< 2 Samuele 21 >
1 Tango Davidi azalaki mokonzi, nzala makasi ekotaki mpe esalaki mibu misato. Davidi atunaki Yawe, mpe Yawe alobaki na ye: « Ezali mpo na Saulo mpe libota na ye oyo esopaki makila, pamba te babomaki bato ya Gabaoni. »
Byl pak hlad za dnů Davidových tři léta pořád. I hledal David tváři Hospodinovy. Jemuž řekl Hospodin: Pro Saule a pro dům jeho vražedlný, nebo zmordoval Gabaonitské.
2 Mokonzi abengisaki bato ya Gabaoni mpo na kosolola na bango. Nzokande bato ya Gabaoni bazalaki kotangama te kati na bato ya Isalaele, kasi bakanganaki na batikali kati na bato ya Amori; bongo bato ya Isalaele bakanganaki na bato ya Amori, na nzela ya ndayi, mpo na kotika bango na bomoi. Kasi Saulo, na bolingo na ye oyo eleka ndelo mpo na Isalaele mpe Yuda, alukaki kosilisa koboma bango.
Tedy povolav král Gabaonitských, mluvil k nim. (Gabaonitští pak nebyli z synů Izraelských, ale z ostatků Amorejských, jimž ačkoli byli synové Izraelští přísahou se zavázali, však Saul usiloval je vypléniti, v horlivosti své pro syny Izraelské a Judské.)
3 Davidi atunaki bato ya Gabaoni: — Eloko nini nakoki kosala mpo na bino? Na mabe oyo basalaki bino, ndenge nini nakoki kobongisa makambo mpo ete bopambola libula na Yawe?
A řekl David Gabaonitským: Což vám učiním a čím vás spokojím, abyste dobrořečili dědictví Hospodinovu?
4 Bato ya Gabaoni bazongiselaki ye: — Mpo na kobongisa makambo na biso elongo na Saulo mpe libota na ye, tozali na posa te ya palata to ya wolo; tokoki mpe te koboma ata moto moko kati na Isalaele. Davidi atunaki lisusu: — Bolingi ete ngai nasala nini mpo na bino?
Odpověděli jemu Gabaonitští: Není nám o stříbro ani o zlato činiti s Saulem a domem jeho, ani o bezživotí někoho z Izraele. I řekl: Cožkoli díte, učiním vám.
5 Bazongiselaki mokonzi: — Lokola tata wana alingaki kosilisa koboma biso mpe asalaki mabongisi ya kobebisa biso mpo ete tolimwa kati na mokili mobimba ya Isalaele,
Kteříž řekli králi: Muže toho, kterýž vyhubil nás, a kterýž ukládal o nás, vyhladíme, aby nezůstal v žádných končinách Izraelských.
6 tika ete mokonzi akaba na maboko na biso mibali sambo kati na bakitani ya Saulo mpo ete todiembika banzoto na bango liboso ya Yawe, na Gibea, engumba ya Saulo, moponami na Yawe. Mokonzi alobaki: — Nakopesa bino bango.
Nechť jest nám dáno sedm mužů z jeho synů, a zvěsíme je Hospodinu u Gabaa Saulova, kteréhož byl vyvolil Hospodin. I řekl král: Já dám.
7 Mokonzi atikaki na bomoi Mefibosheti, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Saulo, mpo na boyokani oyo ezalaki kati na bango mibale, Davidi mpe Jonatan, mwana mobali ya Saulo, tango Davidi alapaki ndayi na Kombo na Yawe.
Odpustil pak král Mifibozetovi synu Jonaty, syna Saulova, pro přísahu Hospodinovu, kteráž byla mezi nimi, mezi Davidem a Jonatou synem Saulovým.
8 Kasi mokonzi akangaki Arimoni mpe Mefibosheti, bana mibali oyo Ritsipa, mwana mwasi ya Aya, abotelaki Saulo; akangaki lisusu bana mibali mitano oyo Mikali, mwana mwasi ya Saulo, abotelaki Adriyeli, mwana mobali ya Barizilayi, moto ya Meola;
Ale vzal král dva syny Rizpy dcery Aja, kteréž porodila Saulovi, Armona a Mifibozeta, a pět synů sestry Míkol dcery Saulovy, kteréž byla porodila Adrielovi synu Barzillai Molatitského.
9 akabaki bango na maboko ya bato ya Gabaoni. Bongo bato ya Gabaoni babomaki bango mpe badiembikaki banzoto na bango na ngomba liboso ya Yawe. Bango nyonso sambo bakufaki elongo. Babomaki bango na mikolo ya liboso ya tango ya kobuka bambuma, kaka na ebandeli ya tango oyo babukaki bambuma ya orje.
I vydal je v ruku Gabaonitských, kteréž zvěšeli na hoře před Hospodinem. A tak kleslo těch sedm spolu, a zbiti jsou při začátku žně, když počínali žíti ječmene.
10 Bongo Ritsipa, mwana mwasi ya Aya, alongolaki elamba ya saki oyo alataki mpe atandaki yango na libanga; avandaki wana, wuta na ebandeli ya tango ya kobuka bambuma ya orje kino na eleko oyo mvula enokelaki bibembe. Na moyi, apekisaki bandeke ya likolo kokita na likolo ya bibembe yango; mpe na butu, abenganaki banyama ya zamba.
Rizpa pak, dcera Aja, vzavši žíni, prostřela ji sobě na skále při začátku žně, dokudž nepršel na ně déšť s nebe, a nedala ptákům nebeským sedati na ně ve dne, ani přicházeti zvěři polní v noci.
11 Davidi ayokaki makambo oyo Ritsipa, mwana mwasi ya Aya, makangu ya Saulo, asalaki.
Tedy oznámeno jest Davidovi, co učinila Rizpa dcera Aja, ženina Saulova.
12 Bongo Davidi akendeki kozwa mikuwa ya Saulo mpe ya Jonatan, mwana na ye ya mobali, epai ya bakambi ya Yabeshi ya Galadi, oyo bayibaki yango na libanda ya Beti-Sheani epai wapi bato ya Filisitia badiembikaki yango mokolo oyo babomaki Saulo, na Giliboa.
Protož odšed David, vzal kosti Saulovy a kosti Jonaty syna jeho od starších Jábes Galád, kteříž byli je ukradli na ulici Betsan, kdežto byli je zvěšeli Filistinští v ten den, když porazili Filistinští Saule v Gelboe.
13 Wuta kuna, Davidi amemaki mikuwa ya Saulo mpe ya Jonatan, mwana na ye ya mobali; asangisaki mpe mikuwa ya bato sambo oyo babomaki mpe badiembikaki.
Vzal, pravím, odtud kosti Saulovy a kosti Jonaty syna jeho; i kosti těch, kteříž zvěšeni byli, sebrali.
14 Bakundaki mikuwa ya Saulo mpe ya mwana na ye ya mobali, Jonatan, kati na kunda ya Kishi, tata ya Saulo, na Tsela kati na etuka ya Benjame. Basalaki makambo nyonso oyo mokonzi atindaki. Sima na yango, Nzambe ayanolaki losambo mpo na mokili ya Isalaele.
A pochovali je s kostmi Saulovými a Jonaty syna jeho, v zemi Beniamin, v Sela, v hrobě Cis otce jeho; a učinili všecko, což byl přikázal král, a potom slitoval se Bůh nad zemí.
15 Bitumba ezalaki lisusu kati ya bato ya Filisitia mpe bato ya Isalaele. Davidi akitaki elongo na basoda na ye mpo na kobundisa bato ya Filisitia; mpe Davidi alembaki.
Vznikla pak opět válka Filistinských proti Izraelovi. I vytáhl David a služebníci jeho s ním, a bili se s Filistinskými, tak že ustal David.
16 Yishibi-Benobi, mokitani ya Rafa, azalaki na mopanga ya sika, likonga oyo songe na yango ezalaki ya bronze mpe ezalaki ya bakilo koleka misato; mpe abetaki tolo ete akoboma Davidi.
Tedy Izbibenob, kterýž byl z synů jednoho obra, (jehož kopí hrot vážil tři sta lotů oceli, a měl připásaný k sobě meč nový), myslil zabiti Davida.
17 Kasi Abishayi, mwana mobali ya Tseruya, ayaki kosunga Davidi, abetaki moto ya Filisitia mpe abomaki ye. Boye bato ya Davidi bakataki seleka epai ya mokonzi, balobaki: « Okobima lisusu te elongo na biso na bitumba mpo ete mwinda ya Isalaele ekufa te. »
Ale retoval ho Abizai syn Sarvie, a raniv toho Filistinského, zabil jej. Protož muži Davidovi přisáhli, řkouce jemu: Nepůjdeš více s námi do boje, abys nezhasil svíce Izraelské.
18 Sima na mwa tango, ezalaki lisusu na bitumba na bato ya Filisitia, kuna na mboka Gobi. Ezalaki na tango yango nde Sibekayi, moto ya Usha, abomaki Safi, moko kati na bakitani ya Rafa.
Opět byla válka v Gob s Filistinskými. Tehdáž Sibbechai Chusatský zabil Sáfu, kterýž byl z synů téhož obra.
19 Ezalaki lisusu na bitumba na bato ya Filisitia, kuna na Gobi; mpe Elanani, mwana mobali ya Yare-Oregimi, moto ya Beteleemi, abomaki Goliati, moto ya Gati, oyo nzete ya likonga na ye ezalaki monene lokola libaya oyo basali bilamba na maboko basalelaka.
Byla ještě i jiná válka s Filistinskými v Gob, kdež Elchánan syn Járe Oregim Betlémský zabil bratra Goliáše Gittejského, u jehož kopí bylo dřevo jako vratidlo tkadlcovské.
20 Ezalaki lisusu na bitumba oyo esalemaki kuna na Gati; mpe ezalaki kuna na mbinga mobali moko, mokitani ya Rafa, oyo azalaki na misapi motoba na loboko moko na moko, mpe misapi motoba na lokolo moko na moko. Na kosangisa, azalaki na misapi tuku mibale na minei.
Potom byla také válka v Gát. A byl tam muž veliké postavy, kterýž měl u rukou a u noh po šesti prstech, všech čtyřmecítma, a byl také syn toho obra.
21 Atiolaki Isalaele; mpe Jonatan, mwana mobali ya Shimea mpe ndeko mobali ya Davidi, abomaki ye.
Ten když haněl Izraele, zabil ho Jonata, syn Semmaa bratra Davidova.
22 Bango minei bazalaki bakitani ya Rafa, babotama na Gati mpe bakufaki liboso ya Davidi mpe ya basoda na ye.
Ti čtyři byli synové jednoho obra v Gát, kteříž padli od ruky Davidovy a od ruky služebníků jeho.