< 2 Samuele 4 >

1 Tango Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, ayokaki ete Abineri akufi na Ebron, alembaki nzoto, mpe bato nyonso ya Isalaele bakomaki na somo makasi.
扫罗的儿子伊施波设听见押尼珥死在希伯 ,手就发软;以色列众人也都惊惶。
2 Nzokande mwana mobali ya Saulo azalaki na bato mibale oyo bazalaki bakonzi ya mampinga: moko, kombo na ye ezalaki « Baana; » mpe mosusu, « Rekabi. » Bazalaki bana mibali ya Rimoni, moto ya Beyeroti, kati na bato ya ekolo ya Benjame. Beyeroti ezalaki eteni ya mabele ya Benjame,
扫罗的儿子伊施波设有两个军长,一名巴拿,一名利甲,是便雅悯支派、比录人临门的儿子。比录也属便雅悯。
3 pamba te bato ya Beyeroti bakimelaki na Gitayimi mpe bavandaki kuna lokola bapaya kino na mokolo ya lelo.
比录人早先逃到基他音,在那里寄居,直到今日。
4 Jonatan, mwana mobali ya Saulo, azalaki na mwana mobali moko oyo azalaki na mbeba na makolo nyonso mibale. Wana azalaki nanu na mibu mitano ya mbotama, sango kowuta na Jizireyeli na tina na Saulo mpe Jonatan ekomaki. Boye mama mobokoli na ye akamataki ye mpo na kokima. Kasi lokola akimaki na lombangu, mwana akweyaki mpe akomaki na mbeba na makolo nyonso mibale. Kombo na ye ezalaki « Mefibosheti. »
扫罗的儿子约拿单有一个儿子名叫米非波设,是瘸腿的。扫罗和约拿单死亡的消息从耶斯列传到的时候,他才五岁。他乳母抱着他逃跑;因为跑得太急,孩子掉在地上,腿就瘸了。
5 Rekabi mpe Baana, bana mibali ya Rimoni, moto ya Beyeroti, bakendeki na ndako ya Ishi-Bosheti mpe bakomaki kuna na ngonga ya midi, wana azalaki kolala mpo na kopema.
一日,比录人临门的两个儿子利甲和巴拿出去,约在午热的时候到了伊施波设的家;伊施波设正睡午觉。
6 Bakotaki kati na ndako lokola nde bakei kozwa ble, wana Ishi-Bosheti azalaki ya kolala na mbeto na ye kati na shambre, batubaki ye mbeli na libumu, babomaki ye mpe bakataki ye moto; bongo bazwaki moto yango, bakimaki mpe batambolaki na yango butu mobimba na nzela oyo ekenda na etando ya Araba. Rekabi mpe Baana, ndeko na ye ya mobali, bakimaki.
他们进了房子,假作要取麦子,就刺透伊施波设的肚腹,逃跑了。
7
他们进房子的时候,伊施波设正在卧房里躺在床上,他们将他杀死,割了他的首级,拿着首级在亚拉巴走了一夜,
8 Bamemaki moto ya Ishi-Bosheti epai ya Davidi, na Ebron, mpe balobaki na mokonzi: — Tala moto ya Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, monguna na yo, oyo alukaki koboma yo. Na mokolo ya lelo, Yawe azongisi mpo na mokonzi, nkolo na ngai, mabe na mabe epai ya Saulo mpe bakitani na ye.
将伊施波设的首级拿到希伯 见大卫王,说:“王的仇敌扫罗曾寻索王的性命。看哪,这是他儿子伊施波设的首级;耶和华今日为我主我王在扫罗和他后裔的身上报了仇。”
9 Davidi azongiselaki Rekabi mpe Baana, ndeko na ye ya mobali, bana mibali ya Rimoni, moto ya Beyeroti: — Na Kombo na Yawe oyo akangoli ngai na pasi nyonso
大卫对比录人临门的儿子利甲和他兄弟巴拿说:“我指着救我性命脱离一切苦难、永生的耶和华起誓:
10 tango moto moko ayebisaki ngai ete Saulo akufi, wana akanisaki ete amemeli ngai sango malamu. Nakangaki ye mpe nabomaki ye, na Tsikilagi. Ezalaki lifuti oyo napesaki ye mpo na sango na ye.
从前有人报告我说,扫罗死了,他自以为报好消息;我就拿住他,将他杀在洗革拉,这就作了他报消息的赏赐。
11 Bongo sik’oyo, tango bato mabe babomi moto oyo ayebi na ye likambo te kati na ndako na ye moko mpe na mbeto na ye moko, nasengeli te kosenga makila na ye na maboko na bino mpe kolimwisa bino na mokili?
何况恶人将义人杀在他的床上,我岂不向你们讨流他血的罪、从世上除灭你们呢?”
12 Boye Davidi apesaki mitindo; mpe bato na ye babomaki bango, bakataki bango maboko mpe makolo mpe badiembikaki bango pembeni ya liziba ya Ebron. Bazwaki moto ya Ishi-Bosheti mpe bakundaki yango kati na kunda ya Abineri, na Ebron.
于是大卫吩咐少年人将他们杀了,砍断他们的手脚,挂在希伯 的池旁,却将伊施波设的首级葬在希伯 、押尼珥的坟墓里。

< 2 Samuele 4 >