< 2 Samuele 2 >
1 Sima na yango, Davidi atunaki Yawe: — Nakoki na ngai kokende na moko kati na bingumba ya Yuda? Yawe azongisaki: — Okoki na yo kokende. Davidi atunaki lisusu: — Nakende wapi? Yawe azongisaki: — Kende na Ebron.
Some time later, David inquired of the LORD, “Should I go up to one of the towns of Judah?” “Go up,” the LORD answered. Then David asked, “Where should I go?” “To Hebron,” replied the LORD.
2 Boye Davidi akendeki kuna elongo na basi na ye mibale: Ayinoami, moto ya Jizireyeli; mpe Abigayili, mwasi oyo akufisaki mobali na ye ya liboso, Nabali, moto ya Karimeli.
So David went there with his two wives, Ahinoam of Jezreel and Abigail the widow of Nabal of Carmel.
3 Davidi amemaki lisusu mibali oyo bazalaki elongo na ye, moko na moko elongo na libota na ye; mpe bavandaki na bingumba ya Ebron mpe na bamboka na yango ya mike.
David also took the men who were with him, each with his household, and they settled in the towns near Hebron.
4 Bongo bato ya Yuda bayaki na Ebron mpe bapakolaki kuna Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya libota ya Yuda. Bayebisaki Davidi ete ezali bato ya Yabeshi ya Galadi nde bakundi Saulo.
Then the men of Judah came to Hebron, and there they anointed David king over the house of Judah. And they told David, “It was the men of Jabesh-gilead who buried Saul.”
5 Davidi atindaki bantoma mpo na koloba na bato ya Yabeshi ya Galadi: « Tika ete Yawe apambola bino na ndenge botalisaki motema malamu epai ya nkolo na bino, Saulo, mpe na ndenge bokundaki ye!
So David sent messengers to the men of Jabesh-gilead to tell them, “The LORD bless you, because you showed this kindness to Saul your lord when you buried him.
6 Tika ete Yawe atalisa bino sik’oyo bolamu mpe boyengebene! Lokola bosalaki bongo, ngai mpe nakotalisa bino bolamu yango kaka.
Now may the LORD show you loving devotion and faithfulness, and I will also show you the same favor because you have done this.
7 Sik’oyo, bozala makasi mpe boyika mpiko, pamba te nkolo na bino, Saulo, akufi. Kasi boyeba mpe ete bato ya Yuda bapakoli ngai mafuta mpo ete nakoma mokonzi na bango. »
Now then, be strong and courageous, for though Saul your lord is dead, the house of Judah has anointed me as their king.”
8 Na tango wana, Abineri, mwana mobali ya Neri, mokonzi ya basoda ya Saulo, azwaki Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, mpe amemaki ye na Maanayimi.
Meanwhile, Abner son of Ner, the commander of Saul’s army, took Saul’s son Ish-bosheth, moved him to Mahanaim,
9 Akomisaki ye mokonzi ya Galadi, ya bato ya Ashuri mpe ya Jizireyeli, ya Efrayimi, ya Benjame mpe ya Isalaele mobimba.
and made him king over Gilead, Asher, Jezreel, Ephraim, and Benjamin—over all Israel.
10 Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, azalaki na mibu tuku minei ya mbotama tango akomaki mokonzi ya Isalaele, mpe akonzaki mibu mibale. Kasi libota ya Yuda ekanganaki na Davidi.
Saul’s son Ish-bosheth was forty years old when he began to reign over Israel, and he reigned for two years. The house of Judah, however, followed David.
11 Davidi asalaki mibu sambo na sanza motoba na Ebron lokola mokonzi ya libota ya Yuda.
And the length of time that David was king in Hebron over the house of Judah was seven years and six months.
12 Abineri, mwana mobali ya Neri, elongo na bato ya Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, babimaki wuta na Maanayimi mpo na kokende na Gabaoni.
One day Abner son of Ner and the servants of Ish-bosheth son of Saul marched out from Mahanaim to Gibeon.
13 Joabi, mwana mobali ya Tseruya, elongo na basali ya Davidi, bango mpe babimaki mpe bakutanaki na bato ya Abineri pene ya liziba ya Gabaoni: bamoko bazalaki na ngambo moko ya liziba, mpe bamosusu, na ngambo mosusu.
So Joab son of Zeruiah, along with the servants of David, marched out and met them by the pool of Gibeon. And the two camps took up positions on opposite sides of the pool.
14 Abineri alobaki na Joabi: — Tika ete bilenge mibali batelema mpe babunda liboso na biso! Joabi azongisaki: — Malamu! Tika ete babunda.
Then Abner said to Joab, “Let us have the young men get up and compete before us.” “Let them get up,” Joab replied.
15 Boye, wana batelemaki mpe batangaki bango, emonanaki motango oyo: zomi na mibale mpo na libota ya Benjame mpe Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo; mpe zomi na mibale kati na basali ya Davidi.
So they got up and were counted off—twelve for Benjamin and Ish-bosheth son of Saul, and twelve for David.
16 Moko na moko asimbaki monguna na ye na moto mpe atobolaki ye mopanga na mopanzi; mpe bango nyonso bakweyaki nzela moko. Bongo babengaki esika yango ya Gabaoni: Elikati-Atsurimi.
Then each man grabbed his opponent by the head and thrust his sword into his opponent’s side, and they all fell together. So this place, which is in Gibeon, is called Helkath-hazzurim.
17 Etumba ya mokolo wana ezalaki makasi penza. Basali ya Davidi balongaki Abineri elongo na bato ya Isalaele.
The battle that day was intense, and Abner and the men of Israel were defeated by the servants of David.
18 Bana mibali misato ya Tseruya bazalaki wana: Joabi, Abishayi mpe Asaeli. Asaeli azalaki mbangu lokola mboloko ya zamba.
The three sons of Zeruiah were there: Joab, Abishai, and Asahel. Now Asahel was fleet of foot like a wild gazelle,
19 Asaeli alandaki Abineri na molende penza mpe atikalaki kobaluka te, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to ya loboko ya mwasi.
and he chased Abner, not turning to the right or to the left in his pursuit.
20 Tango Abineri abalukaki mpo na kotala na sima, atunaki: — Ezali yo Asaeli? Asaeli azongisaki: — Iyo, ezali ngai.
And Abner glanced back and said, “Is that you, Asahel?” “It is,” Asahel replied.
21 Abineri alobaki na ye: — Kende na ngambo ya loboko ya mobali to ya mwasi, bundisa moko kati na bilenge mibali mpe botola ye bibundeli. Kasi Asaeli atikaki te kolanda ye.
So Abner told him, “Turn to your right or to your left, seize one of the young men, and take his equipment for yourself.” But Asahel would not stop chasing him.
22 Boye Abineri alobaki lisusu na Asaeli: — Tika kolanda ngai! Mpo na nini kotindika ngai na koboma yo? Bongo ndenge nini nakotala Joabi, ndeko na yo ya mobali, na elongi?
Once again, Abner warned Asahel, “Stop chasing me. Why should I strike you to the ground? How could I show my face to your brother Joab?”
23 Kasi lokola Asaeli aboyaki kotika kolanda ye, Abineri atubaki Asaeli songe ya likonga na ye na libumu; mpe likonga ebimaki ye na mokongo. Asaeli akweyaki mpe akufaki wana. Moto nyonso oyo azalaki kokoma na esika oyo Asaeli akweyaki mpe akufaki azalaki kotelema.
But Asahel refused to turn away; so Abner thrust the butt of his spear into his stomach, and it came out his back, and he fell dead on the spot. And every man paused when he came to the place where Asahel had fallen and died.
24 Joabi mpe Abishayi balandaki Abineri; mpe wana moyi ezalaki kolala, bakomaki na etando ya Ama oyo etalani na Guya, na nzela oyo ekenda na esobe ya Gabaoni.
But Joab and Abishai pursued Abner. By sunset, they had gone as far as the hill of Ammah opposite Giah on the way to the wilderness of Gibeon.
25 Bato ya Benjame basanganaki sima na Abineri, basalaki lisanga mpe batelemaki na songe ya ngomba moko ya moke.
The Benjamites rallied to Abner, formed a single unit, and took their stand atop a hill.
26 Abineri abelelaki na Joabi: — Boni, mopanga ekoba na yango koboma tango nyonso? Oyebi te ete ekosuka mabe? Okozela kino tango nini mpo na kopesa mitindo na bato na yo ete balanda lisusu te bandeko na bango?
Then Abner called out to Joab: “Must the sword devour forever? Do you not realize that this will only end in bitterness? How long before you tell the troops to stop pursuing their brothers?”
27 Joabi azongisaki: — Na Kombo na Nzambe, soki olobaki te, bato balingaki kokoba kolanda bandeko na bango kino lobi na tongo.
“As surely as God lives,” Joab replied, “if you had not spoken up, the troops would have continued pursuing their brothers until morning.”
28 Boye Joabi abetaki kelelo, mpe bato nyonso batelemaki, batikaki kolanda Isalaele mpe babundaki lisusu te.
So Joab blew the ram’s horn, and all the troops stopped; they no longer pursued Israel or continued to fight.
29 Na butu wana nyonso, Abineri mpe bato na ye nyonso batambolaki na etando ya Araba, balekaki Yordani, bakatisaki Bitironi mobimba mpe bakomaki na Maanayimi.
And all that night Abner and his men marched through the Arabah. They crossed the Jordan, marched all morning, and arrived at Mahanaim.
30 Joabi atikaki kolanda Abineri mpe azongaki, asangisaki bato na ye nyonso: emonanaki ete bato ya Davidi zomi na libwa kaka nde bazangaki, bakisa Asaeli.
When Joab returned from pursuing Abner, he gathered all the troops. In addition to Asahel, nineteen of David’s servants were missing,
31 Kasi bato ya Davidi babomaki bato ya Benjame nkama misato na tuku motoba oyo bazalaki elongo na Abineri.
but they had struck down 360 Benjamites who were with Abner.
32 Bakamataki Asaeli mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye, na Beteleemi. Bongo Joabi mpe bato na ye batambolaki butu mobimba mpe bakomaki na Ebron na tongo-tongo.
Later, they took Asahel and buried him in his father’s tomb in Bethlehem. Then Joab and his men marched all night and reached Hebron at daybreak.