< 2 Samuele 18 >
1 Davidi atangaki basoda oyo bazalaki elongo na ye; mpe kati na bango, aponaki bakonzi ya bankoto mpe bakonzi ya bankama.
이에 다윗이 그 함께한 백성을 계수하고 천부장과 백부장을 그 위에 세우고
2 Davidi apesaki mitindo na mampinga ete bakende. Akabolaki bango na masanga misato: lisanga ya liboso ekambamaki na Joabi; ya mibale, na Abishayi, ndeko mobali ya Joabi, mwana mobali ya Tseruya; mpe ya misato, na Itayi, moto ya Gati. Mokonzi alobaki na masanga ya mampinga ete ye moko akokende solo elongo na bango.
그 백성을 내어 보낼새 삼분지 일은 요압의 수하에, 삼분지 일은 스루야의 아들 요압의 동생 아비새의 수하에 붙이고, 삼분지 일은 가드 사람 잇대의 수하에 붙이고 백성에게 이르되 `나도 반드시 너희와 함께 나가리라'
3 Kasi basoda balobaki: — Okoki kobima te elongo na biso, pamba te soki ekosenga ete tokima, bakotala biso te. Ezala kati-kati ya bato kati na biso bakufi, bakotala yango te, kasi yo; okokani na bato nkoto zomi kati na biso. Nzokande, ekoleka malamu mpo na yo kosungaka biso tango nyonso wuta na engumba.
백성들이 가로되 `왕은 나가지 마소서 우리가 도망할지라도 저희는 우리에게 주의하지 아니할 터이요 우리가 절반이나 죽을지라도 우리에게 주의하지 아니할 터이라 왕은 우리 만명보다 중하시오니 왕은 성에 계시다가 우리를 도우심이 좋으니이다'
4 Mokonzi azongisaki: — Nakosala makambo nyonso oyo bomoni ete ezali malamu. Boye wana bato bazalaki kobima na masanga ya bankama mpe ya bankoto, mokonzi atelemaki pembeni ya ekuke.
왕이 저희에게 이르되 `너희가 선히 여기는대로 내가 행하리라' 하고 문 곁에 서매 모든 백성이 백명씩 천명씩 대를 지어 나가는지라
5 Apesaki mitindo oyo epai ya Joabi, Abishayi mpe Itayi: « Na kombo na ngai, bosala malembe na elenge mobali Abisalomi. » Basoda nyonso bayokaki mokonzi kopesa mitindo na mokambi moko na moko, na tina na Abisalomi.
왕이 요압과 아비새와 잇대에게 명하여 가로되 `나를 위하여 소년 압살롬을 너그러이 대접하라' 하니 왕이 압살롬을 위하여 모든 군장에게 명령할 때에 백성들이 다 들으니라
6 Mampinga etambolaki kati na zamba mpo na kobundisa Isalaele, mpe bitumba ezalaki kati na zamba ya Efrayimi.
이에 백성이 이스라엘을 치러 들로 나가서 에브라임 수풀에서 싸우더니
7 Kuna, mampinga ya Davidi elongaki mampinga ya Isalaele, mpe basoda nkoto tuku mibale bakufaki mokolo wana kati na mampinga ya Isalaele.
거기서 이스라엘 무리가 다윗의 심복들에게 패하매 그날 그곳에서 살륙이 커서 이만에 이르렀고
8 Bitumba epanzanaki mboka mobimba; mpe mokolo wana, bato oyo bakufaki kati na zamba bazalaki ebele koleka bato oyo bakufaki na mopanga.
그 땅에서 사면으로 퍼져 싸웠으므로 그 날에 수풀에서 죽은 자가 칼에 죽은 자보다 많았더라
9 Abisalomi akutanaki na bato ya Davidi na mbalakata. Azalaki kotambola na likolo ya mile na ye. Bongo tango mile ekimaki, ekotaki na se ya nzete ya terebente oyo ezalaki na bitape ekangana-kangana, mpe moto ya Abisalomi ekangamaki na nzete. Abisalomi atikalaki ya kodiembela na likolo, kasi mile oyo azalaki kotambolisa ekobaki kokima mbangu.
압살롬이 다윗의 신복과 마주치니라 압살롬이 노새를 탔는데 그 노새가 큰 상수리나무 번성한 가지 아래로 지날 때에 압살롬의 머리털이 그 상수리나무에 걸리매 저가 공중에 달리고 그 탔던 노새는 그 아래로 빠져 나간지라
10 Tango moko kati na basoda amonaki ye, alobaki na Joabi: — Namoni Abisalomi amidiembiki na nzete ya terebente.
한 사람이 보고 요압에게 고하여 가로되 `내가 보니 압살롬이 상수리나무에 달렸더이다'
11 Joabi alobaki na moto oyo ayebisaki ye likambo yango: — Boni, omoni ye? Mpo na nini obomaki ye te mbala moko? Soki obomaki ye, nalingaki kopesa yo bagrame pene nkama moko ya palata mpe mokaba.
요압이 그 고한 사람에게 이르되 `네가 보고 어찌하여 당장에 쳐서 땅에 떨어뜨리지 아니하였느뇨? 내가 네게 은 열개와 띠 하나를 주었으리라'
12 Kasi moto yango azongiselaki Joabi: — Ezala soki batie mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko na maboko na ngai, nakosembola loboko na ngai te mpo na koboma mwana ya mokonzi. Pamba te toyokaki mitindo oyo mokonzi apesaki epai na yo, epai na Abishayi mpe epai na Itayi, tango alobaki: « Na kombo na ngai, bosala mabe te na elenge mobali Abisalomi. »
그 사람이 요압에게 대답하되 `내가 내 손에 은 천개를 받는다 할지라도 나는 왕의 아들에게 손을 대지 아니하겠나이다 우리가 들었거니와 왕이 당신과 아비새와 잇대에게 명하여 이르시기를 삼가 누구든지 소년 압살롬을 해하지 말라 하셨나이다
13 Eloko moko te ebombamaka na miso ya mokonzi. Bongo soki natosaki mokonzi te mpe soki nabomaki Abisalomi, yo olingaki na yo kokotela ngai te.
아무일도 왕 앞에는 숨길 수 없나니 내가 만일 거역하여 그 생명을 해하였다면 당신도 나를 대적하였으리이다'
14 Joabi alobaki: — Nakoki te kolekisa tango na ngai elongo na yo. Boye azwaki makonga misato na maboko na ye mpe atubaki yango na motema ya Abisalomi oyo azalaki nanu ya bomoi kati na nzete ya terebente.
요압이 가로되 `나는 너와 같이 지체할 수 없다' 하고 손에 작은 창 셋을 가지고 가서 상수리나무 가운데서 아직 살아 있는 압살롬의 심장을 찌르니
15 Sima, bilenge mibali zomi oyo bamemaki bibundeli ya Joabi, bazingaki Abisalomi, babetaki ye mpe babomaki ye.
요압의 병기를 맡은 소년 열이 압살롬을 에워싸고 쳐죽이니라
16 Joabi abetaki kelelo, mpe masanga ya mampinga etikaki kolanda Isalaele, pamba te apekisaki bango.
요압이 나팔을 불어 백성들로 그치게 하니 저희가 이스라엘을 따르지 아니하고 돌아오니라
17 Bazwaki Abisalomi, babwakaki ye na zamba kati na libulu moko ya monene mpe bazipaki ye na se ya mopiku ya mabanga. Na tango wana, basoda nyonso ya Isalaele bakimaki na bandako na bango.
무리가 압살롬을 옮겨다가 수풀 가운데 큰 구멍에 던지고 그 위에 심히 큰 돌무더기를 쌓으니라 온 이스라엘 무리가 각기 장막으로 도망하니라
18 Nzokande, wana Abisalomi azalaki nanu na bomoi, azwaki libanga ya ekaniseli mpe atelemisaki yango na lubwaku ya mokonzi lokola ekaniseli mpo na ye, pamba te amilobelaki: « Nazali te na mwana mobali oyo akoki komema kombo na ngai lokola ekaniseli. » Boye apesaki libanga yango kombo na ye, mpe yango wana babengaka yango kino lelo « Ekaniseli ya Abisalomi. »
압살롬이 살았을 때에 자기를 위하여 한 비석을 가져 세웠으니 이는 저가 자기 이름을 전할 아들이 없음을 한탄함이라 그러므로 자기 이름으로 그 비석을 이름하였으며 그 비석이 왕의 골짜기에 있고 이제까지 압살롬의 기념비라 일컫더라
19 Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki, alobaki na Joabi: — Pesa ngai nzela ya kokima mbangu mpo na kokende koyebisa mokonzi ete Yawe akangoli ye na maboko ya banguna na ye.
사독의 아들 아히마아스가 가로되 `청컨대 나로 빨리 왕에게 가서 여호와께서 왕의 원수 갚아 주신 소식을 전하게 하소서'
20 Joabi alobaki na ye: — Ezali yo te moto osengeli komema sango na mokolo ya lelo; okoki na yo komema sango mokolo mosusu, kasi mpo na lelo, osengeli te kosala yango, pamba te moto oyo akufi azali mwana ya mokonzi.
요압이 저에게 이르되 `너는 오늘 소식을 전하는 자가 되지 말고 다른 날에 전할 것이니라 왕의 아들이 죽었나니 네가 오늘날 소식을 전하지 못하리라' 하고
21 Bongo Joabi alobaki na moto moko ya Kushi: — Kende koloba na mokonzi makambo oyo omoni. Moto ya Kushi agumbamaki liboso ya Joabi mpe akendeki mbangu.
구스 사람에게 이르되 `네가 가서 본 것을 왕께 고하라' 하매 구스 사람이 요압에게 절하고 달음질하여 가니
22 Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki, alobaki lisusu na Joabi: — Oyo ekoya eya! Pesa ngai nzela mpo ete nakende mbangu liboso ya moto ya Kushi. Kasi Joabi azongisaki: — Mwana na ngai ya mobali, mpo na nini olingi kaka kokende? Ezali na yango te sango oyo ekopesa yo lifuti.
사독의 아들 아히마아스가 다시 요압에게 이르되 `청컨대 아무쪼록 나로 또한 구스 사람의 뒤를 따라 달음질하게 하소서' 요압이 가로되 `내 아들아 왜 달음질하려 하느냐? 이 소식으로 인하여는 상을 받지 못하리라' 하되
23 Ayimaatsi alobaki: — Oyo ekoya eya! Nandimi kokima mbangu. Joabi alobaki: — Kima mbangu! Boye Ayimaatsi akimaki mbangu na nzela ya etando ya Yordani mpe alekaki moto ya Kushi.
저가 아무쪼록 달음질하겠노라 하는지라 요압이 가로되 `그리하라' 하니 아히마아스가 들길로 달음질하여 구스 사람보다 앞서니라
24 Na tango yango, Davidi avandaki kati ya ekuke ya kati mpe ekuke ya libanda, mpe mokengeli amataki na likolo ya ndako ya ekuke, pembeni ya mir. Tango atombolaki miso, amonaki mwana mobali moko kokima mbangu ye moko.
때에 다윗이 두 문 사이에 앉았더라 파숫군이 성문루에 올라가서 눈을 들어 보니 어떤 사람이 홀로 달음질하는지라
25 Mokengeli agangaki epai ya mokonzi mpe ayebisaki ye. Mokonzi alobaki: « Soki azali ye moko, wana azali na basango malamu. » Moto azalaki kaka kopusana.
파숫군이 외쳐 왕께 고하매 왕이 가로되 `저가 만일 혼자면 그 입에 소식이 있으리라' 할 때에 저가 차차 가까이 오니라
26 Bongo mokengeli amonaki moto mosusu kokima mbangu, mpe abelelaki mokengeli ekuke: — Tala, moto mosusu azali kokima mbangu ye moko. Mokonzi alobaki: — Ye mpe amemi basango malamu.
파숫군이 본즉 한 사람이 또 달음질하는지라 문지기에게 외쳐 이르되 `보라! 한사람이 또 혼자 달음질한다' 하니 왕이 가로되 `저도 소식을 가져오느니라'
27 Mokengeli alobaki: — Namoni moto ya liboso kokima mbangu lokola Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki. Mokonzi alobaki: — Azali moto malamu, azali koya na basango malamu.
파숫군이 가로되 `나 보기에는 앞선 사람의 달음질이 사독의 아들 아히마아스의 달음질과 같으니이다' 왕이 가로되 `저는 좋은 사람이니 좋은 소식을 가져 오느니라'
28 Bongo Ayimaatsi abelelaki mokonzi: — Makambo nyonso ezali malamu! Agumbamaki liboso ya mokonzi elongi kino na mabele mpe alobaki: — Tika ete Yawe, Nzambe na yo, apambolama! Akabi bato oyo batombolaki maboko na bango mpo na kobundisa mokonzi, nkolo na ngai.
아히마아스가 외쳐 왕께 말씀하되 `평안하옵소서!' 하고 왕의 앞에서 얼굴을 땅에 대고 절하여 가로되 `왕의 하나님 여호와를 찬양하리로소이다! 그 손을 들어 내 주 왕을 대적하는 자들을 붙여 주셨나이다'
29 Mokonzi atunaki: — Boni elenge mobali Abisalomi, azali malamu? Ayimaatsi azongisaki: — Namonaki mobulu makasi kaka tango Joabi alingaki kotinda mosali ya mokonzi mpe ngai, mosali na yo, kasi nayebaki te soki ezalaki likambo nini.
왕이 가로되 소년 압살롬이 잘 있느냐? 아히마아스가 대답하되 요압이 왕의 종 나를 보낼 때에 크게 소동하는것을 보았사오나 무슨 일인지 알지 못하였나이다
30 Mokonzi alobaki: — Telema pembeni mpe zela ngai wana. Boye akendeki mpe atelemaki wana.
왕이 가로되 `물러나 곁에 서 있으라' 하매 물러나서 섰더라
31 Bongo moto ya Kushi akomaki mpe alobaki: — Mokonzi, nkolo na ngai, yoka basango malamu! Yawe akangoli yo lelo na maboko ya bato oyo babundisaki yo.
구스 사람이 이르러 고하되 `내 주 왕께 보(報)할 소식이 있나이다 여호와께서 오늘날 왕을 대적하던 모든 원수를 갚으셨나이다'
32 Mokonzi atunaki na moto ya Kushi: — Boni elenge mobali Abisalomi, azali malamu? Moto ya Kushi azongisaki: — Tika ete banguna ya mokonzi, nkolo na ngai, mpe bato nyonso oyo bazali kotelema mpo na kosala yo mabe bazala lokola elenge mobali wana.
왕이 구스 사람에게 묻되 `소년 압살롬이 잘 있느냐?' 구스 사람이 대답하되 `내 주 왕의 원수와 일어나서 왕을 대적하는 자들은 다 그 소년과 같이 되기를 원하나이다'
33 Mokonzi ayokaki pasi na motema, amataki na shambre oyo ezalaki na likolo ya ekuke mpe alelaki. Tango azalaki kokende, alobaki: « Ah Abisalomi, mwana na ngai ya mobali! Mwana na ngai ya mobali, mwana na ngai ya mobali Abisalomi! Ebongaki ete nakufa na esika na yo! Oh Abisalomi, mwana na ngai ya mobali, mwana na ngai ya mobali! »
왕의 마음이 심히 아파 문루로 올라가서 우니라 저가 올라갈 때에 말하기를 `내 아들, 압살롬아! 내 아들, 내 아들, 압살롬아! 내가 너를 대신하여 죽었더면, 압살롬 내 아들아! 내 아들아!' 하였더라