< 2 Samuele 24 >

1 Yawe asikelaki lisusu bato ya Isalaele mpe atindikaki Davidi na kosala makambo oyo ekomemisa bango ngambo; alobaki na Davidi: « Kende kotanga motango ya bato ya Isalaele mpe ya Yuda. »
上主對以色列又大發憤怒,遂激動達味去難為他們,並向他們說:「你去統計以色列和猶大人口」。
2 Boye, mokonzi apesaki mitindo na Joabi, mokonzi ya mampinga, oyo azalaki elongo na ye: — Tambola na mabota nyonso ya Isalaele, longwa na Dani kino na Beri-Sheba, mpe tanga bato mpo ete nayeba motango na bango.
王遂對在自己身邊的約阿布和其餘的軍長說:「你們應走遍以色列各支派,由丹直到具爾舍巴,統計人民,我好知道人民的號目」。
3 Kasi Joabi azongiselaki mokonzi: — Tika ete Yawe, Nzambe na yo, akomisa bato ebele koleka mbala nkama, mpe ete yo mokonzi, nkolo na ngai, omona yango na miso na yo! Kasi mpo na nini mokonzi, nkolo na ngai, alingi kosala likambo ya boye?
約阿布對君王說:「願上主你的天主將目前的百姓增加百倍,願我主大王親眼見到! 但我主大王,為什麼要行此事﹖」
4 Kasi mokonzi atingamaki kaka na mitindo oyo apesaki na Joabi mpe na bakonzi ya mampinga. Boye, balongwaki liboso ya mokonzi mpe bakendeki kotanga bato ya Isalaele.
可是君王堅持向約阿布和眾軍長所出命令,約阿布和眾軍長便離開君王,去統計以色列百姓。
5 Bakatisaki Yordani mpe babandaki na kotanga bato ya engumba Aroeri, na sude ya engumba oyo ezali kati na lubwaku. Bakatisaki lisusu etuka ya Gadi na nzela oyo ekenda na Yaezeri.
他們過了約旦河,由阿洛厄爾及山谷間城市開始,經過加得直到雅則爾,
6 Longwa kuna, balekaki na etuka ya Galadi mpe ya Tayitimi-Odishi kino bakomaki na Dani Yaani mpe zingazinga ya Sidoni.
而後來來到基肋阿得及赫特人地方的刻德士,再由此到丹,轉到漆東。
7 Bakendeki na ndako batonga makasi ya Tiri mpe na bingumba nyonso ya bato ya Evi mpe ya Kanana; bongo bakomaki na sude ya etuka ya Yuda, na Beri-Sheba.
以後來到提洛的堡壘,希威人和客納罕人的各城,然後經過猶大南部,來到了貝爾舍巴。
8 Boye batambolaki mboka mobimba, mpe bazongaki na Yelusalemi sima na basanza libwa mpe mikolo tuku mibale.
他們走遍了全國,經過九個月零二十天,回到了耶路撒冷。
9 Joabi ayebisaki mokonzi motango ya bato oyo atangaki, bato oyo bakoki kosalela mopanga na bitumba: bato nkoto nkama mwambe kati na Isalaele, mpe nkoto nkama mitano kati na Yuda.
約阿布將統計的人民的數目,呈報給君王:以色列能執刀的士兵有八十萬人,猶大有五十萬人﹖
10 Sima na Davidi kotanga bato, asosolaki ete amemi ngambo. Bongo Davidi alobaki na Yawe: — Nasali lisumu monene na kotanga bato. Sik’oyo, nabondeli Yo, oh Yawe, limbisa mabe ya mosali na Yo; pamba te nasali makambo lokola moto ya liboma.
達味統計人民以後,心中感到不安,遂向上主說:「做這事,實在是犯了重罪。上主,現在我求你,赦免你僕人的罪,因為我所行實在昏愚」。
11 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, tango Davidi alamukaki, Yawe alobaki na mosakoli Gadi, mopesi toli ya mokonzi:
達味清早一起來,上主有話向先知加得──達味的先見者說:
12 — Kende koyebisa Davidi: « Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Nazali kotalisa yo bitumbu misato; pona moko kati na yango mpo ete Ngai nakokisa yango lokola etumbu mpo na yo. › »
「你去告訴達味:上主這樣說:我給你提出三件事,任你揀選一件,我好向你實行」。
13 Gadi akendeki koyebisa Davidi makambo oyo Yawe alobaki na ye: — Oponi etumbu nini mpo ete Ngai Yawe nakokisa yango mpo na yo: mibu sambo ya nzala makasi kati na mokili na yo; sanza misato oyo okokima liboso ya banguna na yo, oyo bakolanda yo; to mikolo misato ya bokono oyo ebomaka kati na mokili na yo? Kanisa sik’oyo malamu mpe yebisa ngai eyano oyo ngai nasengeli komema epai na Ye oyo atindi ngai.
加得來到達味前,告訴他說:「你要在國內三年飢荒呢﹖或要三個月逃避趕你的敵人呢﹖或者要在國內發生三天瘟疫呢﹖現在請你考慮一下,決定我應向那派我來者回覆什麼」。
14 Davidi azongiselaki Gadi: — Nazali na pasi makasi na motema. Eleki malamu mpo na ngai kokweya na maboko ya Yawe, pamba te mawa na Ye ezali solo monene; kasi tika ete nakweya te na maboko ya bato.
達味對加得說:「我很作難! 我們寧願落在上主的手中,因為衪富於仁慈,而不願落在人手中」。
15 Boye, Yawe atindaki kati na Isalaele bokono oyo ebomaka, wuta na tongo kaka wana kino na ngonga oyo akataki; mpe longwa na Dani kino na Beri-Sheba, bato nkoto tuku sambo bakufaki.
達味就揀選了瘟疫;正當收割麥子時,上主遂使瘟疫降於以色列,為早晨直到規定的時期,由丹直到貝爾舍巴,民間死了七萬人。
16 Lokola anjelu atandaki loboko na ye na likolo ya Yelusalemi mpo na kobebisa yango, Yawe atalaki mpe ayokaki mawa mpo na pasi wana. Alobaki na anjelu oyo azalaki kobebisa: « Ekoki! Longola loboko na yo! » Nzokande, na tango wana, anjelu na Yawe atelemaki pembeni ya etando ya Orina, moto ya Yebusi, kati na likolo mpe mabele, mpe asimbaki mopanga ezanga ebombelo.
當時,上主派一位使者往耶路撒冷去,要毀滅那座城。達味看見那打擊人民的使者,遂向上主說:「是我犯了罪,行了不義,而這些羊作了什麼﹖請你伸手打擊我和我的父家」。上主後悔降災,遂吩咐那毀滅人民的使者說:「夠了,現今收回你的手! 」那時,上主的使者正站在耶步斯人敖爾難的打禾場上。
17 Wana Davidi atombolaki miso mpe amonaki anjelu na Yawe koboma bato, alobaki na Yawe: « Ngai nde nasalaki masumu, ngai nde nasalaki mbeba; bango, bato ya ekolo na ngai, basali mabe moko te; boye, ebongi nde opesa ngai mpe libota na ngai etumbu! »
當時,上主派一位使者往耶路撒冷去,要毀滅那座城。達味看見那打擊人民的使者,遂向上主說:「是我犯了罪,行了不義,而這些羊作了什麼﹖請你伸手打擊我和我的父家」。上主後悔降災,遂吩咐那毀滅人民的使者說:「夠了,現今收回你的手! 」那時,上主的使者正站在耶步斯人敖爾難的打禾場上。
18 Kaka na mokolo yango, Gadi akendeki epai ya Davidi mpe alobaki na ye: — Kende kotonga etumbelo mpo na Yawe, na etando ya Orina, moto ya Yebusi.
那一天,加得來到達味前,對他說:「你上去,在敖爾難的打禾場上,為上主建立一座祭壇」。
19 Davidi akendeki kuna kolanda liloba oyo Gadi alobaki na Kombo na Yawe.
達味便照加奉上主所吩咐的話上去了。
20 Tango Orina atalaki mpe amonaki mokonzi elongo na bakalaka na ye koya epai na ye, abimaki mpe agumbamaki liboso ya mokonzi, elongi kino na mabele.
敖爾難望見君王和他的臣僕向他走來,敖爾難就上前去,俯首至地叩拜君王,
21 Orina atunaki mokonzi: — Mpo na nini mokonzi, nkolo na ngai, ayei epai ya mosali na ye? Davidi azongisaki: — Nayei kosomba etando oyo mpo ete natonga awa etumbelo mpo na Yawe; na bongo, bokono oyo ezali koboma bato ekosila.
說:「我主大王,為什麼到他僕人這裡來?」達味回答他說:「願向你買這禾場,給上主建立一座祭壇,為平息民間的災禍。」災禍」。
22 Orina azongiselaki Davidi: — Tika ete mokonzi, nkolo na ngai, akamata na ye lopango yango mpe abonza kuna mbeka oyo amoni ete ezali malamu mpo na Yawe. Tala bangombe ya mibali oyo ekosunga mpo na mbeka ya kotumba, mabaya ya bashario mpe bikangiseli oyo ekosunga mpo na kopelisa moto.
敖爾難對達味說:「我主大王看著好的,就拿去祭獻吧! 看,這裏有牛可作全燔祭,有打禾場和牛軛可作木柴。
23 Oh mokonzi, napesi yo nyonso! Orina alobaki lisusu na mokonzi: — Tika ete Yawe, Nzambe na yo, ayamba malamu bambeka na yo!
大王,敖爾難願將這一切獻於大王! 」繼而又對君王說:「願上主你的天主悅納你的祭獻! 」
24 Kasi mokonzi alobaki na Orina: — Te! Nasengeli kaka kosomba yango mpe kopesa yo motuya oyo ekoki na yango; naboyi kobonzela Yawe, Nzambe na ngai, bambeka ya kotumba oyo nazwi na ofele. Boye, Davidi asombaki etando mpe bangombe yango, na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, tuku mitano.
君王對敖爾難說:「不成,我非用錢向你買不可 ,我不願用不化錢的全燔祭,獻給上主我的天主」。於是達味以五十「協刻耳」銀子,買了那塊打禾場和牛。
25 Davidi atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe mpe abonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Yawe ayokelaki mboka mawa, mpe bokono oyo ezalaki koboma elongwaki na Isalaele.
達味在那裏為上主建立了一座祭壇,奉獻了全燔祭與和平祭。這樣上主才憐恤了那地,以色列間的災禍遂告平息。

< 2 Samuele 24 >