< 2 Samuele 23 >

1 Tala maloba ya suka ya Davidi: Maloba ya Davidi, mwana mobali ya Izayi, moto oyo atombolama na bokonzi, mopakolami ya Nzambe ya Jakobi, moyembi malamu ya banzembo ya Isalaele:
و این است سخنان آخر داود: «وحی داود بن یسا. و وحی مردی که بر مقام بلند ممتاز گردید، مسیح خدای یعقوب، و مغنی شیرین اسرائیل.۱
2 « Molimo na Yawe alobi na nzela na ngai, atie maloba na Ye na monoko na ngai.
روح خداوند به وسیله من متکلم شد و کلام او بر زبانم جاری گردید.۲
3 Nzambe oyo azali Libanga ya Isalaele ayebisi ngai: ‹ Mokonzi oyo akambaka bato kati na bosembo mpe botosi epai ya Nzambe,
خدای اسرائیل متکلم شد و صخره اسرائیل مراگفت: آنکه بر مردمان حکمرانی کند، عادل باشدو با خدا ترسی سلطنت نماید.۳
4 azali lokola pole ya tongo, tango moyi ebimaka mpe engalaka makasi lokola nde mapata ezali te, lokola kongenga ya sima na mvula oyo ebimisaka matiti na mokili. ›
و او خواهد بودمثل روشنایی صبح، وقتی که آفتاب طلوع نماید، یعنی صبح بی‌ابر، هنگامی که علف سبز از زمین می‌روید، به‌سبب درخشندگی بعد از باران.۴
5 Ezali bongo te mpo na libota na ngai liboso ya Nzambe, pamba te asalaki boyokani ya libela elongo na ngai, boyokani oyo esalema malamu na makambo nyonso, mpe oyo Ye moko abatelaka? Tango nyonso mpe na makambo nyonso, apesaki ngai elonga mpe akokisaki posa ya motema na ngai.
یقین خانه من با خدا چنین نیست. لیکن عهدجاودانی با من بسته است، که در همه‌چیز آراسته و مستحکم است. و تمامی نجات و تمامی مسرت من این است، هرچند آن را نمو نمی دهد.۵
6 Kasi bato nyonso ya kilikili bazali lokola nzete ya nzube oyo babwakaka mosika; basimbaka yango te na maboko pamba.
لیکن جمیع مردان بلیعال مثل خارهایند که دورانداخته می‌شوند. چونکه آنها را به‌دست نتوان گرفت.۶
7 Moto oyo alingi kosimba yango asengeli kosalela ebende to libaya ya likonga; batumbaka yango kaka na esika oyo ezali. »
و کسی‌که ایشان را لمس نماید، می‌بایدبا آهن و نی نیزه مسلح شود. و ایشان در مسکن خود با آتش سوخته خواهند شد.»۷
8 Tala bakombo ya basoda ya mpiko ya Davidi: Yoshebi-Bashebeti, moto ya Takimoni: azalaki mokonzi ya limpinga ya basoda misato ya mpiko, abomaki na likonga bato nkama mwambe na etumba moko.
و نامهای شجاعانی که داود داشت این است: یوشیب بشبت تحکمونی که سردار شالیشیم بودکه همان عدینو عصنی باشد که بر هشتصد نفرتاخت آورد و ایشان را در یک وقت کشت.۸
9 Molandi na ye ezalaki Eleazari, mwana mobali ya Dodo, moto ya Aoyi: azalaki moko kati na limpinga ya basoda misato ya mpiko oyo, elongo na Davidi, babundisaki bato ya Filisitia oyo basanganaki mpo na bitumba, wana bana ya Isalaele bazalaki kokima na likolo ya bangomba.
و بعد از او العازار بن دودو ابن اخوخی، یکی از آن سه مرد شجاع که با داود بودند، هنگامی که فلسطینیان را که در آنجا برای جنگ جمع شده، ومردان اسرائیل رفته بودند، به مقاتله طلبیدند.۹
10 Kasi ye ayikaki mpiko kati na bitumba mpe abomaki bato ya Filisitia kino alembaki, mpe loboko na ye etikaki mopanga te. Yawe apesaki bango elonga monene na mokolo wana. Mampinga bazongaki epai ya Eleazari kaka mpo na kokamata biloko ya bato oyo bakufaki.
واما او برخاسته، با فلسطینیان جنگ کرد تا دستش خسته شد و دستش به شمشیر چسبید و خداونددر آن روز، ظفر عظیمی داد، و قوم در عقب اوفقط برای غارت کردن برگشتند.۱۰
11 Sima na ye, Shama, mwana mobali ya Age, moto ya Arari. Tango bato ya Filisitia basanganaki na Leyi epai wapi ezalaki na elanga moko etonda na misili, basoda ya Isalaele bakimaki liboso na bango.
و بعد از او شمه بن آجی هراری بود وفلسطینیان، لشکری فراهم آوردند، در جایی که قطعه زمینی پر از عدس بود، و قوم از حضورفلسطینیان فرار می‌کردند.۱۱
12 Kasi Shama atelemaki na kati-kati ya elanga, abundelaki yango mpe abomaki bato ya Filisitia. Yawe apesaki bango elonga monene.
آنگاه او در میان آن قطعه زمین ایستاد و آن را نگاه داشته، فلسطینیان را شکست داد و خداوند ظفر عظیمی داد.۱۲
13 Mokolo moko, na ebandeli ya eleko ya kobuka bambuma, wana basoda ya bato ya Filisitia batongaki molako na bango kati na lubwaku ya Refayimi, basoda misato kati na basoda tuku misato ya mpiko bayaki epai ya Davidi, na ebombamelo ya mabanga ya Adulami.
و سه نفر از آن سی سردار فرود شده، نزدداود در وقت حصاد به مغاره عدلام آمدند، ولشکر فلسطینیان در وادی رفائیم اردو زده بودند.۱۳
14 Na tango yango, Davidi azalaki kati na ebombamelo moko batonga makasi, mpe basoda ya Filisitia bazalaki na Beteleemi.
و داود در آن وقت در ملاذ خویش بود و قراول فلسطینیان در بیت لحم.۱۴
15 Mbala moko, Davidi ayokaki posa ya mayi mpe alobaki: « Nani akomemela ngai mayi ya libulu oyo ezali pene ya ekuke ya Beteleemi mpo ete namela? »
و داود خواهش نموده، گفت: «کاش کسی مرا از چاهی که نزددروازه بیت لحم است آب بنوشاند.»۱۵
16 Basoda nyonso misato ya mpiko bakotaki na mayele kati na molako ya bato ya Filisitia, batokaki mayi na libulu oyo ezali pene ya ekuke ya Beteleemi mpe bamemaki yango epai ya Davidi. Kasi Davidi aboyaki komela mayi yango; asopaki yango na mabele lokola likabo ya masanga mpo na Yawe.
پس آن سه مرد شجاع، لشکر فلسطینیان را از میان شکافته، آب را از چاهی که نزد دروازه بیت لحم است کشیده، برداشتند و آن را نزد داود آوردند، اما نخواست که آن را بنوشد و آن را به جهت خداوند ریخت.۱۶
17 Alobaki: « Tika ete Yawe apesa ngai etumbu soki nameli mayi oyo, pamba te ezali lokola makila ya bato oyo bandimaki kokende kokufa mpo na ngai. » Boye, Davidi aboyaki komela mayi yango. Yango nde misala ya kokamwa oyo basoda misato ya mpiko basalaki.
و گفت: «ای خداوند حاشا ازمن که این کار را بکنم، مگر این خون آن کسان نیست که به خطر جان خود رفتند؟» از این جهت نخواست که بنوشد. کاری که این سه مرد کردند، این است.۱۷
18 Abishayi, ndeko mobali ya Joabi mpe mwana mobali ya Tseruya, azalaki mokonzi ya basoda misato ya mpiko. Abundisaki bato nkama misato na likonga na ye mpe abomaki bango. Boye, kati na bango misato, ye nde akendeki sango koleka.
و ابیشای، برادر یوآب بن صرویه، سردارسه نفر بود و نیزه خود را بر سیصد نفر حرکت داده، ایشان را کشت و در میان آن سه نفر اسم یافت.۱۸
19 Kati na basoda misato ya mpiko, ye nde azwaki lokumu koleka mpe akomaki mokonzi na bango, kasi akokanaki te na basoda misato ya limpinga ya liboso.
آیا از آن سه نفر مکرم تر نبود؟ پس سردار ایشان شد لیکن به سه نفر اول نرسید.۱۹
20 Benaya, moto ya mboka Kabitseli mpe mwana mobali ya Yeoyada, azalaki soda ya mpiko mpe asalaki makambo ebele ya kokamwa: abomaki bilombe mibale ya Moabi; mpe na mokolo ya mvula ya pembe, akitaki na libulu moko ya mayi mpe abomaki kuna nkosi.
و بنایاهو ابن یهویاداع، پسر مردی شجاع قبصئیلی، که کارهای عظیم کرده بود، دو پسراریئیل موآبی را کشت و در روز برف به حفره‌ای فرود شده، شیری را بکشت.۲۰
21 Ye mpe moto abomaki mbinga mobali moko ya Ejipito, oyo asimbaki likonga na loboko na ye. Abundisaki moto yango ya Ejipito na lingenda, abotolaki ye likonga oyo azalaki na yango na loboko mpe abomaki ye na likonga na ye moko.
و مرد خوش اندام مصری‌ای را کشت و آن مصری در دست خود نیزه‌ای داشت اما نزد وی با چوب دستی رفت و نیزه را از دست مصری ربود و وی را با نیزه خودش کشت.۲۱
22 Yango nde misala ya kokamwa oyo Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, asalaki. Ye mpe akendeki sango kati na basoda misato ya mpiko ya lisanga ya mibale.
و بنایاهو ابن یهویاداع این کارها را کرد و در میان آن سه مرد شجاع اسم یافت.۲۲
23 Kati na basoda tuku misato ya mpiko, ye nde azalaki na lokumu monene koleka, kasi akokanaki te na basoda misato ya mpiko ya limpinga ya liboso. Mpe Davidi akomisaki ye mokonzi ya bakengeli na ye.
و از آن سی نفر مکرمتر شد لیکن به آن سه نفر اول نرسید و داود او را بر اهل مشورت خود گماشت.۲۳
24 Kati na lisanga ya bato tuku misato, ezalaki mpe na: Asaeli, ndeko mobali ya Joabi; Elanani, mwana mobali ya Dodo, moto ya Beteleemi;
و عسائیل برادر یوآب یکی از آن سی نفربود و الحانان بن دودوی بیت لحمی،۲۴
25 Shama mpe Elika, bato ya Arodi;
و شمه حرودی و الیقای حرودی،۲۵
26 Eletsi, moto ya Peleti; Ira, mwana mobali ya Ikeshi, moto ya Tekoa;
و حالص فلطی و عیرا ابن عقیش تقوعی،۲۶
27 Abiezeri, moto ya Anatoti; Mebunayi, moto ya Usha;
و ابیعزر عناتوتی ومبونای حوشاتی،۲۷
28 Tsalimoni, moto ya Aoyi; Maarayi, moto ya Netofa;
و صلمون اخوخی و مهرای نطوفاتی،۲۸
29 Elebi, mwana mobali ya Baana, moto ya Netofa; Itayi, mwana mobali ya Ribayi, moto ya Gibea ya libota ya Benjame;
و حالب بن بعنه نطوفاتی و اتای بن ریبای از جبعه بنی بنیامین،۲۹
30 Benaya, moto ya Piratoni; Idayi, moto ya mabwaku ya Gashi;
و بنایای فرعاتونی و هدای از وادیهای جاعش،۳۰
31 Abi-Aliboni, moto ya Beti-Ariba; Azimaveti, moto ya Baarumi;
و ابوعلبون عرباتی و عزموت برحومی،۳۱
32 Eliaba, moto ya Shaaliboni; Bana mibali ya Yasheni; Jonatan,
و الیحبای شعلبونی و از بنی یاشن یوناتان،۳۲
33 Shama, moto ya Arari; Ayami, mwana mobali ya Sharari, moto ya Arari;
و شمه حراری و اخیام بن شارر اراری،۳۳
34 Elifeleti, mwana mobali ya Aasibayi, mwana mobali ya Maakati; Eliami, mwana mobali ya Ayitofeli, moto ya Gilo;
و الیفلط بن احسبای ابن معکاتی و الیعام بن اخیتوفل جیلونی،۳۴
35 Etsirayi, moto ya Karimeli; Paarayi, moto ya Arabi;
وحصرای کرملی و فعرای اربی،۳۵
36 Yigali, mwana mobali ya Natan, moto ya Tsoba; Bani, moto ya Gadi;
و یجال بن ناتان از صوبه و بانی جادی،۳۶
37 Tseleki, moto ya Amoni; Naarayi, moto ya Beyeroti, oyo azalaki komema bibundeli ya Joabi, mwana mobali ya Tseruya;
و صالق عمونی ونحرای بئیروتی که سلاحداران یوآب بن صرویه بودند،۳۷
38 Ira mpe Garebi, bato ya Yeteri;
و عیرای یتری و جارب یتری،۳۸
39 mpe Iri, moto ya Iti. Na kosangisa, bango nyonso bazalaki tuku misato na sambo.
واوریای حتی، که جمیع اینها سی و هفت نفربودند.۳۹

< 2 Samuele 23 >