< 2 Samuele 3 >

1 Bitumba kati na libota ya Saulo mpe libota ya Davidi ewumelaki tango molayi. Wana makasi ya Davidi ezalaki komata se komata, makasi ya libota ya Saulo ezalaki kaka kokita.
Now there was long war between Saul’s house and David’s house. David grew stronger and stronger, but Saul’s house grew weaker and weaker.
2 Tala bana mibali ya Davidi oyo babotamaki na Ebron: Mwana ya liboso ezalaki Aminoni oyo Ayinoami, moto ya Jizireyeli, abotelaki ye;
Sons were born to David in Hebron. His firstborn was Amnon, of Ahinoam the Jezreelitess;
3 ya mibale, Kileabi oyo Abigayili oyo akufisaki mobali na ye ya liboso, Nabali, moto ya Karimeli, abotelaki ye; ya misato, Abisalomi oyo Maaka, mwana ya Talimayi, mokonzi ya Geshuri, abotelaki ye;
and his second, Chileab, of Abigail the wife of Nabal the Carmelite; and the third, Absalom the son of Maacah the daughter of Talmai king of Geshur;
4 ya minei, Adoniya oyo Agite abotelaki ye; ya mitano, Shefatia oyo Abitali abotelaki ye;
and the fourth, Adonijah the son of Haggith; and the fifth, Shephatiah the son of Abital;
5 ya motoba, Yitileami oyo Egila, mwasi ya Davidi, abotelaki ye. Bango nde bana mibali ya Davidi oyo babotamaki na Ebron.
and the sixth, Ithream, of Eglah, David’s wife. These were born to David in Hebron.
6 Na tango ya bitumba kati na mabota ya Saulo mpe ya Davidi, Abineri azalaki kolendisa nguya na ye kati na ndako ya Saulo.
While there was war between Saul’s house and David’s house, Abner made himself strong in Saul’s house.
7 Nzokande, Saulo azalaki na makangu moko; kombo na ye ezalaki « Ritsipa, » mwana mwasi ya Aya. Bongo Ishi-Bosheti alobaki na Abineri: — Mpo na nini osangisi nzoto na makangu ya tata na ngai?
Now Saul had a concubine, whose name was Rizpah, the daughter of Aiah; and Ishbosheth said to Abner, “Why have you gone in to my father’s concubine?”
8 Tango Abineri ayokaki makambo oyo Ishi-Bosheti alobaki, asilikaki makasi mpe azongisaki: — Boni! Ngai nazali moto ya mbwa na ngambo ya bato ya Yuda? Ngai oyo, na mokolo ya lelo, nazali kosalela bosembo epai ya libota ya Saulo, tata na yo, epai ya bandeko na ye mpe epai ya baninga na ye; ngai oyo nakabaki yo te na maboko ya Davidi, ngai nde sik’oyo ozali kofunda ete nasali mabe na tina na mwasi oyo!
Then Abner was very angry about Ishbosheth’s words, and said, “Am I a dog’s head that belongs to Judah? Today I show kindness to your father Saul’s house, to his brothers, and to his friends, and have not delivered you into the hand of David; and yet you charge me today with a fault concerning this woman!
9 Tika ete Nzambe apesa ngai Abineri etumbu ya makasi soki nasali te mpo na Davidi makambo oyo Yawe alakaki ye, na nzela ya ndayi,
God do so to Abner, and more also, if, as the LORD has sworn to David, I don’t do even so to him:
10 ete akolongola bokonzi na ndako ya Saulo mpe akotia kiti ya bokonzi ya Davidi kati na Isalaele mpe kati na Yuda, longwa na Dani kino na Beri-Sheba.
to transfer the kingdom from Saul’s house, and to set up David’s throne over Israel and over Judah, from Dan even to Beersheba.”
11 Ishi-Bosheti akokaki kozongisa ata liloba moko te epai ya Abineri, pamba te azalaki kobanga ye.
He could not answer Abner another word, because he was afraid of him.
12 Abineri atindaki bantoma koloba na Davidi: — Mokili oyo ezali ya nani? Sala boyokani elongo na ngai, bongo ngai nakosunga yo mpo na kosangisa Isalaele mobimba epai na yo.
Abner sent messengers to David on his behalf, saying, “Whose is the land?” and saying, “Make your alliance with me, and behold, my hand will be with you to bring all Israel around to you.”
13 Davidi azongisaki: — Malamu! Nandimi kosala boyokani elongo na yo, kasi nasengi yo eloko moko: koya liboso na ngai te soki otindeli ngai nanu te Mikali, mwana mwasi ya Saulo, tango okoya kokutana na ngai.
David said, “Good. I will make a treaty with you, but one thing I require of you. That is, you will not see my face unless you first bring Michal, Saul’s daughter, when you come to see my face.”
14 Bongo Davidi atindaki bantoma koloba na Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo: — Pesa ngai mwasi na ngai, Mikali, oyo nabalaki ngai moko na motuya ya bangenga nkama moko ya bato ya Filisitia.
David sent messengers to Ishbosheth, Saul’s son, saying, “Deliver me my wife Michal, whom I was given to marry for one hundred foreskins of the Philistines.”
15 Boye Ishi-Bosheti atindaki bato kozwa Mikali epai ya mobali na ye, Palitieli, mwana mobali ya Laishi.
Ishbosheth sent and took her from her husband, Paltiel the son of Laish.
16 Mobali na ye alandaki ye na kolela kino na Bawurimi. Kasi Abineri alobaki na mobali yango: — Zonga na ndako na yo. Mpe mobali azongaki.
Her husband went with her, weeping as he went, and followed her to Bahurim. Then Abner said to him, “Go! Return!” and he returned.
17 Abineri asololaki na bampaka ya Isalaele mpe alobaki na bango: — Lokola wuta kala bolingaka ete Davidi akoma mokonzi na bino,
Abner had communication with the elders of Israel, saying, “In times past, you sought for David to be king over you.
18 bosala yango sik’oyo; pamba te Yawe alobaki boye na tina na ye: « Ezali na nzela ya Davidi, mosali na ngai, nde nakobikisa bato na Ngai, Isalaele, na maboko ya bato ya Filisitia mpe ya banguna na bango nyonso. »
Now then do it! For the LORD has spoken of David, saying, ‘By the hand of my servant David, I will save my people Israel out of the hand of the Philistines, and out of the hand of all their enemies.’”
19 Sima na Abineri koloba likambo yango epai ya bato ya libota ya Benjame, akendeki na Ebron mpo na koyebisa Davidi makambo nyonso oyo bato ya Isalaele mpe libota mobimba ya Benjame babongisaki.
Abner also spoke in the ears of Benjamin; and Abner went also to speak in the ears of David in Hebron all that seemed good to Israel and to the whole house of Benjamin.
20 Mpe tango Abineri elongo na bato na ye, tuku mibale, bakomaki epai ya Davidi, na Ebron, Davidi asaliselaki bango feti.
So Abner came to David to Hebron, and twenty men with him. David made Abner and the men who were with him a feast.
21 Abineri alobaki na Davidi: — Na ndingisa na yo mokonzi, nkolo na ngai, nalingi kokende sik’oyo kosangisela yo bato nyonso ya Isalaele mpo ete basala boyokani elongo na yo; mpe na bongo, yo okokonza na bisika nyonso oyo olingi. Davidi atikaki Abineri kokende, mpe Abineri azongaki na kimia.
Abner said to David, “I will arise and go, and will gather all Israel to my lord the king, that they may make a covenant with you, and that you may reign over all that your soul desires.” David sent Abner away; and he went in peace.
22 Sima na mwa tango, basali ya Davidi mpe Joabi bazongaki wuta na bitumba mpe bamemaki bomengo ebele ya bitumba. Abineri azalaki lisusu na Ebron te, epai ya Davidi, pamba te Davidi asilaki kotika ye kokende, mpe azongaki na kimia.
Behold, David’s servants and Joab came from a raid and brought in a great plunder with them; but Abner was not with David in Hebron, for he had sent him away, and he had gone in peace.
23 Tango kaka Joabi mpe basoda na ye nyonso bakomaki, bayebisaki Joabi: — Abineri, mwana mobali ya Neri, ayaki epai ya mokonzi; bongo mokonzi atikaki ye kokende, mpe azongaki na kimia.
When Joab and all the army who was with him had come, they told Joab, “Abner the son of Ner came to the king, and he has sent him away, and he has gone in peace.”
24 Joabi akendeki komona mokonzi mpe alobaki na ye: — Eloko nini oyo osali? Mpo na nini otikaki penza Abineri oyo ayaki epai na yo kokende? Mpe tala sik’oyo, akei!
Then Joab came to the king and said, “What have you done? Behold, Abner came to you. Why is it that you have sent him away, and he is already gone?
25 Nzokande oyebi malamu Abineri, mwana mobali ya Neri! Soki ayaki epai na yo, ezalaki nde mpo na kokosa yo, mpo na kononga mpe koluka koyeba bisika nyonso oyo otambolaka mpe makambo nyonso oyo osalaka.
You know Abner the son of Ner. He came to deceive you, and to know your going out and your coming in, and to know all that you do.”
26 Sima na Joabi kowuta na ndako ya Davidi, atindaki bantoma mpo ete balanda mpe bakanga Abineri. Mpe wana Davidi ayebaki te, bantoma bazongisaki Abineri wuta na libulu ya mayi ya Sira.
When Joab had come out from David, he sent messengers after Abner, and they brought him back from the well of Sirah; but David didn’t know it.
27 Tango Abineri azongaki lisusu na Ebron, Joabi abendaki ye na pembeni, na kati-kati ya ekuke ya engumba lokola nde alingi kosolola na ye na nkuku. Mpe kuna, mpo na kozongisa mabe na mabe na tina na makila ya ndeko na ye ya mobali Asaeli, Joabi atubaki Abineri mbeli na libumu, mpe Abineri akufaki.
When Abner had returned to Hebron, Joab took him aside into the middle of the gate to speak with him quietly, and struck him there in the body, so that he died for the blood of Asahel his brother.
28 Sima na yango, tango kaka Davidi ayokaki sango ya makambo oyo ewutaki kosalema, alobaki: — Na miso ya Yawe, ngai mpe bokonzi na ngai tozali na ngambo te mpo na libela na tina na makila ya Abineri, mwana mobali ya Neri.
Afterward, when David heard it, he said, “I and my kingdom are guiltless before the LORD forever of the blood of Abner the son of Ner.
29 Tika ete makila na ye etangama na moto ya Joabi mpe ya libota na ye mobimba! Tika ete ndako ya Joabi ezangaka te bato oyo bakobela bokono ya sopisi to bokono ya maba to bato oyo bakotambola na banzete to bato oyo bakokufa na mopanga to bato oyo bakozanga bilei.
Let it fall on the head of Joab and on all his father’s house. Let there not fail from the house of Joab one who has a discharge, or who is a leper, or who leans on a staff, or who falls by the sword, or who lacks bread.”
30 Joabi mpe ndeko na ye ya mobali, Abishayi, babomaki Abineri mpo ete abomaki Asaeli, ndeko na bango ya mobali, na bitumba ya Gabaoni.
So Joab and Abishai his brother killed Abner, because he had killed their brother Asahel at Gibeon in the battle.
31 Bongo Davidi alobaki na Joabi mpe na bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye: — Bopasola bilamba na bino mpe bolata basaki, bosala matanga liboso ya Abineri. Ye moko mokonzi Davidi atambolaki na sima ya ebembe.
David said to Joab and to all the people who were with him, “Tear your clothes, and clothe yourselves with sackcloth, and mourn in front of Abner.” King David followed the bier.
32 Bakundaki Abineri, na Ebron, mpe mokonzi alelaki makasi na likolo ya kunda ya Abineri. Bato nyonso mpe balelaki.
They buried Abner in Hebron; and the king lifted up his voice and wept at Abner’s grave; and all the people wept.
33 Bongo mokonzi ayembaki nzembo oyo ya mawa mpo na Abineri: « Esengelaki ete Abineri akufa penza lokola zoba?
The king lamented for Abner, and said, “Should Abner die as a fool dies?
34 Bakangaki te maboko na yo na basinga, bakangaki te makolo na yo na basheni. Kasi okweyi ndenge bakweyaka liboso ya babomi. » Mpe bato nyonso balelaki ye lisusu makasi
Your hands weren’t bound, and your feet weren’t put into fetters. As a man falls before the children of iniquity, so you fell.” All the people wept again over him.
35 mpe basengaki na Davidi ete alia wana moyi ezali nanu. Kasi Davidi alapaki ndayi na maloba oyo: « Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu oyo eleki makasi soki nameki kolia mapa to eloko mosusu liboso ete moyi elala! »
All the people came to urge David to eat bread while it was yet day; but David swore, saying, “God do so to me, and more also, if I taste bread or anything else, until the sun goes down.”
36 Bato nyonso bayokaki ndayi yango mpe basepelaki na yango: bazalaki kosepela na makambo nyonso oyo mokonzi azalaki kosala.
All the people took notice of it, and it pleased them, as whatever the king did pleased all the people.
37 Mpe na mokolo wana, basoda nyonso ya Isalaele mpe Isalaele mobimba bandimaki ete mokonzi ayebaki ata likambo moko te na tina na kufa ya Abineri, mwana mobali ya Neri.
So all the people and all Israel understood that day that it was not of the king to kill Abner the son of Ner.
38 Mokonzi alobaki na basali na ye: « Boni, boyebi na bino ete mokambi moko mpe moto moko ya monene akweyi lelo kati na Isalaele?
The king said to his servants, “Don’t you know that a prince and a great man has fallen today in Israel?
39 Na mokolo ya lelo, atako bapakola ngai mafuta lokola mokonzi, nazali na makasi te, mpe bana mibali oyo ya Tseruya baleki ngai na makasi. Tika ete Yawe apesa etumbu na moto oyo asali mabe oyo kolanda mabe na ye! »
I am weak today, though anointed king. These men, the sons of Zeruiah are too hard for me. May the LORD reward the evildoer according to his wickedness.”

< 2 Samuele 3 >