpe bato na ye bakendeki na Yelusalemi mpo na kobundisa bato ya Yebusi oyo bazalaki kovanda kuna. Bavandi ya Yebusi balobaki na Davidi: « Okokota awa te, pamba te ezala mokufi miso to moto ya tengu-tengu akobengana yo. » Bakanisaki ete Davidi akoki kokota kuna te.
The king and his men went to Jerusalem against the Jebusites, the inhabitants of the land, who spoke to David, saying, “The blind and the lame will keep you out of here,” thinking, “David can’t come in here.”
7 Atako bongo, Davidi abotolaki ndako makasi ya Siona, oyo ezali engumba ya Davidi.
Nevertheless David took the stronghold of Zion. This is David’s city.
8 Na mokolo wana, Davidi alobaki: « Moto nyonso oyo alingi kobundisa bato ya Yebusi asengeli kozwa nzela ya se ya mabele mpo na kokanga bato ya tengu-tengu mpe bakufi miso oyo bazali banguna ya Davidi. » Yango wana balobaka: « Bakufi miso mpe bato ya tengu-tengu bakokota te na ndako ya mokonzi. »
David said on that day, “Whoever strikes the Jebusites, let him go up to the watercourse and strike those lame and blind, who are hated by David’s soul.” Therefore they say, “The blind and the lame can’t come into the house.”
9 Davidi avandaki na ndako yango oyo batonga makasi mpe abengaki yango « Engumba ya Davidi. » Mpe Davidi atongaki zingazinga na yango, longwa na Milo kino na kati.
David lived in the stronghold, and called it David’s city. David built around from Millo and inward.
10 Nguya ya Davidi ezalaki komata se komata, mpe Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, azalaki elongo na ye.
David grew greater and greater, for the LORD, the God of Hosts, was with him.
11 Irami, mokonzi ya Tiri, atindaki bantoma epai ya Davidi mpo ete bamemela ye mabaya ya sedele, basharipantie mpe bato oyo bapasolaka mabanga; mpe batongelaki Davidi ndako.
Hiram king of Tyre sent messengers to David, with cedar trees, carpenters, and masons; and they built David a house.
12 Davidi asosolaki ete Yawe azali kolendisa ye lokola mokonzi ya Isalaele mpe azali kotombola bokonzi na ye mpo na Isalaele, bato na Ye.
David perceived that the LORD had established him king over Israel, and that he had exalted his kingdom for his people Israel’s sake.
13 Tango Davidi alongwaki na Ebron mpe akendeki kovanda kati na Yelusalemi, azwaki lisusu bamakangu mpe basi mosusu ebele oyo babotelaki ye bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
David took more concubines and wives for himself out of Jerusalem, after he had come from Hebron; and more sons and daughters were born to David.
14 Tala bakombo ya bana ya Davidi oyo babotamaki na Yelusalemi: Shamuwa, Shobabi, Natan, Salomo,
These are the names of those who were born to him in Jerusalem: Shammua, Shobab, Nathan, Solomon,
15 Yibari, Elishuwa, Nefegi, Yafia,
Ibhar, Elishua, Nepheg, Japhia,
16 Elishama, Eliyada mpe Elifeleti.
Elishama, Eliada, and Eliphelet.
17 Tango bato ya Filisitia bayokaki ete bapakoli Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele, bango nyonso bakendeki koluka ye. Kasi tango Davidi ayokaki sango ya mabongisi na bango, akendeki na ndako oyo batonga makasi.
When the Philistines heard that they had anointed David king over Israel, all the Philistines went up to seek David, but David heard about it and went down to the stronghold.
18 Bato ya Filisitia bakomaki mpe bapanzanaki na lubwaku ya Refayimi.
Now the Philistines had come and spread themselves in the valley of Rephaim.
19 Davidi atunaki Yawe: — Nakoki solo kokende kobundisa bato ya Filisitia? Okokaba bango solo na maboko na ngai? Yawe azongiselaki ye: — Kende, pamba te nakokaba bato ya Filisitia na maboko na yo.
David inquired of the LORD, saying, “Shall I go up against the Philistines? Will you deliver them into my hand?” The LORD said to David, “Go up; for I will certainly deliver the Philistines into your hand.”
20 Davidi akomaki na Bali-Peratsimi mpe alongaki kuna bato ya Filisitia. Alobaki: « Yawe afungoleli ngai nzela kati na banguna na ngai, ndenge mayi epasolaka nzela. » Yango wana babengaki esika yango Bala-Peratsimi.
David came to Baal Perazim, and David struck them there. Then he said, “The LORD has broken my enemies before me, like the breach of waters.” Therefore he called the name of that place Baal Perazim.
21 Bato ya Filisitia basundolaki kuna banzambe na bango ya bikeko, mpe Davidi elongo na basoda na ye bamemaki yango.
They left their images there, and David and his men took them away.
22 Bato ya Filisitia bayaki lisusu mpe bapanzanaki kati na lubwaku ya Refayimi.
The Philistines came up yet again and spread themselves in the valley of Rephaim.
23 Bongo Davidi atunaki Yawe, mpe Yawe azongiselaki ye: « Kobundisa bango na liboso te, kasi baluka na sima na bango; bongo okobimela bango na liboso ya banzete ya mirie.
When David inquired of the LORD, he said, “You shall not go up. Circle around behind them, and attack them in front of the mulberry trees.
24 Tango okoyoka lokito ya makolo ya bato na likolo ya banzete ya Mirie, na tango wana nde okobima noki, pamba te ekolakisa ete Yawe abimi liboso na yo mpo na kobeta mampinga ya bato ya Filisitia. »
When you hear the sound of marching in the tops of the mulberry trees, then stir yourself up; for then the LORD has gone out before you to strike the army of the Philistines.”
25 Davidi asalaki ndenge Yawe atindaki ye mpe abomaki bato ya Filisitia, longwa na Geba kino na Gezeri.
David did so, as the LORD commanded him, and struck the Philistines all the way from Geba to Gezer.

< 2 Samuele 5 >