< 2 Samuele 19 >

1 Sango ekomelaki Joabi na koloba: « Mokonzi azali kolela mpe asali matanga mpo na Abisalomi. »
It was told Joab, "Look, the king weeps and mourns for Absalom."
2 Mokolo wana, elonga ebongwanaki matanga mpo na bato nyonso, pamba te bato bayokaki na mokolo wana sango koloba: « Mokonzi azali na mawa makasi mpo na mwana na ye ya mobali. »
The victory that day was turned into mourning to all the people; for the people heard it said that day, "The king grieves for his son."
3 Na mokolo wana kaka, bato bazongaki na nkuku kati na engumba lokola mampinga oyo bazali koyoka soni mpo ete bakimi na bitumba.
So the people went quietly into the city that day, the way that people who are humiliated creep away when fleeing in battle.
4 Mokonzi azipaki elongi mpe alelaki makasi: « Oh mwana na ngai ya mobali, Abisalomi! Oh mwana na ngai ya mobali, Abisalomi! Mwana na ngai ya mobali! »
The king covered his face, and he cried with a loud voice, "My son Absalom, Absalom, my son."
5 Joabi akendeki kokuta mokonzi kati na ndako mpe alobaki na ye: « Lelo, oyokisi bato na yo nyonso soni, bato oyo bawuti kobikisa bomoi na yo, bomoi ya bana na yo ya mibali mpe ya basi, bomoi ya basi na yo mpe bomoi ya bamakangu na yo.
Then Joab went into the house to the king, and said, "Today you have humiliated the faces of all your servants, who have this day saved your life and the lives of your sons and of your daughters and the lives of your wives and the lives of your secondary wives;
6 Olingaka bato oyo bayinaka yo mpe oyinaka bato oyo balingaka yo. Lelo penza, otalisi yango polele ete bakonzi ya basoda mpe basoda na bango bazali pamba na miso na yo. Namoni ete olingaki kosepela lelo soki Abisalomi azalaki na bomoi mpe soki biso nyonso tokufaki.
by loving those who hate you and hating those who love you. For you have made it clear today that commanders and servants are nothing to you. For you know that if Absalom were alive today, and all of us had died, then you would be pleased.
7 Sik’oyo, bima mpe pesa longonya na basoda na yo. Nalapi ndayi na Kombo na Yawe ete soki obimi te, soda moko te akotikala elongo na yo kino butu eya. Ekozala mpo na yo pasi, koleka makama nyonso oyo ekweyela yo wuta na bolenge na yo kino lelo. »
Now therefore get up, go out and speak kindly to your servants. For I swear by the LORD, if you do not go out, not a man will remain with you this night, and that will be worse for you than all the evil that has happened to you from your youth until now."
8 Boye mokonzi atelemaki mpe avandaki na ekuke. Bongo tango bayebisaki basoda ete mokonzi avandi na ekuke, bango nyonso bayaki pene na ye. Mpe na tango wana, bana ya Isalaele bakimaki moto na moto na ndako na ye.
So the king got up and sat at the gate. And all the people were informed, saying, "Look, the king is sitting at the gate." And all the people came before the king. Meanwhile, Israel had fled each man to his tent.
9 Kati na bikolo ya Isalaele, bato bazalaki kotiana tembe mpe koloba: « Mokonzi oyo akangolaki biso na maboko ya banguna na biso, bato ya Filisitia, ye nde sik’oyo akimi mokili likolo ya Abisalomi;
All the people were at strife throughout all the tribes of Israel, saying, "The king delivered us out of the hand of our enemies, and he saved us out of the hand of the Philistines, but now he has fled from the land and from being over his kingdom.
10 mpe Abisalomi oyo topakolaki mafuta mpo ete akamba biso asili kokufa na bitumba. Boye mpo na nini bozali koloba eloko te mpo na kozongisa mokonzi na Yelusalemi? »
And Absalom, whom we anointed over us, is dead in battle. Now therefore why do you not speak a word of bringing the king back?" And the talk of all Israel came to the king.
11 Mokonzi Davidi atindaki sango epai ya Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari: « Botuna na bampaka ya Yuda: mpo na nini bosengeli kozala bato ya suka mpo na kozongisa mokonzi na ndako na ye, pamba te makambo oyo ezali kolobama kati na Isalaele mobimba esili kokoma na matoyi ya mokonzi?
So king David sent to Zadok and to Abiathar the priests, saying, "Speak to the elders of Judah, saying, 'Why are you the last to bring the king back to his palace?
12 Bozali bandeko na ngai ya mibali, nzoto na ngai mpe makila na ngai. Bongo mpo na nini kozala bato ya suka mpo na kozongisa mokonzi?
You are my brothers, you are my bone and my flesh. Why then are you the last to bring back the king?'
13 Mpe boloba na Amasa: ‹ Ozali mosuni na ngai mpe makila na ngai te? Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi ndenge alingi soki banda sik’oyo okomi te mokonzi ya mampinga na ngai na esika ya Joabi mpo na libela. › »
And say to Amasa, 'Aren't you my bone and my flesh? Now then, God do so to me, and more also, if you aren't commander of the army before me continually in place of Joab. '"
14 Makambo oyo Davidi alobaki ekotaki na mitema ya bato nyonso ya Yuda lokola moto moko. Boye batindaki maloba epai ya mokonzi mpo na koloba na ye: « Zonga, yo elongo na basali na yo nyonso. »
Thus the heart of all the men of Judah was inclined as one man, so that they sent a message to the king, "Return, you and all your servants."
15 Mokonzi azongaki mpe akomaki kino na Yordani. Bato ya Yuda bayaki na Giligali mpo na kokende kokutana na mokonzi mpe kokatisa ye mayi ya Yordani.
So the king returned and came to the Jordan. And Judah came to Gilgal, having come down to meet the king, to bring the king across the Jordan.
16 Shimei, mwana mobali ya Gera, moto ya ekolo ya Benjame ya Bawurimi, akendeki mbangu elongo na bato ya Yuda mpo na kokutana na mokonzi Davidi.
And Shimei the son of Gera, the Benjamite who was from Bahurim, hurried and came down with the men of Judah to meet king David,
17 Azalaki elongo na bato ya Benjame, nkoto moko, mpe Tsiba, moto oyo azalaki kosala kati na libota ya Saulo, elongo na bana na ye ya mibali zomi na mitano mpe basali na ye, tuku mibale. Bakendeki mbangu na Yordani epai wapi mokonzi azalaki.
and a thousand men from Benjamin with him. But Ziba the servant of the house of Saul, and his fifteen sons and his twenty servants with him, waded through the Jordan ahead of the king,
18 Bamataki na bwato mpo na kokatisa libota ya mokonzi mpe mpo na kosala nyonso oyo ezali malamu na miso ya mokonzi. Tango Shimei, mwana mobali ya Gera, akatisaki Yordani, akweyaki liboso ya mokonzi
and did the work of bringing the king across and to do whatever he wished. And Shimei the son of Gera fell down before the king, when he crossed the Jordan.
19 mpe alobaki na ye: « Tika ete nkolo na ngai atangela ngai ngambo te, akanisa te mabe oyo mosali na ye asalaki mokolo oyo mokonzi, nkolo na ngai, alongwaki na Yelusalemi. Tika ete mokonzi alongola likambo yango na makanisi na ye.
Then he said to the king, "May my lord not consider punishment. Do not remember what your servant did wrong on the day when my lord the king left Jerusalem, so that the king should call it to mind.
20 Pamba te ngai, mosali na yo, nayebi ete nasalaki masumu, mpe lelo nayei awa lokola moto ya liboso kati na libota mobimba ya Jozefi mpo na kokutana na mokonzi, nkolo na ngai. »
For your servant knows that I have sinned. Therefore, look, I have come today the first of all the house of Joseph to come down to meet my lord the king."
21 Abishayi, mwana mobali ya Tseruya, alobaki: — Boni, Shimei asengelaki te kokufa mpo na likambo oyo, pamba te alakelaki mabe mopakolami na Yawe?
But Abishai the son of Zeruiah replied, "Should not Shimei be put to death for this, because he cursed the LORD's anointed?"
22 Davidi azongisaki: — Likambo nini kati na ngai mpe bino bana mibali ya Tseruya? Bokomi lelo banguna na ngai! Boni, basengeli koboma moto moko lelo kati na Isalaele? Nayebi te ete ngai nde nazali lelo mokonzi ya Isalaele?
But David replied, "What does this have to do with you, you sons of Zeruiah, that you should become my adversaries today? Should anyone be put to death in Israel today? For do you not know that today I begin to rule over Israel?"
23 Bongo mokonzi alobaki na Shimei: — Okokufa te. Mpe mokonzi alakaki Shimei na nzela ya ndayi.
Then the king said to Shimei, "You will not die." And the king gave him his oath.
24 Mefibosheti, koko ya Saulo, akendeki mpe kokutana na mokonzi. Banda mokolo oyo mokonzi abimaki kino azongaki, Mefibosheti atikalaki kosukola makolo na ye te, akataki mandefu te mpe asukolaki bilamba na ye te.
Now Mippibaal son of Jonathan son of Saul came down to meet the king, and he had neither cared for his feet nor trimmed his beard nor washed his clothes, from the day the king departed until the day he came back safely.
25 Tango akomaki na Yelusalemi mpo na kokutana na mokonzi, Davidi atunaki ye: — Mefibosheti, mpo na nini okendeki te elongo na ngai?
And it happened when he came to Jerusalem to meet the king, that the king said to him, "Why did you not go with me, Mippibaal?"
26 Mefibosheti azongisaki: — Mokonzi, nkolo na ngai, mosali na ngai akosaki ngai. Pamba te lokola ngai, mosali na yo, nazali na mbeba na makolo, namilobelaki: « Nakosenga ete babongisela ngai ane na ngai, mpe nakomata yango mpo ete nakende elongo na mokonzi. »
So he answered, "My lord king, my servant deceived me. For your servant said to him, 'Saddle a donkey for me so that I may ride on it and go with the king,' for your servant is lame.
27 Kasi Tsiba, mosali na ngai, akosaki ngai. Akoselaki mosali na yo makambo epai ya mokonzi, nkolo na ngai. Mokonzi, nkolo na ngai, azali lokola Anjelu na Nzambe. Boye sala sik’oyo makambo oyo omoni ete ezali malamu.
And he has slandered your servant to my lord the king. But my lord the king did that which was good in my eyes, like an angel of God.
28 Pamba te na makanisi ya mokonzi, nkolo na ngai, esengelaki koboma bato nyonso ya libota ya koko na ngai, Saulo; kasi atako bongo, ondimaki mosali na yo na mesa, kati na bato oyo bazali kolia elongo na yo. Boye makoki nini nakoki lisusu kozala na yango ya kosenga eloko epai ya mokonzi?
For though all my father's house were but men doomed to death before my lord the king, yet you placed your servant among those who eat at your table. From whom, then, could I have finer treatment?" But when he cried out to the king,
29 Mokonzi alobaki na ye: — Mpo na nini maloba ebele boye? Nasili kopesa mitindo ete yo mpe Tsiba bokabola bilanga.
the king said, "Why do you multiply your words? I say: You and Ziba divide the property."
30 Mefibosheti alobaki na ye: — Lokola mokonzi, nkolo na ngai, azongi mobimba na ndako na ye, tika ete akamata na ye ata nyonso.
And Mippibaal said to the king, "Yes, let him take it all, since my lord the king has come safely home."
31 Barizilayi, moto ya Galadi, awutaki na Rogelimi mpo na kokatisa ebale Yordani elongo na mokonzi mpe kotika ye kokoba mobembo na ye.
Now Barzillai the Gileadite had come down from Rogelim, and he went with the king to conduct him from the Jordan.
32 Nzokande, Barizilayi akomaki mobange, azalaki na mibu tuku mwambe, mpe ezalaki ye nde asungaki mokonzi na mikolo nyonso oyo mokonzi avandaki na Maanayimi, pamba te azalaki moto ya bozwi mingi.
Now Barzillai was a very old man, eighty years old; and he had provided for the king while he was staying at Mahanaim, for he was a very rich man.
33 Mokonzi alobaki na Barizilayi: — Katisa elongo na ngai mpe vanda epai na ngai na Yelusalemi, mpe ngai nakosunga yo.
And the king said to Barzillai, "Come over with me, and I will provide for your old age in Jerusalem with me."
34 Kasi Barizilayi azongiselaki mokonzi: — Natikali na mibu boni mpo ete nakende elongo na mokonzi na Yelusalemi?
But Barzillai said to the king, "How many more days would I have there, that I should go up with the king to Jerusalem?
35 Nazali sik’oyo na mibu tuku mwambe. Boni, nakoki na ngai lisusu kokesenisa malamu mpe mabe? Mosali na yo akoki koyoka lisusu elengi ya biloko oyo azali kolia mpe komela? Nakoki lisusu koyoka mongongo ya bayembi ya mibali mpe ya basi? Bongo mpo na nini mokonzi, nkolo na ngai, akoki lisusu komitungisa mpo na mosali na yo?
I am now eighty years old. Can I discern between good and bad? Can your servant taste what I eat or what I drink? Can I hear the voice of male and female singers? Why then should your servant be any further burden to my lord the king?
36 Mosali na yo akokatisa Yordani elongo na mokonzi mpo na mwa tango moke kaka. Kasi mpo na nini mokonzi akoki kopesa ngai lifuti ya boye?
Your servant will cross the Jordan with the king for a short distance. Why should the king compensate me in this way?
37 Nabondeli yo, tika ete mosali na yo azonga mpo na kokufa na engumba na ngai pene ya kunda ya tata mpe mama na ngai! Kasi tala mwana na ngai ya mobali, mosali na yo, Kimeami. Tika ete akende elongo na mokonzi, nkolo na ngai, mpe salela ye makambo oyo yo omoni ete ezali malamu.
Please let your servant return, so that I may die in my own city near the tomb of my father and my mother. But look, here is your servant Kimham. Let him cross over with my lord the king, and do for him what seems good to you."
38 Mokonzi azongisaki: — Tika ete Kimeami akende elongo na ngai, mpe ngai nakosalela ye makambo oyo ezali malamu na miso na yo. Nakosalela ye nyonso oyo akosenga ngai.
And the king answered, "Kimham will go over with me, and I will do for him whatever I consider appropriate, and whatever you require of me I will do for you."
39 Sima na bato nyonso kokatisa ebale Yordani, mokonzi mpe akatisaki. Bongo mokonzi apesaki Barizilayi beze mpe apambolaki ye. Mpe Barizilayi azongaki na ndako na ye.
All the people crossed over the Jordan, but the king remained. Then the king kissed Barzillai, and blessed him; and he returned to his own place.
40 Tango mokonzi akatisaki na Giligali, Kimeami mpe akatisaki elongo na ye. Bato nyonso ya Yuda mpe ndambo ya mabota ya Isalaele balekisaki mokonzi.
So the king went over to Gilgal, and Kimham went over with him. All the people of Judah brought the king over, and also half the people of Israel.
41 Kasi na mbala moko, bato nyonso ya Isalaele bayaki epai ya mokonzi mpe balobaki na ye: — Mpo na nini bandeko na biso, bato ya Yuda, bazwaki yo na kobombama? Mpo na nini balekisaki mokonzi na ebale Yordani, elongo na libota na ye mpe bato nyonso ya Davidi elongo na ye?
Look, all the men of Israel came to the king, and said to the king, "Why have our brothers the men of Judah stolen you away, and brought the king, and his household, over the Jordan, and all David's men with him?"
42 Bato nyonso ya Yuda bazongiselaki bato ya Isalaele: — Tosalaki bongo, pamba te mokonzi azali ndeko na biso ya mosika te. Bongo mpo na nini kosilika na tina na yango? Boni, tobikaki bomoi na biso mpo na mokonzi? Tozwaki ata eloko moko mpo na biso?
The men of Judah answered the men of Israel, "Because the king is a close relative to us. Why then are you angry about this matter? Have we eaten at all at the king's cost? Has he given us a gift? Or has he brought us a portion?"
43 Bato ya Isalaele bazongiselaki bato ya Yuda: — Tozali na makoki kati na mokonzi koleka mbala zomi, mpe biso nde tozali na makoki mingi koleka bino na tina na Davidi. Mpo na nini bozali komona biso lokola bato pamba. Tozalaki bato ya liboso te na koluka ndenge nini kozongisa mokonzi na biso? Kasi bato ya Yuda bazongiselaki bato ya Isalaele na maloba makasi.
Then the men of Israel answered the men of Judah, and said, "We have ten shares in the king, and we are the firstborn rather than you. Why then did you treat us with contempt? Were we not the first to speak of bringing back our king?" But the comments of the men of Judah were more forceful than the comments of the men of Israel.

< 2 Samuele 19 >