< 2 Samuele 22 >
1 Davidi ayembelaki Yawe nzembo na maloba oyo, tango Yawe akangolaki ye wuta na maboko ya banguna na ye nyonso mpe na loboko ya Saulo.
David pronunció las palabras de este cántico a Yavé el día cuando Yavé lo libró de la mano de Saúl y de todos sus enemigos:
2 Alobaki: Yawe azali libanga na ngai, ndako na ngai ya makasi mpe mokangoli na ngai;
Yavé es mi Roca, mi Fortaleza, y mi Libertador.
3 azali Nzambe na ngai, libanga na ngai mpe ebombamelo na ngai; azali nguba na ngai, nguya oyo ebikisaka ngai, ekimelo na ngai, mpe Mobikisi na ngai. Okangolaka ngai wuta na maboko ya bato mabe.
ʼElohim es mi Roca, en Quien me refugio, Mi Escudo y el Fuerte de mi salvación, Mi alto Refugio y mi Salvador. De la violencia me libraste.
4 Nabelelaki Yawe oyo abongi na lokumu, mpe nakangolamaki wuta na maboko ya banguna na ngai.
Invoco a Yavé, Quien es digno de ser alabado Y soy salvo de mis enemigos.
5 Mbonge ya kufa efinaki ngai, mpela ya libebi epesaki ngai somo,
Me rodearon ondas de muerte Y torrentes de perversidad me aterraron.
6 basinga ya mboka ya bakufi elingaki ngai, mitambo ya kufa ekangaki ngai. (Sheol )
Me ataron las cuerdas del Seol Y me alcanzaron las cuerdas de la muerte. (Sheol )
7 Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, nagangaki epai ya Nzambe na ngai mpo ete asunga ngai. Yawe ayokaki mongongo na ngai wuta na Tempelo na Ye, koganga na ngai mpo na kosenga lisungi ekomaki kino na matoyi na Ye.
En mi angustia invoqué a Yavé. Invoqué a mi ʼElohim. Oyó mi voz desde su Templo, Y mi grito de auxilio llegó a sus oídos.
8 Mabele ekomaki koningana makasi, miboko ya Lola elengaki mpe ebukanaki, pamba te Yawe asilikaki.
La tierra fue conmovida y tembló. Se conmovieron los cimientos del cielo. Se estremecieron porque Él se airó.
9 Milinga ekomaki kobima na zolo na Ye, moto makasi elongo na makala ya moto ekomaki kobima na monoko na Ye.
Humo subió de su nariz Y de su boca salió un fuego abrasador Que encendió brasas.
10 Afungolaki Lola mpe akitaki, mapata ya mwindo ezalaki na se ya matambe na Ye.
Inclinó los cielos, Y descendió con espesa oscuridad debajo de sus pies.
11 Amataki na likolo ya Sheribe mpe apumbwaki, apepaki na mapapu ya mopepe.
Cabalgó sobre un querubín y voló. Voló sobre las alas del viento.
12 Akomisaki molili oyo ezingelaki Ye mpe mapata ya mwindo ya likolo, Ndako na Ye.
Puso oscuridad alrededor de Él como escondedero, Oscuridad de aguas y densos nubarrones.
13 Kongenga oyo ezalaki liboso na Ye ezalaki kobimisa makala ya moto.
Con el resplandor de su Presencia se encendieron brasas.
14 Yawe agangaki wuta na Lola, mongongo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo eyokanaki.
Yavé tronó desde el cielo, ʼElyón dio su voz.
15 Abwakaki makonga na Ye, mpe atindaki yango na bangambo nyonso; abakisaki motango ya mikalikali mpo na kopalanganisa yango.
Disparó sus flechas y los dispersó. Lanzó relámpagos, y los destruyó.
16 Na koganga ya Yawe mpe na pema ya zolo na Ye, nzela oyo mayi ya ebale elekelaka ebimaki, mpe miboko ya mokili emonanaki na libanda.
Entonces aparecieron los torrentes de las aguas Y quedaron descubiertos los cimientos del mundo a la reprensión de Yavé Por el soplo del aliento de su nariz.
17 Atandaki loboko na Ye wuta na likolo, akamataki ngai mpe abimisaki ngai na likama oyo nazalaki na yango kati na mayi ya mozindo makasi.
Envió desde lo alto y me tomó. Me sacó de entre las aguas caudalosas.
18 Akangolaki ngai wuta na maboko ya monguna na ngai ya nguya mpe ya bayini na ngai, pamba te balekaki ngai na makasi.
Me libró de un poderoso enemigo, Y de los que me aborrecían, Aunque eran más fuertes que yo.
19 Babundisaki ngai na mokolo oyo pasi ezalaki kokanga ngai, kasi Yawe azalaki eyekamelo na ngai.
Me enfrentaron en el día de mi quebranto, Pero Yavé fue mi Apoyo
20 Abimisaki ngai mpo na kokomisa ngai nsomi, akangolaki ngai, pamba te alingaka ngai.
Y me sacó a lugar espacioso. Me libró, porque se agradó de mí.
21 Yawe asalelaki ngai makambo wana kolanda bosembo na ngai, afutaki ngai kolanda bopeto ya maboko na ngai.
Yavé me premió según mi rectitud Y recompensó la pureza de mis manos,
22 Pamba te nabateli banzela ya Yawe, napesi Nzambe na ngai mokongo te lokola bato mabe.
Porque guardé los caminos de Yavé Y no me aparté impíamente de mi ʼElohim.
23 Natosaka mibeko na Ye nyonso mpe nabatelaka bikateli na Ye.
Pues todos sus Preceptos estuvieron delante de mí, Y no me aparté de sus Estatutos.
24 Epai na Ye, nazalaki moto oyo azangi pamela mpe namibatelaki mpo ete nasala masumu te.
Fui recto ante Él Y me guardé de mi maldad.
25 Yawe afuti ngai kolanda bosembo na ngai, kolanda bopeto na ngai na miso na Ye.
Yavé me recompensó según mi rectitud Según la pureza de mis manos ante Él.
26 Solo, otalisaka bosembo na Yo epai ya moto oyo atambolaka na bosembo, mpe bolamu na Yo, epai ya moto oyo azangi pamela.
Con el misericordioso te muestras misericordioso, Y recto con el hombre íntegro.
27 Otalisaka bopeto na Yo epai ya moto ya peto, kasi omibombaka liboso ya moto oyo atambolaka nyoka-nyoka.
Limpio te muestras con el limpio, Y sagaz con el perverso.
28 Obikisaka banyokolami, otalaka mpe okitisaka bato na lofundu.
Tú salvas al pueblo afligido, Pero tus ojos están sobre los altivos para humillarlos.
29 Oh Yawe, ozali mwinda na ngai; obongolaka molili na ngai pole.
¡Tú eres mi Lámpara, oh Yavé! ¡Oh Yavé, Tú alumbras mi oscuridad!
30 Elongo na Yo, nabundisaka mampinga oyo elati bibundeli; mpe na lisungi ya Nzambe na ngai, nakatisaka bamir.
Porque contigo puedo asaltar un ejército. Con mi ʼElohim puedo saltar sobre un muro.
31 Nzela ya Nzambe ezali ya kokoka, Liloba na Yawe ezali na mbeba te; azali nguba mpo na bato nyonso oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango.
En cuanto a ʼEL, perfecto es su camino, Y acrisolada es la Palabra de Yavé. ʼEL es Escudo a todos los que se refugian en Él.
32 Nani azali Nzambe soki Yawe te? Nani azali libanga soki Nzambe na biso te?
Porque ¿quién es ʼEL, excepto Yavé? ¿Y cuál roca hay además de nuestro ʼElohim?
33 Ezali Nzambe nde azali ndako na ngai ya makasi, abatelaka nzela na ngai mpe akomisaka yango polele liboso na ngai;
ʼEL es el que me ciñe de vigor Y perfecciona mi camino.
34 akomisaka makolo na ngai lokola ya mboloko mpe avandisaka ngai na bisika ya likolo;
ʼEL hace que mis pies sean como los de venados Y me establece en mis alturas.
35 alakisaka ngai kobunda, mpe maboko na ngai ekoki kobenda tolotolo ya bronze.
El que adiestra mis manos para la batalla Y mis brazos para tensar el arco de bronce.
36 Okomisaka lobiko na Yo nguba na ngai, mpe lisungi na Yo ekomisaka ngai makasi.
Me diste también el escudo de tu salvación Y me engrandeció tu benignidad.
37 Otambolisaka ngai na kimia, mpe makolo na ngai elengaka te.
Ensanchas mis pasos debajo de mí, Y no resbalan mis pies.
38 Nalandaka banguna na ngai mpe nabomaka bango, nazongaka kaka soki nasilisi koboma bango.
Perseguí a mis enemigos y los destruí, Y no regresé hasta que fueron acabados.
39 Nabebisaka bango nye, mpe bakokaka lisusu kotelema te; bakweyaka na se ya matambe na ngai.
Los destruí, los destrocé para que no se levanten. Cayeron bajo mis pies.
40 Opesaka ngai makasi ya bitumba, ogumbaka banguna na ngai mpe otiaka bango na se ya matambe na ngai.
Pues Tú me dotaste de fuerza para la batalla. Doblegaste a mis enemigos debajo de mí.
41 Okimisaka banguna na ngai mosika na ngai, mpe nabebisaka bayini na ngai.
También hiciste que mis enemigos me volvieran la espalda, Para que yo destruya a los que me aborrecen.
42 Bagangaka mpo na koluka lisungi, kasi moto oyo akokaki kobikisa bango azalaka te; babelelaka Yawe, kasi ayanolaka bango te.
Clamaron, y no hubo quien salvara. Aun [clamaron] a Yavé, pero no los escuchó.
43 Nanikaka bango lokola putulu ya mabele, nafinaka bango, nanyataka bango lokola potopoto ya nzela.
Los molí como polvo de la tierra. Los pisé y los trituré como el lodo de las calles.
44 Olongisaka ngai na bitumba ya bato, obatelaka ngai mpo ete nazala mokambi ya bikolo. Bato oyo nayebaki te bakomi kosalela ngai.
Tú me libraste de las contiendas de mi pueblo. Me guardaste para ser jefe de naciones. Pueblo que yo no conocía me sirvió.
45 Bapaya bazali koya mpo ete nasepela na bango; soki kaka bayoki ngai, batosaka ngai.
Los hijos de extranjeros se someten a mí. Al oír de mí, me obedecen.
46 Bango nyonso balembi nzoto mpe bakomi kobima na kolenga wuta na bandako na bango ya makasi.
Los extranjeros se debilitan Y salen temblorosos de sus encierros.
47 Longonya na Yawe! Tika ete Ye oyo azali libanga na ngai akumisama! Tika ete Nzambe, libanga ya lobiko na ngai, anetolama!
¡Viva Yavé! ¡Bendita sea mi Roca! ¡Engrandecido sea ʼElohim, la Roca de mi salvación!
48 Azali Nzambe oyo abundelaka ngai, oyo atiaka bikolo na se ya matambe na ngai,
El ʼEL que ejecuta venganza por mí, Y somete pueblos a mí.
49 akangolaka ngai wuta na maboko ya banguna na ngai. Olongisaka ngai liboso ya banguna na ngai, obikisaka ngai na maboko ya banguna na ngai.
El que también me saca de entre los enemigos, Y aun me exalta por encima de los que se levantan contra mí.
50 Yango wana, nakosanzola Yo, Yawe, kati na bikolo, nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo.
Por tanto yo te alabaré, oh Yavé, entre las naciones. Cantaré alabanzas a tu Nombre.
51 Yawe apesaka elonga monene epai ya mokonzi na Ye, atalisaka bolingo na Ye epai ya mopakolami na Ye, epai ya Davidi mpe libota na ye mpo na libela.
Él engrandece las victorias de su rey, Y muestra misericordia a su ungido: A David y a sus descendientes para siempre.